Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini nakoki kolongola kobanga?

Ndenge nini nakoki kolongola kobanga?

Mokapo 12

Ndenge nini nakoki kolongola kobanga?

Ɛɛ Te

Ntango ozali komitala na talatala, □ □

osepelaka ndenge ozali?

Okanisi ete ozali na bizaleli ya malamu? □ □

Okoki kotɛmɛla makanisi mabe ya baninga? □ □

Ondimaka bato mosusu báyebisa yo mabe na yo? □ □

Okoki kokanga motema ata soki bakoseli yo makambo? □ □

Omonaka ete balingaka yo? □ □

Obatelaka sante na yo? □ □

Osepelaka soki basusu basali malamu? □ □

Omimonaka lokola ozali na bomoi ya malamu? □ □

Soki oyanoli “te” na mituna mingi oyo ezali likoló, ekoki kozala ete ozali komona te bizaleli na yo ya malamu mpo ozali kobanga. Mokapo oyo ekosalisa yo oyeba malamu bizaleli yango!

BILENGE mingi bakanisaka ete bazali na nzoto ya malamu te, bakokoka kosala eloko ya malonga te, mpo bazali komona ete bazali na nse mpenza ya bato mosusu. Yo mpe okanisaka bongo? Soki ɛɛ, yebá ete ozali yo moko te!

“Mabe na ngai etindaka ngai nakóma mawamawa. Mbala mingi, ngai moko nde naminyokolaka.”​—Laetitia.

“Ata soki ozali mwasi to mobali kitoko, okokutana kaka ná mibali to basi mosusu oyo baleki yo na kitoko.”​—Sophie.

“Nazalaka nsɔninsɔni ntango nazali ná bato mosusu. Nabangaka bákanisa ete naza na ntina te.”​—Rachel.

Soki yo mpe oyokaka bongo, kolɛmba nzoto te. Okoki kozwa lisalisi. Talá makambo misato oyo ekosalisa yo olongola kobanga, mpe omitalela na ndenge ya malamu koleka.

Mipesá mpo na basusu

Vɛrsɛ oyo ekosalisa yo. “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”​Misala 20:35.

Elimboli nini? Ntango ozali kosalisa basusu, ozali mpe komisalisa. Na ndenge nini? Biblia elobi boye: “Moto oyo akabaka, ye pe bakabelaka ye; oyo apesaka bato mai ya komela, ye pe bapesaka ye.” (Batoli [Masese] 11:25, Bible na lingala ya lelo oyo) Ntembe ezali te: okomiyoka malamu koleka ntango ozali kosalisa basusu! *

“Nakanisaka nini nakoki kosala mpo na basusu na lisangá mpe nasalisaka bato oyo bazali na bosɛnga. Kolinga basusu mpe kolekisa ntango elongo na bango esalisaka ngai namiyoka malamu mpenza.”​—Breanna.

“Mosala ya kosakola ezali kitoko mingi mpo ezali kotinda yo otika kokanisa makambo na yo moko mpe okóma kokanisa basusu.”​—Javon.

Likebisi: Kosalisa basusu te kaka mpo bango mpe básalisa yo. (Matai 6:2-4) Kokabela basusu na makanisi ya mabe ekosalisa yo te. Bato mingi bakomona ete ozali kokaba na makanisi ya mabe!​1 Batesaloniki 2:5, 6.

Meká sikoyo. Kanisá moto moko oyo osalisaki kala. Moto yango ezalaki nani, mpe osalaki nini mpo na ye?

․․․․․

Omiyokaki ndenge nini na nsima?

․․․․․

Kanisá moto mosusu oyo okoki kosalisa, mpe komá ndenge oyo okoki kosalisa ye.

․․․․․

Luká baninga ya malamu

Vɛrsɛ oyo ekosalisa yo. “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.”​Masese 17:17.

Elimboli nini? Moninga ya malamu akoki mpenza kosalisa yo na ntango ya mpasi. (1 Samwele 18:1; 19:2) Koyeba ete ezali na moto moko oyo akipaka yo ekoki kosalisa yo omiyoka malamu koleka. (1 Bakorinti 16:17, 18) Na yango, zalá penepene ya baninga oyo bakosalisa yo na makambo ya malamu.

“Baninga ya solosolo bakosundola yo te.”​—Donnell.

“Ntango mosusu, koyeba ete ezali na moto moko oyo akipaka yo nde eleki ntina. Yango ekosalisa yo omiyoka ete ozali na valɛrɛ.”​—Magali.

Likebisi: Salá makasi ozala ndenge ozalaka ntango ozali ná baninga na yo; komekola te moto mosusu kaka mpo osepelisa bango. (Masese 13:20; 18:24; 1 Bakorinti 15:33) Kosala makambo ya mabe kaka mpo okamwisa basusu ekokitisa valɛrɛ na yo mpe ekosambwisa yo.​Baroma 6:21.

Meká sikoyo. Komá awa na nse nkombo ya moninga moko oyo akoki kosalisa yo olongola kobanga.

