Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini nasengeli kobatelaka sante na ngai?

Mpo na nini nasengeli kobatelaka sante na ngai?

Mokapo 10

Mpo na nini nasengeli kobatelaka sante na ngai?

Tyá elembo ✔ liboso ya mokano mokomoko oyo okosepela kokokisa.

□ Komitungisaka mingi te

□ Kosilikaka mpambampamba te

□ Kolongola kobanga

□ Kozala kidiba te

□ Kozala nzoto makasi

□ Komikómisa sɛmbɛsɛmbɛ

□ Kokɔnda mwa moke

NTANGO ozali elenge, ezali na makambo mosusu na bomoi oyo oponaka te, na ndakisa, baboti na yo, bandeko na yo, mpe esika ofandaka. Kasi, ezali bongo te mpo na sante na yo. Atako tozwá makambo mosusu epai ya baboti na biso, mbala mingi lolenge ya bomoi oyo toponaka kozala na yango, ebatelaka to ebebisaka sante na biso. *

Okoki koloba ete: ‘Kasi naza’ naino elenge mpenza mpo namitungisa mpo na sante na ngai!’ Okanisi mpenza ete ezali bongo? Talá liste ya mikano oyo ezali na lokasa 71. Otyaki elembo na mikano boni? Olinga, olinga te, mpo okokisa mokano mokomoko, ezali na ntina mingi ozala na sante ya malamu.

Ya solo, okoki kokanisa lokola Amber, oyo azali na mbula 17; alobi boye: “Nalyaka kaka ntango nyonso mampa to bagato, biloko ya mafuta mingi te mpe ya sukali mingi te? Te, ekosimba te!” Soki yo mpe okanisaka bongo, kobanga te; esengeli te otika kolya biloko ya sukali to okimaka mbangu ntango molai pɔsɔ nyonso. Ekoki kosɛnga obongola mwa makambo mosusu mpo obatela nzoto, omiyoka malamu koleka, mpe ozala nzoto makasi mpenza. Tótala ndenge bilenge mosusu basalaki.

Lyáká malamu mpo obatela nzoto!

Biblia ezali kolendisa biso tólekisaka ndelo te na makambo oyo tosalaka. Masese 23:20 elobi ete: ‘Kozala te . . . kati na bato oyo balyaka na lokoso.’ Kolanda toli wana ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te.

“Ngai mpe nayokaka nzala mingi lokola bilenge nyonso. Baboti na ngai balobaka na ngai ete nalyaka lokola moto azali na tenia!”​—André, azali na mbula 15.

“Lokola nakoki te komona ndenge biloko oyo nalyaka ekoki kosala ngai mabe, namonak’ango mpenza mabe te.”​—Danielle, azali na mbula 19.

Ozali na mposa ya komipekisa na makambo etali kolya mpo obatela sante na yo? Makambo oyo bilenge mosusu balobi awa na nse esalisaka bango.

Yebáká ntango libumu na yo etondi. Julia, oyo azali na mbula 19, alobi boye: “Liboso nazalaki kotalela bavitamini oyo ezali na kati ya biloko oyo nazali kolya, kasi sikoyo nakataka kolya kaka soki nayoki ete libumu etondi.”

Kolyaka bilyalya te. Peter, oyo azali na mbula 21, alobi boye: “Lokola natiká komɛla soda, na sanza moko kaka, kilo 5 ya nzoto na ngai ekitaki!”

Tiká mimeseno ya mabe ya kolya. Erin, oyo azali na mbula 19, alobi boye: “Nasalaka makasi nalya kaka biloko oyo natye na saani, nabakisa mosusu te.”

Sekele mpo na kolonga: Lyáká na ngonga oyo ebongi! Soki te, okobanda koyoka nzala mpe okokóma na mposa ya kolya mingi koleka.

Saláká ngalasisi ya nzoto mpo omiyoka malamu!

Biblia elobi boye: “Ngalasisi ya nzoto ezali na litomba.” (1 Timote 4:8) Kasi, emonani ete bilenge mingi balingaka te kosala ngalasisi ya nzoto.

“Ntango nazalaki na école secondaire, bana mingi bazalaki kozwa te na ‘gymnastique.’ Nzokande, ezalaki kutu pɛtɛɛ mpenza, kaka lokola kolya!”​—Richard, azali na mbula 21.

“Bato mosusu balobaka ete, ‘Mpo na nini kotoka mpe kosilisa makasi nyonso na kokimaka mbangu na moi makasi; na esika ya kosala yango na makanisi ntango ozali kobɛta video?’”​—Ruth, azali na mbula 22.

Ntango okanisi kaka kosala ngalasisi ya nzoto, yango elɛmbisaka yo? Soki bongo, talá matomba misato oyo okoki kozwa soki osalaka ngalasisi ya nzoto.

Litomba #1. Ngalasisi ya nzoto ekoki kosalisa yo mpo obɛlabɛlaka te. Rachel, oyo azali na mbula 19, alobi boye: “Papa azalaki koloba ete: ‘Soki ozali na ntango te ya kosala ngalasisi ya nzoto, okobanda kobɛla ntango nyonso.’”

Litomba #2. Kosala ngalasisi ya nzoto esalisaka bɔɔngɔ. Emily, oyo azali na mbula 16, alobi boye: “Ntango nazali na makambo mingi na motó, ngalasisi ya nzoto esalisaka ngai mpenza. Nayokaka nzoto makasi, mpe nayokaka motó kilo te.”

Litomba #3. Ngalasisi ya nzoto ebakisaka esengo. Ruth, oyo azali na mbula 22, alobi boye: “Nalingaka mingi kosala ngalasisi ya nzoto; yango wana namataka bangomba, nabɛtaka mai (nager) mpe napusaka velo.”

