Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini nakoki koyokana ná bandeko na ngai?

Ndenge nini nakoki koyokana ná bandeko na ngai?

Mokapo 6

Ndenge nini nakoki koyokana ná bandeko na ngai?

Boyokani na yo ná bandeko na yo ezalaka ndenge nini?

□ Toza baninga ya motema

□ Tolimbisanaka

□ Toswanaka ntango nyonso

BANDEKO mosusu balinganaka makasi. Na ndakisa, Felicia oyo azali na mbula 19, alobi boye: “Leki na ngai ya mwasi Irena, oyo azali na mbula 16, azali moninga na ngai ya motema.” Mpe Carly, oyo azali na mbula 17, alobi mpo na yaya na ye Eric boye: “Toyokanaka malamu mpenza. Naino toswaná te.”

Nzokande, basusu bazali lokola Lauren ná leki na ye Marla. Lauren alobi boye: “Toswanaka mpo na makambo nyonso, ezala ata ya mikemike.” To mpe okoki komiyoka lokola Alice, oyo azali na mbula 12, oyo alobaki mpo na yaya na ye Dennis, oyo azali na mbula 14 boye: “Asukisaka ngai motema! Akɔtaka na shambrɛ na ngai na loyenge mpe azwaka biloko na ngai asɛngaka te. Ya’ Dennis aza’ mpenza neti mwana moke!”

Ozali na ndeko moko oyo asilikisaka yo? Ya solo baboti na yo bazali na mokumba ya kotya makambo na molɔngɔ na ndako. Kasi, nsukansuka, ekosɛnga oyekola ndenge ya koyokana ná basusu. Okoki koyekola likambo yango ntango ozali naino epai na bino.

Kanisá naino makambo oyo bosí bobebaná ná bandeko na yo. Boswanaka mingimingi mpo na likambo nini? Talá makambo oyo ezali na nse mpe tyá ✔ na likambo oyo epesaka yo nkanda.

Biloko na ngai. Ndeko na ngai azwaka biloko na ngai asɛngaka te.

Bizaleli ekeseni. Ndeko na ngai alukaka kaka bolamu na ye moko, akanisaka te liboso ya kosala likambo mpe alukaka kokómisa ngai mwana mosala na ye.

Makambo na ngai moko. Ndeko na ngai akɔtaka na shambrɛ na ngai kozanga abɛta porte, atángaka bamesaje na ngai kozanga kotuna.

Makambo mosusu ․․․․․

Soki ndeko na yo apesaka yo nkanda ntango nyonso​—alukaka kaka kokomande yo ntango nyonso to alukaka koyeba makambo na yo nyonso​—ekoki kozala mpasi ozanga kobomba nkanda na motema. Kasi, Biblia elobi boye: “Kofinafina zolo ebimisaka makila, mpe kokangakanga nkanda nde ebimisaka koswana.” (Masese 30:33) Soki obombi nkanda na motema, nsukansuka okobimisa makambo nyonso na nkanda makasi, kaka ndenge kofinafina zolo ekobimisa makila. Na ntango wana matata ekoya nde makasi. (Masese 26:21) Okoki kosala nini mpo mwa matata ebimisa te koswana moko monene? Likambo ya liboso ezali koluka koyeba nini mpenza ebimisaka matata.

Nini mpenza ebimisaka matata?

Matata oyo ebimaka na kati ya bandeko ezali lokola butɔ oyo ebimi na elongi. Okoki komona elongi ya moto etondi na babutɔ kasi ezali nde na maladi moko ya nzoto na ye oyo ebimisaka babutɔ yango. Ndenge moko mpe, soki bandeko bazali koswana makasi, ezali na likambo moko oyo ebimisi yango.

Okoki koluka kofinafina butɔ mpo esila. Okolongola kaka mwa butɔ kasi okotikala na cicatrice to mpe mikrɔbɛ yango ekoki kopanzana. Lolenge malamu ya kosala ezali ya koboma mikrɔbɛ yango mpo babutɔ mosusu ebima te. Ezali mpe bongo ntango yo ná bandeko na yo bóbebani. Luká koyeba nini ebimisi matata yango, mpe kozanga kolekisa ntango na mabe oyo likambo yango ebimisi, okosilisa likambo oyo ebimiseli bino matata. Okosalela mpe toli ya Mokonzi Salomo, oyo akomaki ete: “Mayele ya kososola oyo moto azali na yango ekitisaka mpenza nkanda na ye.”​—Masese 19:11.

