Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nasengeli kolataka ndenge nini?

Nasengeli kolataka ndenge nini?

Mokapo 11

Nasengeli kolataka ndenge nini?

Laetitia alingi kobima, kasi baboti na ye bakamwe ndenge alati.

Papa na ye agangi: “Olati nini?”

Laetitia azongisi, na mongongo ya kokamwa: “Bong’esali nini? Nakei kaka na zando ná baninga.”

Mama na ye alobi: “Okokende na bilamba ya boye te!”

Laetitia azali koimaima: “Mama, kasi bilamba oyo bilenge basi nyonso bazolata mikolo oyo. Mpe ez’omonisa ndenge nazali!”

Papa na ye azongisi na mwa nkanda: “Bon, biso tolingi yango te! Sikoyo kende kolongola bilamba yango, soki te, tokotala nzela oyo okoleka!”

KOWELANA na makambo ya bilamba ebandi lelo te. Ekoki kozala ete ntango baboti na yo bazalaki naino bilenge, bango mpe bazalaki kobendana ná baboti na bango mpo na likambo yango. Mpe na ntango wana, mbala mosusu bazalaki mpe komiyoka ndenge oz’omiyoka lelo! Kasi, sikoyo bakómi mikóló mpe yo ná bango bozali kobendana mpo na likambo ya bilamba.

Yo olobi: Eza’ bien.

Bango balobi: Eza’ mabe.

Yo olobi: Eza’ mpenza kitoko makasi!

Bango balobi: Ez’otika nzoto libándá.

Yo olobi: Eza’ n’ango cher te.

Bango balobi: Eza’ cher te mpo ezotika nzoto libándá!

Okoki kosala nini mpo bótika kobendana? Megan, oyo azali na mbula 23, ayaki koyeba sekele. Alobi boye: “Ezali na ntina te bóswanaka. Bokoki koyokana.” Koyokana? Yango elingi nde koloba ete osengeli kolataka lokola tata to mama ya mbula 40? Te! Koyokana elingi koloba ete yo ná baboti na yo bosengeli kolobela makambo oyo esalaka ete bóbendanaka, mpe bóluka ndenge oyo yo bango bokondima kobongisa. Matomba nini okozwa?

1. Okomonana kitoko, ata na miso ya bilenge mosusu.

2. Baboti na yo bakobanda koloba mabe mingi te mpo na molato na yo.

3. Soki baboti na yo bamoni ete okómi kozwa bikateli ya moto oyo akɔmɛli na likambo yango, bakobanda kotikela yo liberte na makambo mosusu.

Tóbanda sikoyo. Kanisá elamba moko oyo omonaki na Internet to na magazini moko, mpe ozali mpenza na mposa ya kosomba yango. Likambo ya liboso ya kosala ezali . . .

Kotalela oyo Biblia elobi

Likambo ya kokamwa, Biblia elobeli makambo ya kolata mingi te. Kutu, na boumeli ya mwa baminiti kaka, okoki kotánga batoli nyonso ya Biblia oyo elobeli kolata! Nzokande, na botángi na yo okokuta batoli ya malamu mpe ya ntina mingi. Na ndakisa:

● Biblia epesi basi toli ete bábongisaka nzoto na bango na ‘kolekisaka ndelo te mpe bázala na makanisi malamu.’ *1 Timote 2:9, 10.

Maloba ‘kolekisaka ndelo te’ ekoki kobangisa yo. Okoki komituna: ‘Nasengeli nde kolataka bilamba ya bongobongo?’ Ezali bongo te! Na vɛrsɛ oyo, kolekisa ndelo te elimboli ete bilamba na yo esengeli komonisa ete opesaka nzoto na yo kilo mpe olingaka te kobɛtisa basusu libaku. (2 Bakorinti 6:3) Bilamba ya ndenge wana ezali mingi. Danielle, oyo azali na mbula 23, alobi boye: “Ekoki kozala mpasi, kasi okoki kolata bilamba oyo ebimi mikolo oyo kozanga ete olata bilamba ya mabe.”

● Biblia elobi ete na likambo etali kitoko ya nzoto, osengeli kotya likebi mingi na “bomoto oyo ebombaná, oyo ya motema.”​1 Petro 3:4.

