Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nakoki kolongwa na ndako?

Nakoki kolongwa na ndako?

Mokapo 7

Nakoki kolongwa na ndako?

“Ntango mosusu namonaka neti bato bakanisaka mabe mpo na ngai mpamba te naza’ na mbula 19 kasi naz’ofanda naino epai ya baboti; namonaka lokola nakokóma mokóló te soki naino nalongwe na ndako te.”​—Katie.

“Nakokokisa mbula 20 kala te, kasi nasepelaka te ndenge naza’ ata na likambo moko te ya koloba mpo na ndenge oyo nasengeli kotambwisa bomoi na ngai. Nakanisaka kolongwa na ndako.”​—Fiona.

LIBOSO mpenza okoka mpo na kolongwa na ndako, mbala mosusu obandaki kokóma na mposa ya kosala makambo na ndenge na yo. Kozala na mposa wana ezali mabe te. Kutu, ndenge tolobelaki yango na Mokapo 3, mokano ya libosoliboso ya Nzambe ezalaki ete bilenge bákola mpe nsukansuka bátika baboti na bango mpe bákóma na libota na bango moko. (Ebandeli 2:23, 24; Marko 10:7, 8) Kasi, ndenge nini okoki koyeba ete okoki mpenza mpo na kolongwa na ndako? Talá mituna misato ya ntina oyo osengeli koyanola. Ya liboso ezali . . .

Mpo na nini nalingi kolongwa na ndako?

Talá liste oyo ezali awa na nse. Tyá na molɔngɔ bantina oyo olingi kolongwa na ndako.

․․․․․ Nalingi nakima makambo ya ndako

․․․․․ Nalingi nasala makambo nyonso oyo naza’ na mposa ya kosala

․․․․․ Nalingi baninga na ngai bándima ngai

․․․․․ Moninga moko asɛngi ngai nakende kofanda ná ye

․․․․․ Nalingi nakende kosala lokola volontɛrɛ esika mosusu

․․․․․ Nalingi nayeba ngai moko ndenge bomoi ezalaka

․․․․․ Nalingi lisusu te ete baboti na ngai bákipaka ngai

․․․․․ Makambo mosusu ․․․․․

Bantina oyo touti kotánga likoló ezali mpenza mabe te. Motuna yango oyo: Nini ezali kotinda yo olongwa na ndako? Na ndakisa, soki olingi kolongwa kaka mpo na kokima mibeko ya ndako, na ntembe te okosutuka mpenza!

Makambo oyo Danielle, oyo alongwaki na ndako mpo na mwa ntango, ntango azalaki na mbula 20, akutanaki na yango, eteyaki ye mingi. Alobi boye: “Biso nyonso tozalaka na makambo mosusu oyo epekisaka biso tósala oyo tolingi kosala. Ntango ozali yo moko, programɛ na yo ya mosala to mpe kozanga mbongo, ekopekisa yo osala makambo mosusu oyo okoki kosala.” Carmen, oyo akendaki na mboka-mopaya mpo na sanza motoba, alobi boye: “Nasepelaki na mobembo oyo nasalaki, kasi mbala mingi, nazalaki komona ete nazali na ntango mingi te! Esengelaki nasala misala nyonso ya ndako: kotya bopɛto na shambrɛ, kobongisa biloko oyo ebebi, kokata matiti, kosukola bilamba, kopangusa veranda, mpe bongo na bongo.”

Kotika te basusu bátinda yo ozwa ekateli ya mbangumbangu. (Masese 29:20) Ata soki ozali na bantina mpenza ya kolongwa na ndako, yango esuki kaka wana te. Osengeli kozala na mayele oyo ekosalisa yo na bomoi. Yango ememi biso na motuna ya mibale . . .

Namibongisi mpenza?

Kolongwa na ndako mpo na kokende kofanda yo moko ezali lokola kotambolatambola na zamba moko boye. Okoki nde kokende na zamba yango soki oyebi te kosala mwa ndako, kopelisa mɔtɔ, kolamba, to kotánga karte? Te! Kasi, bilenge mingi balongwaka na ndako na bango kozanga ete báyeba ata mwa moke ndenge ya kobatela ndako.

