Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nasala nini mpo natika kozala mawamawa?

Nasala nini mpo natika kozala mawamawa?

Mokapo 13

Nasala nini mpo natika kozala mawamawa?

“Soki baninga na ngai baz’okoka kosilisa mikakatano na bango te, nasalisaka bango básilisa yango mpe bámiyoka malamu. Kasi na nsima​wana bato mingi bamonaka yango te—​soki nazongi na ndako, nakɔtaka na shambrɛ na ngai mpe nabandaka kolela.”​Kellie.

“Ntango nazali mawamawa, nakimaka bato. Soki babengisi ngai esika moko, nakoluka kaka likambo moko boye mpo nakende te. Nasalaka makasi nazala mawamawa te ntango naza ná bato ya libota na ngai. Bakanisaka ete naza malamu.”​Rick.

YO MPE okanisaka lokola Kellie to Rick? Soki ɛɛ, kokanisa mbala moko te ete ozali na likambo moko ya mabe. Ekómaka ete moto nyonso ayoka mawa. Ata mibali mpe basi ya sembo oyo Biblia elobeli bayokaki mpe mawa.​1 Samwele 1:6-8; Nzembo 35:14.

Na ntango mosusu, okoki koyeba ntina oyo ozali koyoka mawa, kasi na ntango mosusu okoki mpe koyeba te. Anna, oyo azali na mbula 19, alobi boye: “Esengeli kaka te okutana na likambo moko ya nsɔmɔ mpo oyoka mawa. Mawa ekoki koyela yo ntango nyonso ata soki ozali na mikakatano te. Eza mpasi mpo na kolimbola, kasi esalemaka bongo!”

Ezala oyebi ntina to te, okosala nini soki okómi mawamawa? Meká kosala boye:

1. Yebisá bato ndenge ozali koyoka. Ntango Yobo akómaki na mpasi makasi, alobaki ete: “Nakoloba na bololo ya molimo na ngai!”​Yobo 10:1.

Kellie: “Nayokaka bien soki nayebisi moto mosusu ndenge nazali komiyoka. Nsukansuka, moto moko ayebi ndenge naz’omiyoka. Ezali lokola nde azali kobwakela ngai nsinga mpo na kobimisa nga na libulu moko mozindo​—mpe mbala moko nabiki!”

Likanisi: Komá awa na nse, nkombo ya moninga moko oyo okoki kosolola na ye soki okómi mawamawa.

․․․․․

2. Komá makanisi na yo. Ntango okómi mawamawa, meká kokoma makanisi na yo na papye. Na banzembo oyo akomaki, Davidi amonisaki ndenge azalaki koyoka mawa makasi. (Nzembo 6:6) Kokoma makanisi na yo ekoki kosalisa yo ‘obatela bwanya ná likoki ya kokanisa.’​Masese 3:21.

Magali: “Mawa ebebisaka makanisi na ngai, kokoma esalisaka nga nabongisa makanisi yango. Soki okoki kobimisa polele makanisi na yo, mpe kobongisa yango malamu, mawa ekokita.”

Likanisi: Salelá tablo oyo ezali na lokasa 93 mpo na koyeba ndenge ya malamu ya kolonga makambo oyo ekoki kopesa yo mpasi. Yango ekosalisa yo okitisa mawa na yo.

3. Bondelá mpo na yango. Biblia elobi ete soki ozali kobondela mpo na mitungisi na yo, ‘kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela motema na yo mpe makanisi na yo.’​Bafilipi 4:6, 7.

Esther: “Nazalaki koluka koyeba ntina oyo nazalaki mawamawa, kasi nakokaki te. Nasɛngaki Yehova asalisa ngai nazala na esengo. Ezalaki kopesa ngai nkanda ndenge nazalaki koyeba te ntina oyo nazalaki mawamawa. Nsukansuka, natikaki kozala mawamawa. Kokanisa ata mokolo moko te ete libondeli ezali na nguya te!”

Likanisi: Saleláká makanisi oyo ezali na Nzembo 139:23, 24 ntango obondelaka Yehova. Fungolelá ye motema na yo mpe sɛngá ye asalisa yo oyeba ntina oyo okómi mawamawa.

Longola makanisi oyo touti kolobela, okoki kozwa batoli ya ntina mingi na Biblia, Liloba ya Nzambe. Kokɔtisa na makanisi batoli kitoko ya Biblia, ekosalisa yo oyoka malamu. (Nzembo 1:1-3) Okoki kozwa batoli ya ndenge wana soki otángi masolo oyo ezali na motó ya likambo “Bandakisa ya kolanda,” na buku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano oyo ebongi, Volimi 1 mpe 2. Na lokasa 227 ya Volimi 2, okomona ndenge oyo ntoma Paulo alongaki makanisi ya mabe oyo ezalaki koyela ye ntango mosusu mpo na mabunga na ye.

