Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nakoki kosala nini soki moboti na ngai akufi?

Nakoki kosala nini soki moboti na ngai akufi?

Mokapo 16

Nakoki kosala nini soki moboti na ngai akufi?

Atako mokapo oyo elobeli mingimingi ntango moboti moko akufi, tokoki kosalela mpe batoli yango ntango ndeko moko ya libota to moninga moko ya motema akufi.

“Ntango mama akufaki, nayebaki te nasala nini mpe namonaki lokola bomoi na ngai ezali lisusu na ntina te. Ye nde moto azalaki kosangisa libota.”​Karyn.

EZA na makambo mingi te oyo ekoki kosala moto mpasi mingi koleka soki papa to mama na ye akufi. Kutu, ntango mosusu okoyoka mawa makasi oyo naino oyoká te liboso. Brian, oyo azalaki na mbula 13 ntango tata na ye akataki motema, alobi boye: “Na butu wana ntango tomonaki ete akufi, tozalaki kaka kolela mpe koyambana na mawa.” Natalie, oyo azalaki na mbula 10 ntango papa na ye akufaki na kanser, alobi boye: “Nayebaki te nini nasala. Elekelaki ngai.”

Bato nyonso bayokaka mawa ndenge moko te ntango moto moko akufi. Biblia elobi ete “moto na moto” azali na “bolɔzi na ye moko mpe mpasi na ye moko.” (2 Ntango 6:29) Meká naino kokanisa mpasi oyo oyokaki ntango moboti na yo akufaki. Komá awa na nse (1) ndenge omiyokaki ntango oyokaki ete moboti na yo akufi mpe (2) ndenge oyo ozali komiyoka sikoyo. *

1 ․․․․․

2 ․․․․․

Ntango mosusu biyano na yo emonisi ete ozali lisusu na mawa makasi te. Yango ezali mabe te. Elakisi te ete obosani moboti na yo. Epai mosusu, okoki komiyoka ete mpasi na yo ezali kaka ndenge moko to ebakisami nde. Ekoki kozala ete mawa na yo ezali lokola ntango mbonge ebɛtaka makasi na libongo na mbalakaka mpe na nsima ekitaka. Yango mpe ezali mabe te​—ata soki ekómeli yo bambula mingi nsima ya liwa ya moboti na yo. Kasi, motuna yango oyo: Okoki kosala nini soki mawa eyeli yo makasi mpo na liwa ya moboti na yo?

Soki kolela eyeli yo, lelá! Kolela ekitisaka mpasi. Kasi, okoki komiyoka ndenge Alicia amiyokaki. Azalaki na mbula 19 ntango mama na ye akufaki. Alicia alobi boye: “Namonaki ke soki nazo’lela mingi, basusu bakokanisa ete nazangi kondima.” Kasi, kanisá naino: Yesu Kristo azalaki moto ya kokoka mpe azalaki na kondima makasi epai ya Nzambe. Kasi, “alelaki, abimisi mpisoli” ntango amonaki bato bazali kolela Lazare, moninga na ye ya motema. (Yoane 11:35) Yango wana, soki kolela eyeli yo, lelá. Elakisi te ete ozangi kondima! Alicia alobi boye: “Nsukansuka, nalelaki. Nalelaki makasi. Nazalaki kolela mikolo nyonso.” *

Komipesa foti te. Karyn, oyo azalaki na mbula 13 ntango mama na ye akufaki, alobi boye: “Butu nyonso, nazalaki kokende na shambrɛ mpo na kopesa mama bize liboso alala. Mokolo moko nasalaki yango te. Mokolo oyo elandaki, mama akufaki. Nayebi ete ndenge nazali kokanisa ezali malamu te, kasi nayokaki ete namemi ngambo ndenge nakendaki kotala ye te na butu wana, mpe mpo na makambo oyo esalemaki mokolo oyo elandaki. Papa akendaki mobembo moko ya mosala mpe asɛngaki ngai ná yaya na ngai tókende kotala soki mama aza malamu. Kasi tolalaki retare. Ntango nakɔtaki na shambrɛ, mama azalaki lisusu kopema te. Nayokaki nsɔmɔ mpo ntango papa akendaki, mama azalaki malamu!”