Mokonzi Salomo alobaki ete “moto ya ekɛngɛ atyaka likebi na matambe na ye.” (Masese 14:15) Mpo na kosalisa yo oyeba soki omibongisi mpenza mpo na kolongwa na ndako mpe kokende kofanda yo moko, talá mitó ya makambo oyo elandi. Tyá elembo pembeni ya likambo mokomoko oyo oyebi malamu, mpe tyá elembo X pembeni ya oyo osengeli koyekola.

Koyeba kosalela mbongo: Serena, oyo azali na mbula 19, alobi boye: “Naino nasombá ata eloko moko te na mbongo na ngai moko. Nabangaka kolongwa ndako mpe nabanda kosala bakalkile mpo na ndenge ya kosalela mbongo.” Ndenge nini okoki koyeba kosalela mbongo?

Liloba ya Nzambe, Biblia elobi ete: “Moto ya bwanya akoyoka mpe akozwa lisusu mateya mingi.” (Masese 1:5) Na yango, okoki kotuna baboti na yo soki esɛngaka mbongo boni pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kofutela ndako to kozongisa mbongo oyo ozwaki na banki, kosomba biloko ya kolya, kosomba mpe kobongisa motuka to kofuta transport mosusu. Na nsima, sɛngá baboti na yo básalisa yo oyeba ndenge ya kosalela malamu mbongo na yo mpe kofuta bafaktire. *

Koyeba misala ya ndako: Brian, oyo azali na mbula 17, alobi ete eloko oyo ebangisaka ye mingi soki alongwe na ndako, ezali ete akobanda kosukola bilamba ye moko. Ndenge nini oyebi soki okokoka kokokisa bamposa na yo moko? Aron, oyo azali na mbula 20, apesi likanisi oyo: “Na boumeli ya pɔsɔ moko, salá neti ozali kofanda na ndako na yo moko. Lyáká kaka biloko oyo olambi yo moko, oyo osombi na mbongo oyo ozwi na motoki na yo. Latáká bilamba oyo osukoli mpe ongomi (repasser). Salá misala nyonso ya kobongisa ndako yo moko. Mpe meká kokende esika oyo olingi kokende yo moko, kozanga ete moto amema yo na motuka to afutela yo tike.” Soki olandi toli oyo, ekosalisa yo na makambo mibale: (1) ekopesa yo mayele mingi mpe (2) ekosalisa yo ozala lisusu na botɔndi mingi mpo na mosala oyo baboti na yo basalaka.

Koyeba kofanda malamu ná basusu: Ofandaka malamu ná baboti mpe bandeko na yo? Soki te, okoki kondima ete bomoi ekozala pɛtɛɛ soki okei ná moninga na yo. Kasi, kanisá naino likambo oyo Eve, oyo azali na mbula 18, alobi: “Baninga na ngai mibale bakendaki kofanda na apartema moko. Kasi, liboso bákóma kofanda kuna, bazalaki baninga ya malamu, kasi bazalaki kokoka kofanda elongo te. Moko azalaki kolinga bopɛto, mosusu azalaki salite. Moko azalaki komipesa na makambo ya losambo, mosusu azalaki kaka bongobongo. Ezalaki kaka kosimba te!”

Esengeli kosala nini na likambo ya ndenge wana? Erin, oyo azali na mbula 18, alobi boye: “Ntango ozali naino epai na bino, okoki koyekola makambo mingi mpo na ndenge ya kofanda ná basusu. Ozali koyekola ndenge ya kosilisa matata mpe koluka kosala kimya. Namoni ete baoyo balongwaka na ndako mpo na koboya kobendana ná baboti na bango, bakimaka matata, kasi bayekolaka te ndenge ya kosilisa yango.”

Programɛ ya koyekola Biblia mpe makambo ya losambo: Bato mosusu balongwaka na ndako mpo balingaka te kolanda lingomba ya baboti na bango. Basusu bakobaka na programɛ ya koyekola Biblia mpe ya losambo, kasi eumelaka te bákómaka na bizaleli mabe. Ndenge nini okoki koboya ete ‘kondima na yo ebeba lokola masuwa oyo epanzani’? *​—1 Timote 1:19.

