Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini nakoki kolonga mitungisi na kelasi?

Ndenge nini nakoki kolonga mitungisi na kelasi?

Mokapo 18

Ndenge nini nakoki kolonga mitungisi na kelasi?

“Nazalaki kokutana na mitungisi mingi na kelasi mpe mbala mingi nazalaki koyoka mposa ya kolela mpe koganga na mbala moko.”​—Sharon.

“Mitungisi na kelasi ekitaka te ntango moto akómi mokóló, kasi kaka makambo oyo ebimisaka yango nde ebongwanaka.”​—James.

OMONAKA ete baboti na yo bayebaka te mitungisi oyo okutanaka na yango na kelasi? Bakoki koyebisa yo ete ozali na banyongo ya kofuta te, libota ya koleisa te to patrɔ oyo osengeli kosepelisa. Atako bongo, okoki komona lokola nde mitungisi oyo okutanaka na yango na kelasi ekokani na oyo ya baboti na yo​—to kutu eleki.

Kolongwa na ndako mpe kokende na kelasi ekoki kozala motungisi. Tara, oyo afandaka na États-Unis alobi boye: “Mbala mingi, bana-kelasi bazalaki kobunda na kati ya bisi oyo ezalaki komema biso na kelasi. Chauffeur azalaki kotɛlɛmisa motuka mpe biso nyonso tozalaki kokita. Yango ezalaki kosala ete tókóma na retare ya miniti 30 to koleka.”

Mitungisi ekitaka soki okómi na kelasi? Te! Mbala mosusu okutanaka na makambo oyo elandi:

Mitungisi ya balakisi.

“Balakisi balingaka kaka nabima moto ya mayele mingi mpe nazwa bapwɛ mingi; yango wana nabomaka nzoto mpo nasepelisa bango.”​Sandra.

“Balakisi batindikaka bana-kelasi, mingimingi oyo bazalaka mayele, básala nyonso mpo bábima bato ya mayele mingi.”​Sophie.

“Ata soki omityeli mikano ya malamu na bomoi, balakisi mosusu bakomona lokola ozali na ntina te soki olandi te bakelasi oyo balingi ete otánga.” *​—Naomi.

Mitungisi nini ya balakisi okutanaka na yango?

․․․․․

Mitungisi ya baninga.

“Na école secondaire, bana basalaka makambo ndenge balingi mpe bazalaka batomboki. Soki osali lokola bango te, bakobanda kokima yo.”​Kevin.

“Mikolo nyonso, nakutanaka na komekama ya komɛla masanga mpe kosangisa nzoto. Ntango mosusu ezalaka mpasi koboya kosala yango.”​Aaron.

“Nazali sikoyo na mbula 12 mpe motungisi monene oyo naza’ na yango ezali ete baninga batyaka ngai mbamba mpo nabima na bana mibali. Mwana-kelasi nyonso alobaka, ‘Mokolo nini okozwa mwa moto na yo?’”​Alexandria.

“Bazalaki kotya ngai mpanzi likoló nabima na mwana mobali moko. Ntango naboyaki, balobaki na ngai ete nalingaka nde kobima na bana basi. Mpe nazalaki kaka na mbula zomi na ntango wana!”​Christa.

Mitungisi nini ya baninga okutanaka na yango?

․․․․․

Makambo mosusu oyo etungisaka. Tyá elembo ✔ pembeni ya likambo moko, to bakisá likambo oyo etungisaka yo mingi.

□ Baekzamɛ

□ Badevuare

□ Mikano ya minene oyo baboti batyeli yo

□ Mikano ya minene oyo omityeli

□ Banyokoli mpe baoyo batungisaka mpo na kosangisa nzoto

□ Makambo mosusu ․․․․․

Makambo minei mpo na kokitisa mitungisi

Mpo na koloba solo, okoki te kokanisa ete okosilisa kelasi kozanga ete okutana na motungisi ata moko. Ya solo, mitungisi soki eleki, ekoki konyokola moto. Mokonzi Salomo akomaki ete: “Monyoko ekoki kotinda moto ya bwanya asala lokola moto ya ligboma.” (Mosakoli 7:7) Kasi, osengeli te kotika ete yango ekómela yo. Likambo ya ntina ezali ya koyeba ndenge ya kolonga mitungisi malamu.

Kolonga mitungisi ezali lokola kotombola ebende. Mpo na kolonga, moto oyo alingi kotombola ebende asengeli komibongisa malamu. Atombolaka te ebende ya kilo mingi koleka, mpe atombolaka yango na ndenge ebongi. Soki azwi bibongiseli wana liboso, akoki kokembisa nzoto na ye kozanga ete abebisa yango. Nzokande, soki asali bongo te, akoki kozoka na kati ya nzoto to mokuwa ekoki kobukana.

Ndenge moko mpe, okoki kolonga mitungisi oyo ozali kokutana na yango mpe kokokisa malamu mosala oyo olingi kosala kozanga ete ominyokola. Ndenge nini? Salelá makambo oyo elandi:

1. Luká koyeba makambo oyo ebimisaka mitungisi. Biblia elobi boye: “Ntango omoni likama ezali koya, kozala zoba te mpe kokende liboso na yango te​—zalá mayele mpe omibomba.” (Masese 22:3, Biblia Contemporary English Version) Kasi, okoki te komibomba liboso ya mitungisi soki oyebi te makambo oyo ebimisaka yango mingi. Na yango, zongelá lisusu esika otyaki elembo na likoló. Makambo nini etungisaka yo mingi?

