Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini nakoki kosolola ná baboti na ngai?

Ndenge nini nakoki kosolola ná baboti na ngai?

Mokapo 1

Ndenge nini nakoki kosolola ná baboti na ngai?

“Nasalaki makasi mpo nayebisa baboti na ngai likambo moko oyo nazalaki na yango. Kasi nalɛmbaki nzoto mpo bakataki ngai maloba mpe nakokaki lisusu te koloba polele!”​—Rosa.

NTANGO ozalaki mwana moke, mbala mosusu ozalaki koluka toli mbala moko epai ya baboti na yo. Ozalaki koyebisa bango makambo nyonso, ezala ya mike to ya minene. Ozalaki koyebisa bango polele makanisi na yo mpe ndenge ozalaki komiyoka; ozalaki mpe kondima batoli na bango.

Kasi sikoyo, ozali mbala mosusu komona ete baboti na yo bazali koyokela yo lisusu te. Elenge mwasi moko na nkombo Edie alobi boye: “Mokolo moko na mpokwa, ntango tozalaki kolya, nabandaki kolela mpe nabimisaki makambo oyo ezalaki na motema na ngai. Baboti na ngai bazalaki koyoka ngai, kasi emonanaki lokola bazalaki kokipe te.” Esukaki ndenge nini? Alobi boye: “Nakendaki mbala moko na shambrɛ na ngai mpe nalelaki lisusu makasi!”

Nzokande, na ntango mosusu, okoki komona malamu oyebisa baboti na yo makambo nyonso te. Elenge mobali moko na nkombo Christopher alobi boye: “Nasololaka ná baboti na ngai makambo mingi. Kasi, na ntango mosusu, nalingaka te báyeba makambo nyonso oyo ezali na motema na ngai.”

Ezali mabe kobomba makambo mosusu mpo na yo moko? Te, soki makambo yango ezali ya mabe te. (Masese 3:32) Nzokande, ata soki ozali komona lokola ete baboti na yo bazali kokipe yo te to ozali kobanga kosolola ná bango, yebá likambo oyo: Osengeli kosolola ná baboti na yo​—mpe bango basengeli koyoka makambo oyo ezali kotungisa yo.

Kolɛmba te kosolola!

Kosolola ná baboti na yo ezali lokola kotambwisa motuka. Soki okutani na mokakatano, okolɛmba te; okoluka nde nzela mosusu. Tótalela bandakisa mibale.

MOKAKATANO 1 Ozali na mposa ya koloba likambo, kasi baboti na yo bazali kosala lokola balingi koyoka te. Elenge mwasi moko na nkombo Léa alobi boye: “Namonaka ete ezalaka pɛtɛɛ te kosolola ná papa. Ntango mosusu bokoki kobanda mwa lisolo mpe na nsima okoyoka alobi ete ‘Pardɔ, ozalaki koloba na ngai?’”

MOTUNA: Léa asengeli kosala nini soki alingi mpenza kosolola ná tata na ye? Azali na makambo soki misato ya kopona.

Likanisi 1

Kogangela papa na ye. Léa agangi: “Boni ko, yoká ngai naino, eza likambo ya ntina!”

Likanisi 2

Kotika kosolisa papa na ye. Léa aboyi kolobela likambo oyo azali na yango.

Likanisi 3

Kozela ngonga ya malamu mpo na kolobela lisusu likambo yango. Léa asololi ná papa na ye nsima ya mwa ntango, to akomeli ye likambo yango na mokanda.

Okanisi ete Léa asengeli kosalela likanisi nini? ․․․․․

Tótalela likambo mokomoko mpe tómona soki ekoki kobimisa matomba nini.

Papa ya Léa azali kokanisa makambo mosusu, yango wana azali koyeba te likambo oyo ezali kotungisa mwana na ye. Na yango, soki Léa aponi kosalela Likanisi 1, papa na ye akoyeba te mpo na nini azali komilela. Mbala mosusu papa ya Léa akoyokela ye te soki asali bongo, mpe yango ekomonisa ete Léa azali na limemya te. (Baefese 6:2) Na yango, kosala bongo ekobota mbuma ya malamu te.