Elamba ya mabe ekoki kobenda likebi ya bato mpo na mwa ntango moke kaka, kasi kitoko na yo ya kati ekosala ete mikóló ná bilenge mosusu bámemya yo mpo na ntango molai. Ya solo, bilenge mosusu mpe bakoki komona ete kolata mabe ezali na ntina te. Brittany, oyo azali na mbula 16, alobi boye: “Ezali mpenza nsɔni komona ndenge basi balukaka kobenda mibali na molato na bango ya mabe!” Kay mpe andimi likambo yango. Mpo na moninga na ye moko ya kala, alobi boye: “Azalaki kaka kopona bilamba oyo ekobenda bana mibali; yango wana azalaki kolata kaka bilamba oyo ekangaka nzoto.”

Yokeláká baboti na yo

Ezali malamu te kotya elamba moko ya mabe na sakosi na yo mpo olata yango na kelasi. Baboti na yo bakobanda lisusu kopesa yo konfianse mingi soki ozali kofungolela bango motema na yo mpe ozali koloba na bango solo, ata mpo na makambo oyo okoki kosala kozanga ete báyeba yango. Yango wana, okosala malamu soki otuni toli na bango liboso ya kosomba elamba moko. (Masese 15:22)​Talá etanda “Bilamba na ngai” na nkasa 82-83.

Kasi, mpo na nini osengeli kotuna toli na bango? Okoki kokanisa ete baboti na yo balingi kopekisa yo olata bilamba oyo ebimi sika, kasi ezali mpenza bongo te. Mpo na koloba solo, likanisi ya papa na yo ná mama na yo ekoki kokesana na oyo ya yo, kasi mbala mosusu likanisi yango ebongi mpenza na yo. Nataleine, oyo azali na mbula 17, alobi boye: “Nasepelaka mpenza na batoli ya baboti na ngai, mpo nalingi te nabima na ndako na nsɔni to bato báloba mabe mpo na ngai mpo na ndenge nazali komonana.”

Lisusu, osengeli koyeba likambo oyo: Ntango nyonso oyo ozali epai ya baboti na yo, ozali na nse ya bokonzi na bango. (Bakolose 3:20) Ntango ozali koyoka makanisi na bango, mpe bango bazali koyoka oyo ya yo, okoki kokamwa ndenge bokobanda koyokana malamu. Mpe nsukansuka, bokobendana lisusu te mpo na makambo ya bilamba!

Toli mpo na makambo ya bilamba: Ntango ozali komeka elamba, kosuka kaka te na oyo ozali komona na talatala. Elamba moko ekoki komonana malamu, kasi ekoki kobima mabe ntango olingi kofanda to kogunzama mpo na kolɔkɔta eloko. Soki likoki ezali, tuná toli ya moboti to ya moninga moko ya mokóló.

NA MOKAPO OYO ELANDI

Oza’ monguna na yo moko? Okoki kosala nini soki omilingaka te?

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 23 Atako Biblia epesi toli yango na basi, mitinda oyo ezali na kati etaleli mpe mibali.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

‘Monzɛlɛ na bino ezala te oyo ya kolata bilamba ya likoló, kasi ezala nde bomoto oyo ebombaná, oyo ya motema.’​1 Petro 3:3, 4.

TOLI

Boyá bilamba oyo etikaka nzoto libándá. Ekobimisa yo lokola moto oyo az’oluka bátala ye mpe az’oluka libala.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Likanisi ya liboso oyo bato bazalaka na yango mpo na yo eutaka mingimingi na ndenge olati.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Ndeko ya libota to moninga ya mokóló oyo nakoki kotuna toli soki nalingi nasomba elamba ezali ․․․․․

Mbala ya nsima oyo nakosomba elamba, nakotalela makambo oyo: ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini baboti ná bana babendanaka mingi mpo na makambo etali bilamba?

