Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Eza mabe soki nalingi te báyeba makambo na ngai ya kati?

Eza mabe soki nalingi te báyeba makambo na ngai ya kati?

Mokapo 15

Eza mabe soki nalingi te báyeba makambo na ngai ya kati?

Tyá elembo ✔ na likambo oyo okosala soki okutani na moko ya makambo oyo elandi:

1. Ozali na kati ya shambrɛ na yo; na mbala moko, ndeko na yo akɔti kozanga abɛta porte.

□ ‘Likambo te. Ntango mosusu, ngai mpe nasalaka bongo epai na ye.’

□ ‘Aza impoli! Bongo soki akutaka nga naz’olata?’

2. Ozongi ndako mpe baboti na yo babandi kotuna yo mituna ebeleebele. “Okendaki wapi? Ozalaki kosala nini? Ozalaki ná banani?”

□ ‘Likambo te. Mbala mingi, nayebisaka bango makambo nyonso.’

□ ‘Epesaka nga nkanda! Baboti na ngai bazalaka na konfianse na ngai te!’

NTANGO ozalaki mwana moke, ezalaki na ntina te obombela bato mosusu makambo na yo. Soki leki na yo akɔti na shambrɛ na yo kozanga abɛta porte, ozalaki kosilika te. Soki baboti na yo batuni yo motuna, ozalaki kopesa eyano mbala moko. Na ntango wana, ozalaki kolinga ete bato mosusu báyeba makambo na yo. Sikoyo, oz’olinga lisusu bongo te. Corey, oyo azali na mbula 14, alobi boye: “Namonaka malamu nabomba makambo mosusu mpo na ngai moko.” Tótalela makambo mibale oyo ezali komonisa ete kobombela bato makambo na yo ekoki kozala mpasi.

Mposa ya kozala kaka yo moko

Ezali na bantina mingi oyo ekoki kosala ete oluka kozala kaka yo moko. Mbala mosusu, olingi kaka ‘kopema mwa moke.’ (Marko 6:31) To soki olingi kobondela, okoki kosala ndenge Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Kɔtá na eteni ya kati ya ndako na yo mpe, nsima ya kokanga porte na yo, bondelá Tata na yo.” (Matai 6:6; Marko 1:35) Likambo ya mpasi ezali ete ntango okangi porte ya shambrɛ na yo (soki ozali na yango), baboti na yo bakoki koyeba te ete ozali kobondela! Mpe bandeko na yo bakoyeba te ntango nini ozali na mposa ya kozala kaka yo moko.

Oyo okoki kosala. Na esika ya koswana ná basusu mpo olingaka te bato báyeba makambo na yo, salá nde boye:

● Yebisá bandeko na yo kozanga kolekisa ndelo ntango oyo olingaka ete ozala yo moko. Soki esengeli, tuná baboti soki bakoki kosalisa bino na likambo yango. *

● Salá makasi oyeba makanisi ya baboti na yo. Rebecca, oyo azali na mbula 16, alobi ete: “Na ntango mosusu, baboti na ngai balandelaka ngai mingi. Kasi, mpo na koloba solo, nalingaki mpe kolandela mwana na ngai soki nazalaki moboti​mingimingi mpo na makambo mingi oyo emekaka kondima ya bilenge!” Ndenge moko na Rebecca, yo mpe okoki koluka koyeba mpo na nini baboti na yo bazali komitungisa?​Masese 19:11.

● Omituna boye: ‘Natindaka baboti na ngai bákanisa ete nazali kosala likambo moko ya mabe ntango nakangi porte na nga ya shambrɛ? Nabombelaka bango makambo na ngai nyonso, mpe yango wana bakómá kolandelalandela ngai?’ Soki eyano na yo na mituna oyo ezali te, kasi baboti na yo batyelaka yo motema te, yebisá bango na malɛmbɛ mpe na komikitisa nyonso ndenge ozali komiyoka. Yoká na likebi mpenza makambo oyo ezali kotungisa bango mpe salá nyonso ete likambo moko te oyo ozali kosala etinda bango bákanisela yo mabe.​Yakobo 1:19.

Ntango ozali kopona baninga

Ntango ozali naino elenge, ezali mabe te opona baninga mosusu oyo bazali na libota na bino te. Eza mpe mabe te ete baboti na yo bámituna soki baninga na yo bazali bato ya ndenge nini mpe soki bosalaka nini ntango bozali esika moko. Kasi, na ntango mosusu okoki komona ete baboti na yo bazali komitungisa koleka ndelo. Amy, oyo azali na mbula 16, alobi boye: “Nalingaka te ntango nazo’salela telefone mpe naz’okoma bamesaje, baboti na ngai bábwakaka liso ntango nyonso mpe bátuna ngai soki nazo’solola na nani.”