Sekele mpo na kolonga: Zwáká ata miniti 20 mbala misato na pɔsɔ mpo na kosala ngalasisi moko ya makasi oyo olingaka.

Laláká mingi mpo ozala nzoto makasi mpenza!

Biblia elobi boye: “Mwa kopema moke eleki ebele ya mosala makasi mpe kolanda mopɛpɛ.” (Mosakoli 4:6) Soki olalaka mingi te, okozala mpe nzoto malamu te!

“Soki nalali mingi te, nayokaka nzoto malamu te. Nazalaka na mokakatano ya kotya makanisi ata na likambo nini!”​—Rachel, azali na mbula 19.

“Soki tokómi ba 14:00, nalɛmbaka makasi, mpe nakoki ata kolala ntango nazali kosolola ná baninga!”​—Kristine, azali na mbula 19.

Esengeli olalaka mingi? Tótala makambo oyo bilenge mosusu basalaki.

Kolalaka butu makasi te. Catherine, oyo azali na mbula 18, alobi boye: “Naz’osala makasi nalalaka na ngonga ya malamu.”

Katá masolo soki ntango eleki. Richard, oyo azali na mbula 21, alobi boye: “Baninga na ngai bazalaki kobenga ngai na telefone to kotindela ngai bamesaje na butu makasi, kasi mikolo oyo, nakómi kokata masolo mpe nakei mbala moko kolala.”

Saláká yango mbala na mbala. Jennifer, oyo azali na mbula 20, alobi boye: “Mikolo oyo, naz’osala makasi nalalaka mpe nalamukaka kaka na ngonga oyo namityelá, mpe naz’osala yango mikolo nyonso.”

Sekele mpo na kolonga: Salá makasi olalaka ata ngonga 8 butu nyonso.

Okozwa matomba mingi soki ozali kosala kaka mwa makambo mike mpo na kobatela sante na yo. Kobosana te ete kozala na sante ya malamu ekosalisa yo obatela nzoto, omiyoka malamu, mpe ozala nzoto makasi mpenza. Ezali na makambo mosusu na bomoi oyo okokoka kobongola te, kasi okoki kosala ata likambo moko mpo na kobongisa sante na yo. Erin, oyo azali na mbula 19, alobi boye: “Kaka yo moko nde okoki kobongisa sante na yo.”

NA MOKAPO OYO ELANDI

Yo ná baboti na yo bobendanaka na likambo ya molato? Talá ndenge oyo okoki koyokana ná bango na likambo yango!

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 11 Toyebi ete bato mingi bazali kobunda na bamaladi oyo bakoki kosilisa te. Mokapo oyo ekoki kosalisa bango bákóma na sante ya malamu koleka, atako bazali na mikakatano.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Ngalasisi ya nzoto ezali na litomba.”​1 Timote 4:8.

TOLI

Luká moninga oyo bokoki kosalaka na ye ngalasisi ya nzoto. Yango ekopesa yo makasi mpo okolinga te koyokisa moninga na yo mpasi.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Ngalasisi ya nzoto esalaka ete nzoto na yo ebimisa ba-endorphines​—biloko oyo ezalaka na kati ya bɔɔngɔ, oyo ekoki kokitisa mpasi mpe kosala ete omiyoka malamu.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Mokano ya malamu oyo namityeli na likambo etali kopona biloko ya kolya ezali ․․․․․

Mokano ya malamu oyo namityeli na likambo etali ngalasisi ya nzoto ezali ․․․․․

Kobanda sanza oyo ekoya, nakosala makasi nalalaka ngonga soki na butu ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Na ndenge nini kobatela sante na yo ekosalisa yo olongola kobanga?

● Likambo nini eleki kobatela sante na yo?​1 Timote 4:8.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 74]

“Nasepelaka ndenge namiyokaka ntango nasalaka ngalasisi ya nzoto. Mpe ntango nazali na sante ya malamu mpo na yango, nalongolaka kobanga!”​—Emily

[Etanda na lokasa 73]

“Nabongolaki mimeseno na ngai”

“Ntango nazalaki elenge mpenza, nazalaki monene makasi; kasi nalingaki ata moke te kokóma bongo. Nazalaki na esengo ata moke te mpo na ndenge oyo nazalaki komonana na miso ya bato mpe ndenge oyo nazalaki komiyoka na nzoto na ngai! Na ntango mosusu, nazalaki kopona biloko oyo nakolya mpo nameka kokɔnda, kasi nazalaki kokɔnda te. Yango wana, ntango nakómaki na mbula 15, nazwaki ekateli ete esengelaki nabongola makambo mosusu na bomoi na ngai. Nalingaki kokɔnda na lolenge ya malamu, mpe nakokoba kosala bongo bomoi na ngai mobimba. Nasombaki buku moko oyo ezalaki kolobela ndenge ya kopona bilei ya malamu mpe ndenge ya kosala ngalasisi ya nzoto malamu, mpe nakómaki kosalela na bomoi na ngai makambo oyo nazalaki kotánga. Nazalaki na ekateli makasi ete ata soki nazongi nsima mwa moke, to nalɛmbi nzoto, nakotika te. Likambo ya esengo, nalongaki! Na mbula moko, kilo 25 ekitaki. Na boumeli ya mbula mibale, nabatelaki kilo oyo nalingaki kozala na yango. Nandimaki te ke ekokaki kosalema! Nakanisi ete soki nalongaki, ezalaki kaka te mpo nazalaki kopona malamu biloko oyo nakolya, kasi mpo nabongolaki mimeseno na ngai.”​Catherine, azali na mbula 18.

[Elilingi na lokasa 74]

Sante na yo ezali lokola motuka; soki obatelaka yango malamu te, ekobeba