Lokola Karyn, ntango mosusu yo mpe oyokaka mabe mpo na makambo oyo obosanaki kosala. Okoki kobanda komitungisa ete moboti na yo alingaki kokufa te soki osalaki mwa eloko. ‘Soki ata nasɛngaki papa aluka monganga.’ ‘Soki ata nakendaki kotala mama na ngonga malamu.’ Soki makanisi ya ndenge wana ezali kotungisa yo, kobosana likambo oyo te: Ezali mabe te koyoka mawa mpo na makambo oyo olingaki kosala kasi osalaki yango te. Ezali solo ete olingaki kosala makambo ndenge mosusu soki oyebaki nini ekokóma. Kasi oyebaki yango te. Yango wana ntina ya komimemisa ngambo ezali te. Liwa ya moboti na yo ezali foti na yo te! *

Yebisá basusu ndenge ozali komiyoka. Masese 12:25 elobi boye: “Maloba ya kitoko ekopesa yo esengo.” (Biblia Today’s English Version) Ekoki kozala mpasi osilisa mawa na yo soki ozali kobomba yango na motema. Nzokande, koyebisa moto moko oyo otyelaka motema ndenge ozali komiyoka ekosala ete ozwa “maloba ya kitoko” oyo ozali mpenza na mposa na yango.

Sololá ná Nzambe. Na ntembe te, okoyoka malamu koleka soki ofungoleli Yehova Nzambe ‘motema na yo’ na libondeli. (Nzembo 62:8) Yango ezali te kaka mayele moko boye oyo okoki kosalela mpo oyoka malamu. Ntango ozali kobondela, ozali kopusana pene na “Nzambe ya kobɔndisama nyonso, oyo abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.” (2 Bakorinti 1:3, 4) Lolenge moko oyo Nzambe abɔndisaka biso ezali na nzela ya Liloba na ye, Biblia. (Baroma 15:4) Mpo na nini te kosala liste ya bavɛrsɛ oyo epesaka yo makasi? *

Mawa esilaka noki te. Kasi, Biblia ekoki kobɔndisa, mpo endimisi biso ete na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, “liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.” (Emoniseli 21:3, 4) Yo mpe okoki komona ete kokanisa na bilaka wana ekosalisa yo oyika mpiko ntango moboti na yo akufi.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 6 Soki okoki koyanola na mituna yango sikoyo te, okoki komeka kosala yango ata nsima.

^ par. 10 Kokanisa te ete osengeli kaka kolela mpo na komonisa ete ozali na mawa. Bato nyonso bayokaka mawa ndenge moko te. Likambo ya ntina yango oyo: Soki omoni ete mai ya miso elingi ebima, yebá ete ekoki kozala “ntango ya kolela.”​Mosakoli 3:4.

^ par. 12 Soki makanisi ya ndenge wana ezali kaka kotungisa yo, yebisá yango moboti na yo oyo atikali to mokóló mosusu ndenge ozali komiyoka. Na nsima, okobanda kotalela makambo na bokatikati.

^ par. 14 Bamosusu babɔndisamaki na bavɛrsɛ oyo: Nzembo 34:18; 102:17; 147:3; Yisaya 25:8; Yoane 5:28, 29.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“[Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”​Emoniseli 21:4.

TOLI

Komá makambo na yo esika moko boye. Kokoma makanisi na yo na oyo etali moboti na yo oyo akufá ekoki kosalisa mpenza okitisa mawa na yo.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Kolela elakisi te ete olɛmbá. Ata mibali ya makasi lokola Abrahama, Yozefe, mpe Davidi balelaki ntango bazalaki na mawa makasi.​Ebandeli 23:2; 50:1; 2 Samwele 1:11, 12; 18:33; Yoane 11:35.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Soki mawa elekeli ngai, nako ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti na ngai oyo atikali na bomoi boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini ezali malamu kokanisa basuvenire ya malamu oyo ozali na yango ya moboti na yo oyo akufá?

● Mpo na nini kokoma makanisi na yo ekosalisa yo okitisa mawa na yo?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 112]

“Nazalaki kobomba na motema ndenge nazalaki komiyoka. Nalingaki komiyoka malamu koleka soki nayebisaki likambo yango. Elingaki kosalisa ngai nasilisa mawa na ngai.”​—David

[Etanda/​Elilingi na lokasa 113]

CHANTELLE

“Papa abɛlaki mbula soki mitano, mpe sante na ye ezalaki se kobeba. Nazalaki na mbula 16 ntango amibomaki.

