Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini nakoki kokóma na liberte mingi?

Ndenge nini nakoki kokóma na liberte mingi?

Mokapo 3

Ndenge nini nakoki kokóma na liberte mingi?

“Nalingaka baboti na ngai bátika ngai nabimaka ata moke.”​—Sara, azali na mbula 18.

“Natunaka ntango nyonso baboti na ngai mpo na nini bazalaka na konfianse na ngai te soki nalingi kobima ná baninga na ngai. Mbala mingi, bayebisaka ngai boye: ‘Tozali na konfianse na yo, kasi na baninga na yo te.’”​—Christine, azali na mbula 18.

YO MPE ozalaka na mposa ya kokóma na liberte mingi lokola Sara ná Christine? Mpo na kozwa yango, esengeli baboti na yo bázala na konfianse na yo. Kasi konfianse ezali lokola mbongo. Kozwa yango ezali mpasi, kobungisa yango ezali pɛtɛɛ, mpe ata soki bapesi yo yango ebele, okotonda yango kaka te. Marlène, elenge mwasi moko ya mbula 16, alobi boye: “Mpo na esika nyonso oyo nalingi kokende, baboti na ngai batunaka ngai mituna ebele mpo na koyeba soki naz’okende wapi, nakozala ná banani, nakosala nini kuna, mpe nakozonga ntango nini. Nayebi ete baza’ baboti na ngai, kasi ntango batunaka bongo, epesaka ngai nkanda!”

Okoki kosala nini mpo baboti na yo bápesa yo konfianse mingi mpe liberte mingi? Liboso tóyanola na motuna wana, tótala naino mpo na nini likambo ya kotyela konfianse ebimisaka matata kati na baboti mingi mpe bana na bango.

Mikakatano na ntango ozali kokola

Biblia eyebisi biso ete “mobali akotika tata na ye ná mama na ye.” (Ebandeli 2:24) Ya solo, tokoki mpe koloba bongo mpo na mwasi. Ezala ozali mwasi to mobali, eleko ya bolenge, ezali eleko oyo ezali kobongisa yo mpo okóma mokóló, ntango oyo okotika ndako ya baboti mpe mbala mosusu okokóma na libota na yo moko. *

Kasi, koleka na bolenge mpo na kokóma mokóló ezali te lokola kokɔta na porte moko ntango okómi na mbula moko boye. Ezali nde lokola baeskalye oyo ozali komata mokemoke ntango ozali naino elenge. Ezali solo ete yo okoki kokanisa ete okómi mokóló, kasi baboti na yo bamoni bongo te. Maria amonaka ete bapesaka ye konfianse te na likambo etali kopona baninga; alobi boye: “Nakómi sikoyo na mbula 20, kasi likambo yango ez’osila kaka te! Baboti na ngai bakanisaka ete nakokoka te kokima makambo ya mabe. Namekaki koyebisa bango ete nasí nakimá makambo mosusu ya mabe, kasi baz’ondima kaka te!”

Ndenge Maria amonisi yango, likambo ya kotyela konfianse ekoki kobimisa matata mingi kati na bana mpe baboti na bango. Ezali mpe bongo na libota na bino? Soki ezali bongo, ndenge nini okoki kosala mpo baboti na yo bápesa yo konfianse mingi? Mpe soki bazali lisusu kotyela yo motema te mpo osalaki makambo ya mabe, okoki kosala nini mpo obongisa?

Mimonisá moto ya kotyela motema

Ntoma Paulo akomelaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso ete: “Bókoba kotala soki bozali ndenge nini.” (2 Bakorinti 13:5) Ya solo, azalaki koloba libosoliboso te na bilenge. Kasi, bilenge mpe bakoki kosalela likanisi yango. Baboti na yo bakopesa lisusu liberte mingi soki ozali ntango nyonso komimonisa moto ya kotyela motema. Yango esɛngi te ozala moto ya kokoka, mpo biso nyonso tosalaka mabunga. (Mosakoli 7:20) Kasi, mbala mingi, bizaleli na yo etindaka baboti na yo báboya kopesa yo konfianse?

