Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 6

Mpela monene eteyi biso nini?

Mpela monene eteyi biso nini?

Nzambe abomaki bato mabe, kasi abikisaki Noa mpe libota na ye. Ebandeli 7:11, 12, 23

Mbula ebɛtaki mikolo 40, butu moi, mpe mai ezipaki mabele mobimba. Bato nyonso ya mabe bakufaki.

Baanzelu wana batomboki batikaki nzoto na bango ya mosuni mpe bakómaki bademo.

Bato oyo bazalaki na kati ya masuwa babikaki. Atako Noa ná libota na ye bakufaki na nsima, Nzambe akozongisa bango lisusu na bomoi mpo bázala na bomoi libela na libela.

Nzambe akoboma lisusu bato mabe mpe akobikisa bato ya malamu. Matai 24:37-39

Satana mpe bademo bazali kokoba kobungisa bato nzela.

Lelo oyo, ndenge ezalaki na ntango ya Noa, bato mingi baboyaka kolanda litambwisi oyo Yehova apesaka na bolingo. Mosika te, Yehova akoboma bato nyonso ya mabe.​—2 Petro 2:5, 6.

Bato mosusu bazali lokola Noa. Bayokelaka Nzambe mpe basalaka oyo alobaka; bato yango ezali Batatoli ya Yehova.