2. Luká na kati ya mikanda. Na ndakisa, soki badevuare eleki mingi mpe ebandi kotungisa yo, luká makanisi oyo ezali na mokapo 13, ya Volimi 2. Soki bazali kotya yo mbamba osala pite na moninga moko ya kelasi, okoki kozwa toli ya malamu na mokapo 2, 5, mpe 15 ya Volimi 2.

3. Kozongisaka makambo nsima te. Mikakatano ekosila te soki okimi yango. Kutu, mbala mingi ekómaka nde makasi koleka, mpe ebakisaka kutu mitungisi. Soki kaka ozwi ekateli ya kolonga motungisi moko boye, kozongisa makambo nsima te. Salá yango mbala moko. Na ndakisa, soki ozali Motatoli ya Yehova [Témoin de Jéhovah] mpe ozali kosala makasi olanda makambo oyo Biblia elobaka na bomoi na yo, esengeli koyebisa yango basusu mbala moko. Kosala bongo ekoki kokitisa mitungisi na yo. Marchet, oyo azali na mbula 20 alobi boye: “Mbula nyonso oyo tobandi kelasi, nazalaki kobanda lisolo na likambo moko oyo nayebi ete ekoki kopesa ngai libaku ya koyebisa bato mateya ya lingomba na biso. Nazalaki komona ete soki namibimisi mbala moko te lokola Motatoli [Témoin], ezalaki kokóma mpasi. Koyebisa basusu makambo oyo nandimaka mpe kotosa yango na boumeli ya mbula mobimba, ezalaki kosalisa ngai mingi.”

4. Sɛngá lisalisi. Ata moto oyo amemaka ebende ya kilo mingi, azalaka mpe na kilo ya ebende oyo ekoki kosukisa ye. Ezali mpe bongo mpo na yo. Kasi, osengeli te komema kilo yo moko. (Bagalatia 6:2) Mpo na nini te kosolola na baboti na yo to bakristo mosusu oyo bakɔmeli na elimo? Lakisá bango biyano oyo okomaki na lisolo oyo. Sɛngá bango bápesa yo makanisi.

Komitungisa ya malamu ezalaka?

Ekoki kozala mpasi ondima ete komitungisa ezalaka mpe likambo ya malamu. Mpo na nini? Mpamba te ekoki komonisa ete ozali zoba te mpe lisosoli na yo elɛmbi te. Talá ndenge Biblia elobeli moto oyo amonanaka ete amitungisaka ata na likambo moko te: “Okolala tii ntango nini kozanga kosala eloko? Ntango nini okolamuka na mpɔngi? Lalá moke. Pemá moke. Kangá mabɔkɔ mpe balolá misapi. Na mbala moko, biloko nyonso ekei, lokola nde moyibi oyo azali na mondoki akei na yango.”​—Masese 6:9-11, Biblia Contemporary English Version.

Heidi, elenge moko ya mbula 16, alobeli likambo yango malamu na mokuse. Alobi boye: “Kelasi ekoki komonana lokola esika moko ya mabe mpenza, kasi mitungisi oyo okutanaka na yango kuna ezali ndenge moko na oyo okokutana na yango na mosala.” Ya solo, kolonga mitungisi ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Kasi soki olongi yango na ndenge ebongi, mitungisi yango ekosala yo mabe te, kutu ekoki nde kokómisa yo makasi.

NA MOKAPO OYO ELANDI

Kokata kelasi nde ekosilisa mikakatano na yo?

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 11 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 20 ya buku oyo.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

‘Bóbwakela Nzambe mitungisi na bino nyonso, mpo atyelaka bino likebi.’​—1 Petro 5:7.

TOLI

Kabolá mikakatano oyo etungisaka yo na biteni mibale: oyo okoki kosilisa mpe oyo okoki kosilisa te. Bandá liboso na mikakatano oyo okoki kosilisa. Nsima ya kosala yango, soki ozali naino na ntango, okoki kobanda kokanisa mikakatano oyo okoki kosilisa te.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Kolalaka na ngonga ya malamu​—ngonga soki 8 butu nyonso—​ekosalisa yo olonga mitungisi, kasi mpe bɔɔngɔ na yo ekosala malamu.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Mpo na kolonga mitungisi malamu, nazwi ekateli ete soki likoki ezali, nakokende kolala na ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini koluka kosala makambo lokola moto azangá masumu ekobakisela yo kaka mitungisi?

● Okoki kosolola na nani soki mitungisi elekeli yo?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 132]

“Mikolo nyonso papa azalaki kosala libondeli ná ngai liboso akende kotika ngai na kelasi. Ezalaki kosala ete namiyoka ntango nyonso malamu.”​—Liz

[Elilingi na lokasa 131]

Kaka ndenge kotombola ebende na ndenge ebongi ekoki kokómisa yo makasi, kolonga mitungisi na ndenge ebongi ekoki kosala ete olongola kobanga