Yehova Nzambe alingi ete biso nyonso tómindimisa biso moko makambo oyo toyekolaka. (Baroma 12:1, 2) Omityela programɛ ya malamu ya boyekoli ya Biblia mpe ya losambo mpe landáká yango. Okoki kokoma yango na kalandriye mpe kotala soki okoki kolandaka yango na boumeli ya sanza moko, kozanga ete baboti na yo bátindaka yo osala yango.

Mpo na kosukisa, motuna ya misato oyo osengeli kotalela ezali . . .

Mokano na ngai ezali nini?

Olingi kolongwa na ndako mpo okima makambo? To mpo na kolongwa na bokonzi ya baboti na yo? Soki ɛɛ, makanisi na yo ezali nde na makambo oyo ozali kotika, kasi te epai ozali kokende. Kosala bongo ezali lokola ozali kokumba motuka kasi miso na yo ezali na talatala ya motuka; lokola makanisi na yo nyonso ezali na makambo oyo otiki na nsima, yango wana ozali komona te makambo oyo ezali liboso. Liteya ezali nini? Kotya makanisi na yo mobimba te kaka na kolongwa na ndako; kasi nde na mokano ya ntina oyo omityeli.

Bilenge mosusu ya Batatoli ya Yehova [Témoins de Jéhovah] bakendaki kosakola na bateritware mosusu na mboka na bango, to mpe ata na mboka-mopaya. Basusu bakendaka kopesa mabɔkɔ mpo na kotonga bisika ya losambo to mpo na kosala na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova [Témoins de Jéhovah]. Nzokande, basusu bamonaka ete basengeli naino kofanda bango moko mpo na mwa ntango liboso ya kobala. *

Ezala ozali na mokano nini, kanisáká yango malamumalamu. Liloba ya Nzambe, Biblia elobi boye: “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba, kasi moto nyonso oyo asalaka makambo mbangumbangu akokelela mpenza kokelela.” (Masese 21:5) Yokáká toli ya baboti na yo. (Masese 23:22) Bondeláká mpo na likambo yango. Mpe ntango ozali kozwa ekateli mpo na likambo yango, talelá batoli ya Biblia oyo touti kolobela na lisolo oyo.

Motuna mpenza oyo osengeli komituna ezali te, ‘Nakoki mpenza mpo na kolongwa na ndako?’ kasi nde, ‘Nakoki mpenza kotambwisa ndako na ngai moko?’ Soki eyano na motuna yango ezali ɛɛ, yango emonisi ete okoki mpenza mpo na kolongwa na ndako ya baboti na yo.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 23 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 19 ya Volimi 2.

^ par. 27 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 34 mpe 35 ya Volimi 2.

^ par. 32 Na mikili mosusu, mimeseno ya mboka esɛngaka ete mwana, mingimingi mwana mwasi alongwa na ndako ntango akobala. Biblia epesi toli moko ya polele te na likambo yango.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Mobali akotika tata na ye ná mama na ye.”​—Matai 19:5.

TOLI

Mpo na mwa ntango, pesá baboti na yo mbongo nyonso oyo esɛngaka mpo na koleisa yo, kofutela yo ndako, mpe mpo na makambo mosusu. Soki okoki te to olingi te kobimisa mbongo na yo ntango ozali naino na ndako, yango emonisi ete omibongisi naino malamu te mpo na kokende kofanda yo moko.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Ntina oyo olingi kolongwa na ndako ekoki komonisa soki okozala na esengo to te na nsima.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Mokano oyo nakolinga nakokisa soki nalongwe na ndako ezali ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Ata soki bozali na mikakatano na libota na bino, matomba nini okozwa soki otikali epai na bino mpo na mwa ntango?

● Ntango ozali naino na ndako, makambo nini okoki kosala, oyo ekosalisa libota na bino mpe ekosalisa yo omibongisa mpo na kotambwisa ndako na yo moko?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 52]

“Eza’ n’ango mabe te okóma na mposa ya kosala makambo na ndenge na yo. Kasi soki olingi kolongwa mpo na kokima kaka mibeko ya ndako, nyonso wana emonisi ete okoki naino te mpo na kolongwa na ndako.”​—Aron

[Elilingi na lokasa 50, 51]

Kolongwa na ndako ezali lokola kotambolatambola na zamba moko boye; liboso okende, osengeli koyekola mayele oyo ekosalisa yo obika