Na nsima, mama ayebisaki ngai ná yaya na ngai ya mobali makambo nyonso oyo elekaki. Atikelaki biso kutu nzela tózwa mpe bikateli mpo na kokunda ebembe. Yango esalisaki biso. Namoni ete bana balingaka te bábombelaka bango makambo, mingimingi makambo minene lokola oyo. Na nsima, nazalaki kobanga te kobɛta lisolo ndenge papa akufaki. Ntango nyonso oyo nazali na mposa ya kolela, nakendaka esika moko boye to epai ya moninga moko mpe nalelaka. Toli oyo nakopesa yango oyo: Soki olingi kobɛta lisolo ya likambo yango, kende epai bandeko na yo ya libota to baninga na yo. Ntango nyonso oyoki mawa, monisá yango.”

[Etanda/​Elilingi na lokasas 113, 114]

LEA

“Ntango nazalaki na mbula 19, mama abɛlaki maladi moko makasi oyo ekómisaki ye paralize, mpe akufaki mbula misato na nsima. Nsima ya liwa na ye, namonaki ete nasengeli kozala makasi. Papa alingaki koyoka mpasi mingi soki nalɛmbaki nzoto.

Ntango nazalaki kokola, mama azalaki ntango nyonso pembeni na ngai ntango nazalaki kobɛla to nazalaki koyoka malamu te. Nazali koyeba lisusu ndenge azalaki kosimba ngai mpo na kotala soki nazali na fiɛvrɛ. Nayokaka mpasi mingi ndenge akufá. Nakómaka na mposa ya kobomba makambo na motema, kasi yango ezali malamu te mpo na sante na ngai. Yango wana, ntango mosusu natalaka bafɔtɔ kaka mpo nabanda kolela. Kosolola ná baninga esalisaka. Biblia elaki ete baoyo bakufá bakosekwa mpo bázala na paradiso awa na mabele. (Yoane 5:28, 29) Soki nazali kotya makanisi ete nakomona mama lisusu​—mpe soki nazali kotya makanisi na oyo nasengeli kosala mpo na kozala kuna—​mawa na ngai ekitaka.”

[Etanda/​Elilingi na lokasa 114]

BETHANY

‘‘Nalingaka kokanisa lisusu mokolo oyo nayebisaki papa ete ‘Nalingaka yo.’ Nayebi ete nasalaki yango, kasi nazali koyeba lisusu te ete nayebisaki ye yango, mpe nalingi nayeba mokolo yango. Nazalaki na mbula mitano mpamba ntango papa akufaki.

Papa akómaki paralize ntango azalaki kolala, mpe bamemaki ye mbangu na lopitalo. Ntango nalamukaki mokolo oyo elandaki na ntɔngɔ, bayebisaki ngai ete akufi. Na nsima, kobɛta lisolo ya papa ezalaki kotungisa ngai, kasi nakómaki kosepela koyoka masolo oyo bazalaki kobɛta mpo na ye, mpamba te yango esalisaki ngai nayeba ye malamu. Toli oyo nakopesa na moto nyonso oyo moboti na ye akufá, ezali ya kosepela na ntango nyonso oyo ozalaki kolekisa ná moboti na yo mpe kokoma basuvenire wana mpo obosana yango te. Na nsima salá oyo okoki mpo na kokómisa kondima na yo makasi mpo ozala wana mokolo oyo moboti na yo akosekwa na mokili ya sika ya Nzambe.’’

[Etanda na lokasa 116]

Etanda ya mituna

Komá makanisi na yo

Komá basuvenire ya malamu ya moboti na yo oyo ozali na yango. ․․․․․

Komá likambo oyo olingaki koyebisa papa to mama na yo soki azalaki naino na bomoi. ․․․․․

Kanisá ete ozali na leki na yo mpenza oyo azali komiyoka lokola amemi ngambo mpo na liwa ya moboti na bino. Komá likambo oyo okoki koloba mpo na kolendisa ye. (Yango ekoki mpe kosalisa yo oyeba soki ozali kolekisa ndelo to te na ndenge ozali komiyoka mpo na liwa ya moboti na bino.) ․․․․․

Komá makambo mibale to misato oyo olingaki koyeba na ntina na moboti na yo oyo akufá, mpe tuná moboti na yo oyo atikali na bomoi moko ya makambo yango. ․․․․․

Tángá Misala 24:15. Ndenge nini elikya oyo emonisami na vɛrsɛ wana esalisaka yo oyikela liwa ya moboti na yo mpiko? ․․․․․

[Elilingi na lokasa 115]

Mawa ekoki kozala lokola mbonge oyo ebɛti na libongo na mbalakaka