Na ndakisa, Alice, oyo tolobelaki na ebandeli, alobaki mpo na ndeko na ye Dennis ete: “Akɔtaka na shambrɛ na ngai na loyenge mpe azwaka biloko na ngai asɛngaka te.” Yango nde matata oyo ebimi. Kasi, okanisi ete nini mpenza ebimisi matata wana? Ekoki kozala likambo etali botosi. Alice akokaki kosilisa likambo yango soki ayebisaki Dennis ete akɔtaka lisusu te na shambrɛ na ye to asalelaka biloko na ye lisusu te. Kasi, kosala bongo ekosilisa kaka matata oyo ebimi, mpe ekomema na matata mosusu. Nzokande, soki Alice akokaki kosolola mpenza ná ndeko na ye mpo amona ete esengeli te apanzapanzaka biloko na ye soki azali te, to soki alingi asalela yango, asɛngaka naino liboso, na ntembe te boyokani na bango ekokóma malamu.

Yebá kosilisa matata to kokima yango

Ya solo, koyeba likambo mpenza oyo ebimisaka matata kati na yo ná ndeko na yo ekoki te. Okoki kosala nini mpo na kosilisa matata mpe kosala ete bóbendana lisusu te mbala ya nsima? Meká kosala makambo motoba oyo elandi.

1. Bóyokana makambo oyo bokosala ná oyo bokosala te. Zongelá lisusu likambo oyo oponaki, oyo ebimisaka matata kati na yo ná ndeko na yo. Talá soki bokoki koyokana na makambo oyo ekosalisa bino mpo bósilisa likambo oyo ebimisaka matata. Na ndakisa, soki biloko na yo nde ebimisaka matata, likambo ya liboso oyo bokoki koyokana ekoki kozala: “Sɛngáká liboso ya kozwa eloko ya moninga.” Likambo ya mibale ekoki kozala: “Yoká soki ndeko na yo alobi: ‘Kosalela yango te.’” Ntango bozali koyokana na makambo wana, bóbosana te etinda oyo ya Yesu: “Makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bósalela bango kaka bongo.” (Matai 7:12) Na ndenge wana, yo ná ndeko na yo bokoki koyokana na makambo oyo bokolanda. Na nsima, bósolola ná baboti na bino mpo na koyeba soki bango mpe bandimi makambo yango.​—Baefese 6:1.

2. Yo moko bandá kosalela makambo yango. Ntoma Paulo akomaki ete: “Kasi yo moto oteyaka moto mosusu, omiteyaka yo moko te? Yo, moto osakolaka ete: ‘Koyiba te,’ oyibaka?” (Baroma 2:21) Ndenge nini okoki kosalela toli oyo? Na ndakisa, soki olingi ete ndeko na yo akɔtaka na makambo na yo te, yo mpe osengeli kobɛtaka porte liboso ya kokɔta na shambrɛ na ye to kosɛnga ye nzela liboso ya kotánga mikanda to bamesaje na ye na telefone to na internet.

3. Kosilikaka noki te. Mpo na nini toli oyo ezali malamu? Mpamba te Biblia elobi boye: “Bazoba nde basilikaka nokinoki, mpe babombaka nkanda.” (Mosakoli 7:9, Biblia Contemporary English Version) Soki osilikaka mpambampamba, okomona mpasi na bomoi. Ya solo, bandeko na yo bakosala to bakoloba makambo oyo ekopesa yo mpasi. Kasi, omituna boye: “Nasalaki mpe bango likambo ya ndenge wana liboso?” (Matai 7:1-5) Jenny alobi boye: “Ntango nazalaki na mbula 13, nazalaki kokanisa ete naleki bato nyonso mpe ete makanisi na ngai nde eleki ntina mpe esengeli bato bálanda yango. Sikoyo, leki na ngai ya mwasi akómi mpe bongo. Yango wana, nasalaka makasi nasilika te mpo na makambo mosusu oyo alobaka.”

4. Limbisá mpe bosaná. Esengeli kosololaka makambo ya minene mpe koluka kosilisa yango. Kasi, osengeli nde kolandelaka ndeko na yo mpo na mabunga nyonso oyo asalaka? Yehova Nzambe asepelaka soki ‘olimbisi likambo oyo ebuki mibeko.’ (Masese 19:11) Alison, oyo azali na mbula 19, alobi boye: “Ngai ná ndeko na ngai Rachel, tosilisaka ntango nyonso matata na biso. Biso mibale, tosɛnganaka bolimbisi mbala moko mpe na nsima tolobelaka likambo mpenza oyo ebimisaki matata. Na ntango mosusu, nazelaka tii lobi mpo na kosilisa matata. Mbala mingi, na mokolo oyo elandi na ntɔngɔ, ezalaka lisusu mpasi te mpo nalimbisa mpe nabosana likambo yango, mpe nazalaka kutu lisusu na mposa ya kolobela yango te.”