Oyo okoki kosala. Na esika otika baninga na yo bákabola yo ná baboti na yo, meká nde kosala boye:

● Kobombaka baninga na yo te, mpe salá nyonso mpo baboti na yo báyeba bango malamu. Okolinga te ete baboti na yo báluka koyeba na kobombana soki baninga na yo bazali banani, kasi soki bazali koyeba bango malamu te, bakoluka kaka kosala bongo. Kobosana te ete soki baboti na yo bazali koyeba malamu bato oyo ofandaka mingi ná bango, bakomitungisa mpe mingi te mpo na baninga oyo ozali kopona.

● Likambo oyo olingaka te ezali ete baboti na yo báyeba makambo na yo nyonso to eza nde na makambo oyo ozali koluka kobombela bango? Brittany, elenge moko ya mbula 22, alobi boye: “Soki ozali na ndako ya baboti, mpe baboti na yo bazali komitungisa mpo na likambo moko, osengeli komituna boye: ‘Soki likambo oyo naz’osala eza’ mabe te, mpo na nini nasengeli kobomba yango?’ Kasi, soki oz’omona ete osengeli kobomba yango, wana likambo ezali.”

Oyo osengeli kosala

Sikoyo, okoki kokanisa mwa makambo mosusu oyo okoki kosala mpo likambo moko oyo omoni ete eza kaka sɛkɛlɛ na yo moko ebimisa matata te. Komá awa na nse, biyano na yo na mituna oyo etali makambo oyo elandi:

Likambo 1: Luká koyeba likambo yango. Likambo nini olingaka ete bato mosusu báyeba te?

․․․․․

Likambo 2: Talelá makanisi ya baboti na yo. Okanisi ete nini mpenza ekoki kotungisa bango?

․․․․․

Likambo 3: Luká ndenge ya kosilisa likambo yango. Na ndenge nini, kozanga koyeba, okoki kosala ete makambo ebeba lisusu koleka? Mbongwana nini okoki kosala na kotalela eyano oyo opesi likoló? Okolinga ete baboti na yo básala nini mpo na likambo na yo?

․․․․․

Likambo 4: Lobelá likambo yango. Komá ndenge oyo okoki kobanda kosolola ná baboti na yo mpo na makambo oyo olingaka ezala kaka ya yo moko.

․․․․․

NA MOKAPO OYO ELANDI

Tata to mama na yo akufá? Soki ɛɛ, epai wapi okoki kozwa makasi?

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 14 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 6 ya buku oyo.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Salá nyonso oyo ekoki na yo mpo ozala moto oyo andimami na miso ya Nzambe, mosali oyo azali koyoka nsɔni te mpo na mosala na ye.”​2 Timote 2:15.

TOLI

Ntango ozali kosolola ná baboti na yo makambo na yo moko, komilelalela te. Lobelá nde makambo oyo ezali kotungisa yo. Bokeseni nini ezali kati na maloba wana mibale? Komilelalela elimboli kotya makanisi kaka na makambo oyo ozali komona ete baboti na yo bazali kosala mabe. Kolobela mitungisi na yo ekosalisa bino nyonso bóluka ndenge ya kosilisa yango.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Soki ozali kobombela baboti na yo makambo te, bakozala mpe na konfianse mingi epai na yo.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Mpo baboti na ngai bázala na konfianse na ngai (to bázala lisusu na konfianse na ngai), nako ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini ebongi ete baboti na yo báluka koyeba makambo na yo ya kati?

● Na ndenge nini milende oyo ozali kosala mpo osololaka malamu ná baboti na yo ekosalisa yo oyeba kosolola na mikóló mosusu na nsima?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 108]

“Baboti balingaka te ete likambo moko ya mabe ekómela yo mpe ntango mosusu okoki komona lokola ete bazali kokɔta na makambo na yo. Emonanaka ete ezali malamu te. Kasi, mpo na koloba solo, soki nazalaki moboti, nalingaki mpe nasala kaka bongo.”​—Alana

[Elilingi na lokasa 109]

Konfianse ezali lokola salɛrɛ; bapesaka yango moto oyo asalaka