Atako mbala mosusu kosalela Likanisi 2 ezali mpasi te, kasi ezali malamu te. Mpo na nini? Mpamba te makambo oyo moto akani ebebaka soki asɛngi toli te. (Masese 15:22) Mpo na kosilisa mpenza mikakatano oyo azali na yango, Léa asengeli kosolola ná papa na ye​—mpe soki papa azali na mposa ya kosalisa mwana na ye, asengeli koyeba makambo oyo azali kokutana na yango na bomoi. Kasi ekosalema bongo te soki baboyi kosolola.

Nzokande, na Likanisi 3, Léa atiki te ete mokakatano epekisa ye kosolola ná papa na ye. Kutu, aluki kolobela likambo yango na ngonga mosusu. Mpe soki Léa akomeli papa na ye mokanda, akoki koyoka malamu koleka. Kokoma mokanda ekoki mpe kosalisa ye akoma mpenza makambo oyo alingaki koloba. Ntango papa ya Léa akotánga mokanda yango, akoyeba likambo oyo mwana na ye alingaki koyebisa ye, mpe yango ekoki kosalisa ye ayeba malamu nini ezali kotungisa mwana. Na yango, Likanisi 3 ekosalisa Léa papa na ye.

Makambo nini mosusu Léa akoki kosala? Talá soki ezali na likambo moko eyeli yo na makanisi, mpe komá yango awa na nse. Na nsima komá mpe soki likambo yango ekobimisa nini.

․․․․․

MOKAKATANO 2 Baboti na yo balingi kosolola ná yo, kasi yo oboyi. Elenge mwasi moko na nkombo Sara alobi boye: “Nalingaka te bátuna ngai mituna ebeleebele nsima ya kolekisa mokolo mobimba na kelasi. Nalingi naino nabosana makambo ya kelasi, kasi baboti na ngai babandi mbala moko kotuna ngai: ‘Boni lelo na kelasi? Makambo nini okutanaki na yango?’” Na ntembe te, baboti ya Sara batunaka ye mituna wana na makanisi ya mabe te. Kasi, azali komilela ete: “Eza’ mpasi kosolola makambo ya kelasi ntango nalɛmbi mpe naza motó likolólikoló.”

MOTUNA: Sara akoki kosala nini na likambo wana? Ndenge moko na ndakisa ya liboso, azali na makanisi soki misato.

Likanisi 1

Koboya koloba. Sara alobi ete: “Pardɔ, bótika ngai. Naza’ na mposa ya koloba te sikoyo!”

Likanisi 2

Kosala makasi mpe koloba. Atako Sara azali na mitungisi, azali kopesa baboti na ye biyano, kasi azali kosala yango na mitema mibale.

Likanisi 3

Kolobela makambo ya kelasi na ngonga mosusu, kasi kokoba kosolola likambo mosusu. Sara asɛngi bálobela makambo ya kelasi na ngonga mosusu, ntango akozala na motema mpiɔ. Na nsima, atuni bango ete: “Bóloba naino. Mokolo eleki ndenge nini?”

Okanisi ete Sara asengeli kosalela likanisi nini? ․․․․․

Tótalela likambo mokomoko mpe tómona soki ekoki kobimisa matomba nini.

Sara azali komitungisa mpe alingi koloba te. Soki aponi kosalela Likanisi 1, akomitungisa mingi, kasi akoyoka mpe mabe mpo agangeli baboti na ye.​—Masese 29:11.

Nzokande, baboti ya Sara bakosepela te ndenge asiliki, ata mpe soki afandi nyɛɛ. Bakoki kokanisa ete Sara azali kobombela bango likambo moko. Bakoki ata kotinda ye na makasi aloba, mpe yango ekopesa ye nkanda makasi. Nsukansuka, likanisi yango ekosalisa te.