․․․․․

Okoki kozwa bibongiseli mpo na kolekisa mwa ntango ná moto yango. Moto yango asengeli kaka te kozala mbula moko ná yo.

Kolɛmba nzoto te ntango osali mabe

Vɛrsɛ oyo ekosalisa yo. “Bato nyonso basali lisumu mpe bakómaka na nkembo ya Nzambe te.”​Baroma 3:23.

Elimboli nini? Ezali solo ete ozali moto ya masumu. Yango emonisi ete na ntango mosusu okoki koloba to ata mpe kosala likambo ya mabe. (Baroma 7:21-23; Yakobo 3:2) Atako okoki kokima te kosala mabe, okoki koyeba ndenge ya kosala soki okwei na mabe yango. Biblia elobi boye: “Moyengebene akoki kokwea mbala nsambo, mpe akotɛlɛma mpenza.”​Masese 24:16.

“Ntango tozali kokokanisa makambo oyo bato mosusu basalaka, ná oyo biso tokokoka te kosala, tokomimona ete tozali na ntina te.”​—Kevin.

“Moto nyonso azali na bizaleli ya malamu mpe ya mabe. Tosengeli kosepela na bizaleli ya malamu mpe kosala makasi mpo na kolongola oyo ya mabe.”​—Lauren.

Likebisi: Ezaleli ya kozanga kokoka epesi yo nzela te ya kosalaka masumu. (Bagalatia 5:13) Soki ozali kosala makambo ya mabe na nko, okobungisa eloko oyo eleki ntina​kondimama na miso ya Yehova Nzambe!​Baebre 10:26, 27.

Meká sikoyo. Komá awa na nse ezaleli moko oyo okolinga kobongisa.

․․․․․

Komá pembeni ya ezaleli yango dati ya lelo. Lukáluká na mikanda oyo elimbolaka Biblia, mpo na koyeba ndenge ya kokolisa ezaleli yango, mpe nsima ya sanza moko, talá soki okolisi ezaleli yango.

Valɛrɛ na yo ya solosolo

Biblia elobi ete “Nzambe azali monene koleka mitema na biso.” (1 Yoane 3:20) Yango elingi koloba ete akoki komona ezaleli moko ya malamu epai na yo, oyo mbala mosusu ozali komona te. Kasi mabunga na yo nde ebebisaka yango? Kanisá ete ozali na 20 000 FC, kasi ekatani mwa moke. Okobwaka yango to okomona yango lokola ezali na valɛrɛ te mpo kaka ekatani? Te! Ezala ekatani to te, ezali kaka 20 000 FC.

Nzambe atalelaka valɛrɛ na yo ndenge wana. Mabunga na yo te nde ekosala ete Nzambe amona valɛrɛ na yo te. Ayebi mpe azwaka na valɛrɛ milende oyo osalaka mpo na kosepelisa ye, ata soki mpo na yo ezali moke! Biblia eyebisi biso ete “Nzambe azangi boyengebene te mpo abosana mosala na yo mpe bolingo oyo omoniselaki nkombo na ye.”​Baebre 6:10.

NA MOKAPO OYO ELANDI

Mawa makasi elɛmbisaka yo? Soki ezali bongo, okoki kosala nini mpo olonga yango?

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 21 Soki ozali Motatoli ya Yehova, kanisá esengo monene oyo okoki kozwa ntango ozali koyebisa basusu nsango malamu.​Yisaya 52:7.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Moto na moto ameka mosala na ye moko ndenge ezali, bongo akozwa likambo ya komikumisa na yango mpo na ye moko, kasi mpo azali komikokanisa na moto mosusu te.”​Bagalatia 6:4.

TOLI

Kolobaka te maloba lokola ‘Nasalaka kaka makambo ya mabe’ mpe ‘Nasalaka ata likambo moko ya malamu te.’ Kolekisa ndelo ndenge wana ekoki kolɛmbisa yo. Nzokande, yebáká mabe na yo, kasi mpe makoki na yo.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Ndenge omimonaka ekoki kotinda basusu bátalela yo mpe ndenge wana . . . ata mpe básalela yo makambo ndenge wana.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Soki bilenge mosusu bazali koloba mabe mpo na ngai, nako ․․․․․

Soki nazali komona kaka mabe na ngai, nako ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini bilenge mosusu bamimonaka ete bazali na ntina te?

● Mpo na nini ezali na ntina komipesa nzoto mwa kilo?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 88]

“Moto akoki kozala kitoko, kasi azali komimona kitoko te. To moto mosusu akoki kozala kitoko te, kasi azali komimona nɛti aleki bato nyonso. Nyonso wana ezali kaka ndenge moto amitalelaka.”​—Alyssa

[Elilingi na lokasa 90]

Valɛrɛ ya mbongo esilaka te mpo ekatani mwa moke; ndenge moko mpe, valɛrɛ na yo na miso ya Nzambe ekosila te mpo ozali moto ya kozanga kokoka