Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 2

Nani azali Nzambe ya solo?

Nani azali Nzambe ya solo?

Nzambe ya solo azali kaka moko, mpe nkombo na ye Yehova. (Nzembo 83:18) Azali elimo; tokoki komona ye te. Alingaka biso mpe alingi ete biso mpe tólinga ye. Alingi mpe ete biso tólinga bato mosusu. (Matai 22:35-40) Azali Ye oyo Aleki-Nyonso, Mozalisi ya biloko nyonso.

Ekelamu ya liboso ya Nzambe azalaki ekelamu ya elimo ya nguya, oyo na nsima akómaki kobengama Yesu Kristo. Yehova akelaki mpe baanzelu.

Yehova akelaki biloko nyonso oyo ezali na likoló . . . mpe oyo ezali awa na mabele. Emoniseli 4:11

Yehova Nzambe akelaki minzoto, mabele, mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango.​—Ebandeli 1:1.

Akelaki Adama, moto ya liboso na putulu ya mabele.​—Ebandeli 2:7.