Likanisi 2 ezali malamu koleka oyo ya 1, mpo Sara ná baboti na ye bazali kosolola. Kasi, lokola Sara ná baboti na ye bazali kosolola kaka tiká básolola, bakozwa te eloko oyo balingi: kosolola na kimya mpe kobimisa makanisi na bango polele.

Kasi, soki Sara asaleli Likanisi 3, akoyoka malamu koleka, mpamba te bakosolola makambo ya kelasi nsima. Baboti na ye bakosepela ndenge azali kosala makasi mpo asolola ná bango, mpe bakozala na esengo. Na ntembe te, kosalela likanisi yango ekobimisa matomba mingi, mpamba te ezala baboti to mpe Sara, bazali kosalela etinda oyo ezali na Bafilipi 2:4, oyo elobi ete: “Lukáká mpe matomba ya basusu, kasi kaka oyo ya yo moko te.”​—Biblia Today’s English Version.

Kotinda baboti na yo te bázwela yo makanisi ya mabe

Kobosana te ete maloba oyo ozali kobimisa mpe ndenge oyo baboti na yo bazali koyokela yango ezali ndenge moko te. Na ndakisa, baboti na yo bakoki kotuna yo mpo na nini ozali na esengo te. Olobi ete: ‘Naza na mposa ya kolobela yango te.’ Kasi baboti na yo bayoki olobi: “Naza na konfianse mingi te na bino mpo nayebisa bino likambo oyo ez’otungisa ngai. Nakoyebisa yango baninga na ngai, kasi bino te.” Meká kosala devuare oyo: komá biyano na yo na esika oyo ezali mpamba. Kanisá ete ozali na mokakatano moko mpe baboti na yo balingi kosalisa yo.

Soki olobi: “Bóbanga te. Nakosilisa yango ngai moko.”

Baboti na yo bakoki koyoka olobi boye: ․․․․․

Eyano ya malamu koleka oyo okoki kopesa ezali: ․․․․․

Makambo nini ya ntina osengeli kobosana te? Poná maloba na yo malamumalamu. Bimisá yango na mongongo oyo ezali komonisa limemya. (Bakolose 4:6) Talelá baboti na yo lokola baninga na yo, kasi te lokola banguna na yo. Mpe toyebi likambo oyo malamu: Ozalaka na mposa ya baninga mpo olonga mikakatano na yo.

NA MOKAPO OYO ELANDI

Bongo soki osololaka ná baboti na yo, kasi nde ntango nyonso, boswanaka?

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Nalobaka makambo oyo eutaka na motema mpe nalobaka solo.”​—Yobo 33:3, Biblia The Holy Bible in the Language of Today, ya William Beck.

TOLI

Soki omoni ete ezali mpasi kofanda mpe kosolola ná moboti (baboti) na yo likambo oyo ezali kotungisa yo, okoki kosolola ná bango ata ntango bozali kotambola, bozali na motuka, to ntango bokei kosomba biloko.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Ndenge kaka okoki komona ete ezali mpasi mpo osolola ná baboti na yo makambo ya minene, mbala mosusu bango mpe bayokaka nsɔni mpe bamonaka ete bakokoka te kosolola ná yo makambo yango.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Mbala ya nsima oyo nakoyoka ete naza na mposa te ya kosolola ná baboti na ngai, nako ․․․․․

Soki papa to mama alingi kaka naloba likambo oyo naza na mposa ya koloba te, nakoloba ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini ezali na ntina kopona ngonga ya malamu mpo na kosolola?​—Masese 25:11.

● Mpo na nini ebongi mpenza osolola ná baboti na yo?​—Yobo 12:12.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 10]

“Ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te kosolola ná baboti na yo, kasi soki ofungoleli bango motema mpe osololi ná bango, okoyoka neti olongoli kilo moko monene na motó.”​—Delphine

[Elilingi na lokasa 8]

Soki okómi esika nzela esuki, okoluka ndenge nini okóma epai ozali kokende. Ndenge moko mpe, okoki koluka ndenge ya kosolola ná baboti na yo!