Na ndakisa, Paulo akomaki boye: “Tolingi kozala sembo na makambo nyonso.” (Baebre 13:18) Omituna boye: ‘Namonisaka ete nazali sembo soki esɛngi nayebisa baboti na ngai esika naz’okende mpe makambo oyo naz’osala?’ Talá maloba ya bilenge mosusu oyo bamonaki ete basengeli kosala mwa bambongwana na likambo yango. Nsima ya kotánga maloba na bango, pesá biyano na mituna oyo ezali na nse.

Lori: “Nazalaki kotindela mwana mobali moko oyo nazalaki kolinga mingi bamesaje na ordinatɛrɛ to na telefone na kobombana. Baboti na ngai bamonaki yango mpe bayebisaki ngai natika. Nalakaki bango ete nakotika, kasi nasalaki yango te. Ekobaki bongo mbula mobimba. Nazalaki kotindela mwana mobali yango bamesaje na ordinatɛrɛ to na telefone, baboti na ngai bayaki koyeba yango lisusu, nasɛngaki bolimbisi mpe nalakaki ete nakotika, kasi nazalaki kozongela kaka. Lokola nazalaki kotika te, baboti na ngai bakokaki lisusu kopesa ngai konfianse te!”

Mpo na yo, mpo na nini baboti ya Lori baboyaki kopesa ye konfianse? ․․․․․

Soki ozalaki papa to mama ya Lori, olingaki kosala nini, mpe mpo na nini? ․․․․․

Ndenge nini Lori akokaki komonisa ete abongi kotyelama motema ntango kaka baboti na ye bayebisaki ye likambo yango? ․․․․․

Beverly: “Baboti na ngai bazalaki kopesa ngai konfianse te na likambo etali bana mibali, kasi sikoyo nandimeli bango. Nazalaki seresere ná bana mibali mibale oyo bazalaki mikóló na ngai ya mbula mibale. Nazalaki kolekisa ngonga mingi ná bango na telefone, mpe ntango tozalaki kokutana ná baninga mosusu, nazalaki kosolola kaka ná bango, ná bato mosusu te. Baboti na ngai babɔtɔlaki ngai telefone mpo na sanza moko, mpe bazalaki kotika te ete nakende bisika oyo bana mibali yango bakokaki kozala.”

Soki ozalaki papa to mama ya Beverly, olingaki kosala nini, mpe mpo na nini? ․․․․․

Okanisi ete mibeko oyo baboti ya Beverly batyelaki ye ezalaki makasi mingi? Soki ɛɛ, mpo na nini? ․․․․․

Beverly akokaki kosala nini mpo baboti na ye bátyela ye lisusu motema? ․․․․․

Ndenge ya kozongela konfianse ya baboti

Bongo tokoloba nini soki, lokola bilenge oyo touti kolobela, yo mpe osalaki likambo oyo etindaki baboti na yo bátyela yo lisusu motema te? Ata soki ezali bongo, okoki kobongisa makambo. Kasi ndenge nini?

Mbala mosusu baboti na yo bakopesa yo konfianse mpe liberte mingi soki ozali komonisa bizaleli ya malamu. Annette ayaki koyeba likambo yango. Alobi boye: “Ntango ozali elenge, ozali koyeba malamu te ete kotyela moto konfianse ezali na ntina. Sikoyo namoni ete nakoli, mpe ete nasengeli kosala nyonso mpo baboti na ngai bákoba kozala na konfianse na ngai.” Liteya nini tozwi? Na esika omilelaka ete baboti na yo bazali lisusu na konfianse na yo te, salá makasi omonisa bizaleli oyo ekotinda bango bátyela yo motema. Mbala mosusu okokóma na liberte mingi.

Na ndakisa, bakoki kopesa yo konfianse na makambo oyo ezali awa na nse? Tyá elembo ✔ na kare, na likambo nyonso oyo osengeli kobongisa.