● Soki ozali kosolola ná baboti na yo makambo etali bilamba, yango ekosalisa yo okóma na bizaleli nini?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 81]

“Ntango namonaka bana basi balati bilamba oyo ezali kotika nzoto libándá, limemya na ngai epai na bango ekitaka. Na ngámbo mosusu, ntango namonaka bato balati bilamba oyo ebimi sika kasi eza’ ya malamu, namilobelaka, ‘Boye nde nalingaka bato bámona ngai.’”​—Nataleine

[Etanda/​Bililingi na lokasas 82, 83]

Etanda ya mituna

Bilamba na ngai

Malako: Salá fotokopi ya nkasa oyo mibale. Sɛngá baboti na yo bátondisa lokasa oyo ezali na lobɔkɔ ya mobali mpe yo tondisá oyo ezali na lobɔkɔ ya mwasi. Na nsima, pesá bango lokasa na yo, mpe bápesa yo oyo ya bango, mpe bótalela elongo biyano oyo bozwi. Biyano mosusu ekamwisi bino? Likambo nini ya sika mokomoko na bino amoni epai ya moninga?

Mpo na yo Kanisá elamba moko oyo olingi kolata to kosomba.

Mpo na nini olingi elamba yango? Tyá nimero pembeni ya makambo oyo ezali na nse, kobanda na oyo eleki ntina mpo na yo.

․․․․․ Modɛlɛ ya elamba yango

․․․․․ Ebendaka bana basi to bana mibali

․․․․․ Esepelisaka bilenge mosusu

․․․․․ Okoyoka bien

․․․․․ Ntalo

․․․․․ Ntina mosusu ․․․․․

Ntango baboti na ngai bakomona elamba oyo, na ntembe te bakoloba boye

□ “Te, oyo te!”

□ “Tokotalel’ango.”

□ “Eza’ bien.”

Soki baboyi yango, mingimingi ekoki kozala mpo

□ “Ez’otika nzoto libándá.”

□ “Ebongi te.”

□ “Bato mingi balatak’ango.”

□ “Ez’ofingisa biso baboti na yo.”

□ “Eleki ntalo.”

□ Ntina mosusu ․․․․․

Tokoki koyokana na likambo yango?

Likambo nini ya malamu namoni na makanisi oyo baboti na ngai bapesi?

․․․․․

Tokoki kosala nini mpo na kobongisa elamba yango ekóma malamu?

․․․․․

Mpo na baboti na yo Kanisá elamba moko oyo mwana na yo alingi kolata to kosomba.

Okanisi ete mpo na nini mwana na yo asepeli na elamba yango? Tyá nimero pembeni ya makambo oyo ezali na nse, kobanda na oyo omoni ete eleki ntina mpo na ye.

․․․․․ Modɛlɛ ya elamba yango

․․․․․ Ebendaka bana basi to bana mibali

․․․․․ Esepelisaka bilenge mosusu

․․․․․ Okoyoka bien

․․․․․ Ntalo

․․․․․ Ntina mosusu ․․․․․

Soki namoni elamba yango, nakoloba liboso boye

□ “Te, oyo te!”

□ “Tokotalel’ango.”

□ “Eza’ bien.”

Soki naboyi yango, ekoki kozala mpo

□ “Ez’otika nzoto libándá.”

□ “Ebongi te.”

□ “Bato mingi balatak’ango.”

□ “Ez’ofingisa biso baboti na yo.”

□ “Eleki ntalo.”

□ Ntina mosusu ․․․․․

Tokoki koyokana na likambo yango?

Toboyi elamba yango mpo kaka biso moko tolingi yango te to mpo eza’ mpenza mabe?

□ Ɛɛ □ Mbala mosusu □ Te

Tokoki kosala nini mpo na kobongisa elamba yango ekóma malamu?

․․․․․

Ekateli ․․․․․

[Etanda na lokasa 84]

Tokoloba nini mpo na bana mibali?

Batoli ya Biblia oyo tolobeli na mokapo oyo etaleli mpe bana mibali. Kolekisaka ndelo te na molato. Tiká ete bomoto na yo oyo ebombaná, oyo ya motema emonana polele na miso ya bato mosusu. Ntango olingi kosomba to kolata elamba moko, omituna boye: ‘Ntango bato bakomona yango, bakoloba nini mpo na ngai? Emonisi mpenza ndenge nazalaka?’ Kobosana te ete bilamba emonisaka ndenge moto azali. Osengeli koyeba ete bilamba na yo ezali komonisa ke ozali mokristo ya nkombo mpamba te!

[Elilingi na lokasa 80]

Molato na yo ezali lokola pankarte moko oyo ezali koyebisa bato makambo nyonso oyo etali yo. “Pankarte” na yo elobi nini mpo na yo?