Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 1

Ndenge nini toyokaka Nzambe?

Ndenge nini toyokaka Nzambe?

Nzambe alobaka na biso na nzela ya Biblia. 2 Timote 3:16

Nzambe ya solo atindaki bato bákoma makanisi na ye na buku moko mosantu. Buku yango ezali Biblia. Ezali na makambo ya ntina oyo Nzambe alingi oyeba.

Nzambe ayebi oyo eleki malamu mpo na biso mpe bwanya nyonso eutaka epai na ye. Soki ozali koyoka ye, okokóma mpenza na bwanya.​—Masese 1:5.

Nzambe alingi ete moto nyonso awa na mabele atánga Biblia. Lelo oyo ezali na minɔkɔ mingi.

Soki olingi koyoka Nzambe, osengeli kotánga mpe kokanga ntina ya makambo oyo ezali na Biblia.

Bato na bisika nyonso bazali koyoka. Matai 28:19

Batatoli ya Yehova bakoki kosalisa yo oyeba makambo oyo ezali na Biblia.

Bateyaka solo na ntina na Nzambe na mabele mobimba.

Okofuta ata eloko moko te mpo na mateya yango. Okoki mpe koyekola makambo ya Nzambe na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova oyo ezali na esika oyo ofandi.