□ Kozongaka ndako na ngonga oyo batyeli ngai

□ Kokokisa bilaka oyo nasali

□ Kotosaka ngonga

□ Kosalelaka mbongo malamu

□ Kosilisa misala ya ndako

□ Kolamuka na ngonga malamu

□ Kobatela shambrɛ na ngai pɛto

□ Kolobaka solo

□ Kolekisa ndelo te na kosalela telefone to ordinatɛrɛ

□ Kondima mabe na ngai mpe kosɛnga bolimbisi

□ Makambo mosusu ․․․․․

Mpo na nini te komityela mokano ya komonisa ete obongi kotyelama motema na makambo oyo otye elembo? Landá toli oyo ya Biblia: ‘Bólongola bomoto ya kala oyo eyokani na etamboli na bino ya liboso.’ (Baefese 4:22) “Tiká Ɛɛ na bino ezala Ɛɛ.” (Yakobo 5:12) “Bólobaka solo mokomoko na bino na mozalani na ye.” (Baefese 4:25) “Bótosaka baboti na bino na makambo nyonso.” (Bakolose 3:20) Na nsima, bato bakomona polele ete ozali kokende liboso, ata mpe baboti na yo.​—1 Timote 4:15.

Kasi, okosala nini soki omoni ete nsima ya kosala milende, baboti na yo bazali kaka te kopesa yo liberte? Mpo na nini te kosolola ná bango likambo yango? Na esika omilelaka ete basengeli kopesa yo konfianse mingi, tuná bango na limemya nyonso nini osengeli kosala mpo bákóma kotyela yo motema. Monisá polele mikano oyo ozali na yango na likambo wana.

Kokanisa te ete baboti na yo bakobongola makanisi mbala moko. Na ntembe te, balingi naino koyeba malamu soki okokokisa makambo oyo olaki. Na ntango wana, monisá ete ebongi bátyela yo motema. Na nsima, baboti na yo bakoki mbala mosusu kopesa yo konfianse mpe liberte mingi. Yango nde esalemaki mpo na Beverly, oyo tolobelaki liboso. Alobi boye: “Kozwa konfianse ya moto ezali mpasi koleka kobungisa yango. Sikoyo bakómi kopesa ngai konfianse, mpe ez’osala nga bien!”

MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 22, NA VOLIMI 2

NA MOKAPO OYO ELANDI

Baboti na yo babomá libala? Ndenge nini okoki kozala na bokatikati ntango ozali komona ete makambo na yo nyonso ezali kotambola malamu te?

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 8 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 7 ya buku oyo.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

‘Bonsomi [liberte] na bino epesa bino nzela té ya kosalaka mabe na kobombama.’​—1 Piere [Petro] 2:16, Bible na lingala ya lelo oyo.

TOLI

Na esika okokanisa mibeko oyo batyeli yo sikoyo na liberte oyo yaya na yo akoki kozala na yango, osengeli nde kokokanisa mibeko oyo bazalaki kotyela yo ntango ozalaki naino mwana moke na liberte oyo ozali na yango sikoyo.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Soki baboti na yo batiki yo osalaka makambo nyonso oyo olingi, yango emonisi te ete balingaka yo, kasi nde bakipaka yo te.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Nakosala ete bápesa ngai konfianse mingi na makambo oyo: ․․․․․

Soki baboti na ngai bazali lisusu kotyela ngai motema te, nako ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini baboti na yo bakoki kobanga kopesa yo liberte mingi ata ntango ozali kosala makasi mpo bátyela yo motema?

● Mpo na nini tokoki koloba ete soki osololaka malamu ná baboti na yo, bakobanga te kopesa yo liberte mingi?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 24]

“Ntango nazali kosolola ná baboti na ngai, nayebisaka bango mikakatano na ngai. Yango wana ezalaka mpasi te bápesa ngai konfianse.”​—Dianna

[Etanda/​Elilingi na lokasa 23]

Kolekisa eleko ya bolenge tii kokóma mokóló oyo bakoki kotyela motema, ezali lokola komata eskalye mokomoko tii na likoló

[Etanda]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

MOKÓLÓ

ELENGE

MWANA MOKE