Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini te komiboma?

Mpo na nini te komiboma?

Mokapo 14

Mpo na nini te komiboma?

“MALAMU nakufa na esika ya kozala na bomoi.” Nani alobaki maloba wana? Moto moko oyo azalaki kondimela Nzambe te? To moto oyo atikaki Nzambe? To mpe moto moko oyo Nzambe asundolaki? Te. Moto yango ezalaki nde Yona, moto oyo azalaki mosambeli ya solosolo ya Nzambe, kasi azalaki komitungisa mpenza.​Yona 4:3, Biblia Today’s English Version.

Biblia elobi te ete Yona alingaki komiboma. Atako bongo, ndenge amilelaki emonisi likambo moko monene: na ntango mosusu, ata mosaleli ya Nzambe akoki komitungisa mingi mpenza.​Nzembo 34:19.

Bilenge mosusu bamitungisaka makasi, mpe bamonaka ete ezali na ntina te bákoba kozala na bomoi. Bakoki komiyoka lokola Laura, oyo azali na mbula 16, mpe alobi boye: “Nazalaki komitungisa na makanisi mbala mingi, mpe yango eumelaki bambula mingi. Mbala mingi nazalaki kokanisa komiboma.” Soki oyebi moto moko oyo alobaki ete azali na mposa ya komiboma​to soki yo moko okómi na makanisi wana—​okoki kosala nini? Tótalela malamumalamu mpo na nini moto akoki kokóma na makanisi wana.

Ntina oyo bato babungisaka elikya

Mpo na nini moto akómaka na makanisi ya komiboma? Ekoki kozala mpo na bantina ebele. Ntina moko ezali ete tozali na “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano,” mpe bilenge mingi bakutanaka na mikakatano makasi na bomoi. (2 Timote 3:1) Lisusu, ezaleli na biso ya bato ya masumu ekoki kosala ete basusu bákóma na makanisi ya mabe mpo na bango moko mpe mpo na bato na mokili. (Baroma 7:22-24) Mbala mosusu, yango ezalaka mpo basalá bango mabe na nko. Ntango mosusu ekoki kozala mpo na maladi moko boye. Yango wana, na ekólo moko, balobi ete bato mingi (90%) oyo bamibomaki, bazalaki kobɛla maladi moko ya motó. *

Ya solo, moto nyonso akutanaka na mikakatano. Biblia elobi ete “biloko nyonso oyo ezalisamá ezali se kokimela elongo mpe konyokwama elongo tii sikoyo.” (Baroma 8:22) Bilenge mpe bazali na kati. Kutu, makambo ya mabe ekoki kosala mpenza bilenge mpasi na motema, na ndakisa:

Liwa ya ndeko moko, moninga to nyama moko oyo ozalaki kolinga mingi

Matata na kati ya libota

Ozwi te na kelasi

Yo ná fianse na yo bosilani

Basali yo mabe na nko (babɛti yo to mpe basangisi na yo nzoto na makasi)

Ya solo, bilenge mingi bakutanaka ata na likambo moko kati na makambo oyo touti kotánga. Mpo na nini bamosusu bayikaka mpiko koleka basusu? Bato ya mayele balobaka ete bilenge oyo balɛmbaka nzoto noki bamonaka ete moto moko te akoki kosalisa bango mpe ete likambo yango ekosila te. Bilenge wana bazali komona ete elikya mpo na bango ezali te. Bazali mpenza na mposa ya kokufa te; balingi kaka kosilisa mpasi.

Elikya ezali te?

Mbala mosusu oyebi moto moko oyo alingi kosilisa mpasi na ye​lokola mpasi yango ezali makasi mpenza, mposa na ye ezali ete amiboma. Soki ezali bongo, okoki kosala nini?

Soki moninga moko azali komona mpasi mpenza mpe alingi amiboma, salá makasi oyebisa ye akende koluka lisalisi. Ata soki alingi te koyebisa moto mosusu ndenge azali komiyoka, osengeli kosolola na mokóló moko. Kobanga te ete bóbebana. Soki oyebisi likambo yango, okoki kobikisa moninga na yo!

Bongo soki yo moko nde okómá na makanisi ya komiboma? Kobomba makanisi yango mpo na yo moko te. Sololá na moto moko, na ndakisa moboti, moninga, to moto mosusu oyo atyelaka yo likebi mpe oyo akoyokela yo mpe akozwa makambo na yo na lisɛki te. Soki osololi ná moto mosusu makambo na yo, okobungisa eloko moko te, kutu okozwa bolamu mingi. *

Ya solo, bampasi na yo ekosila te kaka mpo oyebisi yango basusu. Kasi kosolola na moto moko oyo otyelaka motema, ekoki kosalisa mingi mpo otalela likambo na yo na ndenge ebongi mpenza. Ekoki ata kosalisa yo oluka ndenge mosusu ya kosilisa mokakatano na yo.

Makambo ebongwanaka

Ntango okutani na mikakatano, kobosana likambo oyo te: Ata soki likambo yango ezali mpasi ndenge nini, na nsima makambo ekobongwana. Mokolo moko, Davidi, moko ya bakomi ya nzembo, oyo akutanaki na mikakatano ndenge na ndenge, abondelaki Nzambe na maloba oyo: “Obongoli mawa na ngai mabina.”​Nzembo 30:11.

Na ntembe te, Davidi azalaki kokanisa te ete mabina to esengo ekoumela libela. Ayebaki ete na bomoi bampasi eyaka mpe esilaka. Osilá komona ete likambo yango ezali solo ata ntango okutanaka na mikakatano? Mikakatano mosusu ekoki komonana makasi mpenza mpo na sikoyo. Kasi kitisá motema. Makambo ebongwanaka, mbala mingi na ndenge ya malamu. Na ntango mosusu, mikakatano ekoki kokita na ndenge oyo ozalaki kokanisa te. Na ntango mosusu, okoki kolonga mokakatano yango na ndenge oyo ozalaki kokanisa te. Likambo ya ntina ezali ete makambo ya mpasi ekoumela te libela na libela.​2 Bakorinti 4:17.