Soki mawa ezali kosila te

Ryan alobi boye: “Mikolo mosusu, namonaka malamu natikala na ngai na mbeto mpe nabima te mpo nakende kokutana lisusu na makambo oyo ekopesa ngai mpasi.” Ryan anyokwamaka na makanisi mpe azali ye moko te. Baankɛtɛ oyo bato ya mayele basali emonisi ete elenge moko kati ya bilenge minei, anyokwamaka na makanisi liboso akóma mokóló.

Ndenge nini okoki koyeba soki onyokwamaka na makanisi? Ekoki mbala mosusu komonana soki moto akómi mbala moko nkandankanda mpe bizaleli na ye ebongwani, akómi kokima bato, aza lisusu na mposa ya kosala mosala moko te, abongoli mbala moko ndenge amesani kolya mpe bangonga oyo alalaka, mpe azali mpenza komiyoka ete azali na ntina te, mpe azali komimemisa ngambo kaka mpamba.

Na ntembe te, bilembo oyo emonanaka epai ya bato mingi. Kasi, soki bilembo yango eumeli koleka pɔsɔ mibale, mpo na nini te koyebisa yango baboti na yo mpo bókende komona monganga? Monganga akoki koyebisa yo soki mawa na yo ezali maladi. *

Soki ozali konyokwama na makanisi, ezali likambo ya koyokela nsɔni te. Bato mingi oyo bazalaki na maladi yango bayokaki malamu ntango bazwaki lisalisi ya monganga​mbala mosusu kutu, malamu koleka ndenge bazalaki liboso! Ezala mawa na yo ezali kouta na konyokwama ya makanisi to te, kobosana te maloba ya kolendisa oyo ezali na Nzembo 34:18: “Yehova azali pene na baoyo motema ebukani; mpe abikisaka baoyo elimo etutami.”

NA MOKAPO OYO ELANDI

Bongo soki mawa elekeli yo mpe okómi na makanisi ya komiboma?

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 22 Soki mawa eumeli mingi, bilenge mosusu bakanisaka komiboma. Soki ozali na makanisi ya ndenge wana, kozanga koumela, sololá na mokóló moko oyo otyelaka motema.​Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 14 ya buku oyo.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Yehova azali pene na baoyo motema ebukani; mpe abikisaka baoyo elimo etutami.”​Nzembo 34:18.

TOLI

Komá ndenge omiyokaka ntango ozali mawamawa mpe eloko oyo epesaka yo mawa yango. Nsima ya sanza moko, tángá makambo oyo okomaki. Okanisi ete makambo yango ebongwani? Soki ɛɛ, komá nini esalisaki yo.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Eza’ mabe te kolela, ata soki oza’ mwana mobali. Na eleko moko ya bomoi na ye, mokonzi Davidi alobaki ete: “Butu nyonso nazali kopolisa mbeto na ngai na mai ya miso.”​Banzembo [Nzembo] 6:7, Bible na lingala ya lelo oyo.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Mpo nalongola mawa, nakoki kosala makambo oyo: ․․․․․

Mawa na ngai ekokita soki nazali esika moko na baninga oyo: ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Kolela ezali mpenza na ntina?

● Ndenge nini kozala ná bato mosusu ekoki kosalisa yo otika kozala mawamawa?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 96]

“Soki nazali mawamawa, esengeli nakimaka bato te. Ya solo, nalingaka kozala ngai moko mpo nakanisa mpe nayeba ndenge naz’omiyoka, mpe mbala mosusu nalela. Kasi na nsima, nayebaka ete nasengeli kozala ná bato mpo natika kokanisa makambo oyo ezali kokómisa ngai mawamawa.”​—Christine

[Etanda/​Bililingi na lokasa 93]

Etanda ya mituna

Mpo na kosilisa mawa na yo

Tondisá tablo

Likambo

Molakisi na biso amonisaka ete nazali na ntina te

Likanisi ya mabe

Nakomipesa lisusu te mpo nazwa bapwɛ mingi na liteya yango

Likanisi ya malamu

Lisalisi: Talá mokapo 20 ya buku oyo

Likambo

Moninga moko akipe ngai te

Likanisi ya mabe

Nakopanza bansango ya lokuta mpo na ye

Likanisi ya malamu

Lisalisi: Talá mokapo 10 ya Volimi 2

Likambo

Baboti na ngai baz’oboma libala

Likanisi ya mabe

Nakokangela moko na bango to bango nyonso mibale nkanda

Likanisi ya malamu

Lisalisi: Talá mokapo 4 ya buku oyo

Likambo

․․․․․

Likanisi ya mabe

․․․․․

Likanisi ya malamu

․․․․․

Likambo

․․․․․

Likanisi ya mabe

․․․․․

Likanisi ya malamu

․․․․․

[Elilingi na lokasa 95]

Soki basusu basalisi yo mpe yo moko osali milende, okotika kozala mawamawa