5. Sɛngá baboti na bino básalisa bino. Soki yo ná ndeko na yo bokoki te kosilisa matata na bino, mbala mosusu, baboti na bino bakoki kosalisa bino mpo bózongisa kimya. (Baroma 14:19) Kasi, soki bozongisi kimya kozanga kobenga baboti na bino, bokomonisa ete bokómi mikóló.

6. Sepeláká na bizaleli malamu ya bandeko na yo. Bandeko na yo bazali mpe na bizaleli oyo osepelaka na yango. Komá likambo moko oyo osepelaka na yango epai ya ndeko na yo mokomoko.

Nkombo Oyo nasepelaka na yango

․․․․․ ․․․․․

Na esika ya komitungisa mpo na mabunga ya bandeko na yo, mpo na nini te koluka ntango ya koyebisa bango eloko oyo osepelaka na yango epai na bango?​—Nzembo 130:3; Masese 15:23.

Biblia emonisi ete ndeko na yo akoki kozala te ntango nyonso moninga na yo ya motema. (Masese 18:24) Kasi, bondeko na bino ekoki kotikala makasi soki ‘moto na moto azali kokoba kokanga motema’ na makambo ya mosusu. (Bakolose 3:13) Soki ozali kosala bongo, bandeko na yo bakobanda mpenza kosilikisa yo te. Yo mpe okobanda kotungisa bango mpenza te!

NA MOKAPO OYO ELANDI

Ndenge nini okoyeba soki okoki mpenza mpo na kolongwa na ndako?

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Bato nyonso báyeba ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te.”​—Bafilipi 4:5.

TOLI

Soki ozali na ndeko ya mobali to ya mwasi oyo boyokanaka ná ye malamu te, talelá makambo na ndenge ya malamu​—ndeko yango azali kosalisa yo mpo okolisa bizaleli ya malamu oyo ekosalisa yo bomoi na yo mobimba!

OYEBAKI YANGO . . . ?

Soki olongwe na ndako, okokutana na bato oyo bakosilikisa yo​—bato oyo osalaka na bango mpe bato mosusu ya makambo makasi, oyo bazangá mawa mpe bakipaka kaka makambo na bango moko. Ezali na ndako na bino nde okoyeba ndenge ya kosilisa matata ya ndenge wana na kimya nyonso.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Mwa makambo oyo ngai ná ndeko (bandeko) na ngai tokosala ․․․․․

Mpo nasilikela ndeko (bandeko) na ngai mingi te, nako ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini ezali na ntina koyeba kokesenisa likambo oyo esalemi ná eloko oyo ebimisi yango?

● Mpo na yo, kozala na bandeko ezali na matomba nini?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 46]

“Soki nazalaka na bandeko te, nalingaki te koyeba makambo mosusu oyo nayebi. Epai ya baoyo bazali na bandeko, nalingi koloba boye: ‘Bómonaka bango te lokola eloko mpamba!’”​—Marilyn

[Etanda na lokasa 42]

Etanda ya mituna

Luká koyeba nini mpenza ebimisi matata

Olingi koyeba malamu nini mpenza ebimisaka matata kati na bandeko? Soki ezali bongo, tángá ndakisa oyo Yesu apesaki ya mwana oyo alongwaki na ndako mpe abebisaki biloko na ye nyonso. (Luka 15:11-32) Tyá mpenza likebi na likambo oyo yaya ya mwana mobali yango asalaki ntango leki na ye azongaki na ndako. Na nsima, pesá biyano na mituna oyo elandi.

Likambo nini esalaki ete yaya ya mwana mobali wana asilika? ․․․․․

Okanisi ete nini mpenza ebimisaki likambo yango? ․․․․․

Ndenge nini tata na bango alukaki kosilisa likambo yango? ․․․․․

Yaya asengelaki kosala nini mpo na kosilisa likambo yango? ․․․․․

Sikoyo, kanisá lisusu mbala ya nsuka oyo oswanaki ná ndeko na yo. Na nsima, komá biyano na yo na mituna oyo ezali na nse.

Likambo nini esalaki ete bóswana? ․․․․․

Okanisi ete nini mpenza ebimisaki likambo yango? ․․․․․

Makambo nini bokoki kosala mpo na kosilisa likambo yango mpe mpo matata mosusu ebima te? ․․․․․

[Elilingi na lokasa 43]

Kowelana na kati ya bandeko ezali lokola butɔ oyo ebimi moto na elongi; mpo na kosilisa yango, esengeli koluka koyeba nini ebimisi yango