Ntina ya libondeli

Lolenge ya malamu koleka ya kosolola ezali libondeli. Okoki kobondela lokola Davidi oyo alobaki ete: “Ee Nzambe, talá ngai malamumalamu mpe yebá motema na ngai. Talá ngai malamumalamu mpe yebá makanisi oyo etungisaka ngai, mpe moná soki kati na ngai ezali na nzela moko oyo eyokisaka mpasi, mpe kambá ngai na nzela ya seko.”​Nzembo 139:23, 24.

Libondeli ezali kaka te mpo na kokitisa mpasi na yo. Ezali mpenza lisolo ná Tata na yo ya likoló, oyo alingi ete ofungolela ye ‘motema na yo.’ (Nzembo 62:8) Kanisá mateya oyo ya ntina mpenza mpo na Nzambe:

Ayebi malamu makambo oyo ebimiselaka yo mikakatano.​Nzembo 103:14.

Ayebi yo malamu koleka yo moko.​1 Yoane 3:20.

“Atyelaka [yo] likebi.”​1 Petro 5:7.

Na mokili na ye ya sika, Nzambe “akopangwisa mpisoli nyonso” na miso na yo.​Emoniseli 21:4.

Soki ezali likambo ya maladi

Ndenge tomonisaki yango liboso, mbala mingi bato bakómaka na mposa ya komiboma mpo bazali na maladi moko boye. Soki ezali bongo mpo na yo, koyoka nsɔni te mpo na koluka lisalisi. Yesu alobaki ete bato oyo bazali kobɛla nde bazalaka na mposa ya monganga. (Matai 9:12) Likambo ya esengo ezali ete maladi mingi ekoki kozwa nkisi. Mpe ntango mosusu nkisi ekoki kosalisa yo omiyoka lisusu malamu koleka! *

Biblia epesi biso elikya moko ya kolendisa mpenza: na mokili ya sika oyo Nzambe akosala, “moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi.’” (Yisaya 33:24) Nzambe alobi ete na ntango wana, “makambo ya kala ekokanisama lisusu te, mpe ekoya na motema te.” (Yisaya 65:17) Liboso ntango yango eya, salá makasi olonga mikakatano ya bomoi, na elikya ete na ntango oyo Nzambe atye, komitungisa na makanisi ekozala lisusu te.​Emoniseli 21:1-4.

MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 9, NA VOLIMI 2

NA MOKAPO OYO ELANDI

Baboti na yo balingi koyeba makambo nyonso ya bomoi na yo​ata makambo mosusu oyo olingi te báyeba. Ekoki kosalema ete ozalaka na makambo na yo ya kati?

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 7 Kasi, ezali na ntina tóyeba ete bilenge mingi oyo babɛlaka maladi moko ya motó bamibomaka te.

^ par. 18 Bakristo oyo bazali na mitungisi bakoki mpe kozwa lisalisi epai ya bankulutu ya lisangá.​Yakobo 5:14, 15.

^ par. 31 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 13 ya buku oyo.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino.”​Bafilipi 4:6, 7.

TOLI

Ntango omoni lokola obandi komitungisa, kende kokima mbangu mwa moke. Kozwa mwa mopɛpɛ libándá mpe kosala ngalasisi ya nzoto ekoki kokitisa yo motema mpe okomiyoka malamu.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Ezali kaka te moto oyo amibomi nde amonaka mpasi, kasi mpe bandeko to baninga oyo batikali.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Soki nazali komiyoka lokola naza na ntina te mpe balingaka ngai te, nakosolola na (komá nkombo ya moto yango) ․․․․․

Likambo moko ya malamu na bomoi na ngai oyo nakoki kokanisa mpe kozala na botɔndi mpo na yango ezali ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Ata mikakatano makasi ezali kaka mpo na ntango mokuse. Mpo na nini kokanisa likambo yango ekoki kosalisa yo?

● Na ndenge nini moto oyo amibomi akoki mpe koyokisa bato mosusu mpasi?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 104]

“Na ntango moko boye, natungisamaki makasi mpenza na makanisi, mpe nazalaki na mposa nakufa. Kasi sikoyo, nazali kotambwisa bomoi na ngai malamu mpo nazali kobondela mingi mpe nazali kozwa lisalisi ya monganga.”​—Heidi

[Etanda na lokasa 100]

Soki mitungisi elekeli yo

Ata mpe mibali mpe basi ya sembo oyo Biblia elobeli batungisamaki ntango mosusu na bomoi na bango. Tótalela mwa bandakisa.

Rebeka: “Soki ezali boye, mpo na nini nazali na bomoi?”​Ebandeli 25:22.

Moize: “Nabondeli yo, bomá ngai koboma, . . . kotika te ete namona mpasi.”​Mitángo 11:15.

Eliya: “Ee Yehova, longolá molimo na ngai, mpo naleki bankɔkɔ na ngai te.”​—1 Bakonzi 19:4.

Yobo: “Aa soki obombaka ngai ata na Nkunda, . . . soki okatelaka ngai ata ntango mpo okanisa ngai!”​Yobo 14:13.

Nsukansuka, makambo ya mokomoko ya bato oyo touti kolobela ebongaki, na ndenge oyo bandimaki te. Zalá na kondima ete ekoki kozala mpe bongo mpo na yo!

[Elilingi na lokasa 102]

Kobungisa elikya ezali lokola mapata oyo eyindi​nsukansuka ekoleka