Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nasengeli nde kokata kelasi?

Nasengeli nde kokata kelasi?

Mokapo 19

Nasengeli nde kokata kelasi?

Okanisi ete okotika kotánga soki okómi na kelasi nini? ․․․․․

Baboti na yo bakolinga ete otika kotánga soki okómi na kelasi nini? ․․․․․

BIYANO na mituna mibale oyo ezali likoló ekokani? Ata soki ekokani mpe ozali naino kotánga, ekoki kozala ete mikolo mosusu okómaka na mposa okata kelasi. Osilá kokóma na makanisi lokola oyo ezali awa na nse?

“Mikolo mosusu, nazalaki na mitungisi mingi, mpe nalingaki ata kolamuka na mbeto te. Nazalaki komilobela: ‘Mpo na nini nakende kelasi mpe nayekola makambo oyo kutu nakotikala kosalela te?’”​Rachel.

“Mbala mingi, kelasi ezalaki kolɛmbisa ngai mpe nazalaki na mposa kaka ya kotika mpe koluka mosala. Nazalaki komona ete kelasi ezalaki na ntina te mpo na ngai mpe ete nasengelaki kozwa mosala oyo ekopesa ngai mbongo.”​John.

“Nakɔtaki eteyelo moko oyo ezalaki na kartye ya babola, mpe ezalaki mpasi nazwa baninga. Nazalaki na mpasi te mpo na koyekola, kasi bazalaki nde kolinga ngai te, yango wana nazalaki kolekisa ntango mingi kaka ngai moko. Ata bana-kelasi mosusu oyo bazangaki baninga bazalaki koboya kosolola na ngai! Nakómaki na mposa natika kelasi.”​Ryan.

“Butu nyonso, nazalaki kolekisa bangonga minei mpo na kosala badevuare! Badevuare, baekzamɛ, mpe makambo mosusu ya kelasi ekómaki kotondela ngai, yango wana namonaki ete nakokoka te kosilisa yango, mpe nakómaki na mposa ya kotika.”​Cindy.

“Na kelasi, bakebisaki biso na likama ya bɔmbi, bana misato balukaki komiboma, mwana moko amibomaki, mpe tozalaki na bana ya mobulu. Na bantango mosusu, nazalaki komona ete eleki ndelo mpe nazalaki na mposa ya kotika kelasi!”​Rose.

Yo mpe osilá kokutana na mikakatano wana? Soki ɛɛ, mokakatano nini etindaki yo oluka kotika kelasi?

․․․․․

Mbala mosusu, sikoyo ozali mpenza kokanisa kokata kelasi. Kasi, olingi kokata kelasi mpo omoni ete okoli mpe oyekoli makambo mingi to mpo olɛmbi na yo kelasi?

Ezali malamu kokata kelasi?

Oyebi ete na bamboka mosusu, mwana asengeli kotánga kelasi kaka mbula 5 tii 8? Na bamboka mosusu, bilenge basengeli kotánga kelasi mbula soki 10. Na yango, ezali na mobeko moko te oyo esɛngisi ete bana nyonso na mokili mobimba bátánga kelasi mbula boye to boye.

Lisusu, na bamboka mosusu, mwana-kelasi akoki kolanda mateya mwa bambula to bambula nyonso ya kelasi na ndako, na esika akendaka eteyelo. Soki baboti bamoni malamu ete mwana alanda mateya na ndako na esika akendaka eteyelo, yango elimboli te ete atiki kelasi.

Kasi, soki ozali kokanisa kotika kotánga liboso ete ozwa diplome​—ezala ozali kotánga na eteyelo to na ndako—​osengeli kotalela mituna oyo elandi:

Mibeko esɛngi nini? Ndenge tolobaki yango, mibeko oyo etali bambula oyo mwana asengeli kolekisa na kelasi ezali ndenge moko te na bamboka nyonso. Mibeko ya mboka na yo esɛngi ete bana bátánga kelasi tii mbula nini? Osí okokisi mbula yango? Soki okati kelasi liboso okokisa mbula wana, yebá ete oboyi kolanda toli ya Biblia oyo elobi ete ‘tóyokelaka bakonzi oyo bazali liboso.’​—Baroma 13:1.

Nasili kokokisa mikano na ngai mpo na kelasi? Mikano nini olingi ete kelasi esalisa yo okokisa? Oyebi mpenza te? Osengeli koyeba yango! Soki te, ozali lokola moto oyo amati na train kasi ayebi te esika nini alingi kokende. Yango wana, fandá yo ná baboti na yo mpe bótondisa etanda  “Mikano na ngai mpo na kelasi,” oyo ezali na lokasa 139. Kosala bongo ekosalisa yo obosana te mikano na yo mpe ekosalisa yo ná baboti na yo bótalela soki okolekisa bambula boni na kelasi.​—Masese 21:5.

Kozanga ntembe, balakisi na yo mpe bato mosusu bakopesa yo batoli mpo na bambula oyo osengeli kolekisa na kelasi. Kasi, baboti na yo nde basengeli kozwa ekateli ya nsuka. (Masese 1:8; Bakolose 3:20) Ekozala malamu te okata kelasi liboso ya kokokisa mikano oyo yo ná baboti na yo boyokanaki.

Mpo na nini nalingi nakata kelasi? Kebá ete omikosa te. (Yirimia 17:9) Bato balukaka komilongisa mpo na kokokisa bamposa na bango moko kaka.​—Yakobo 1:22.

Komá awa na nse bantina ya malamu oyo okoki kozala na yango ya kokata kelasi liboso ete ozwa diplome.

․․․․․

Komá awa na nse bantina mpo na kokokisa bamposa na yo moko.

․․․․․

Bantina nini ya malamu okomi? Ekoki kozala ete olingi kosunga libota na yo na mbongo to koteya bato mosusu makambo ya Nzambe. Kati na bantina mpo na kokokisa bamposa na yo moko, ekoki kozala ete olingi kokima baekzamɛ to badevuare. Mokakatano ezali ya koyeba mpo na ntina nini mpenza olingi okata kelasi​—mpe soki ntina yango ezali ya malamu to mpo na kokokisa bamposa na yo moko.

Talá lisusu liste ya makambo oyo okomaki, mpe tandá na molɔngɔ kobanda na 1 tii na 5 bantina oyo olingi kokata kelasi (1 emonisi oyo ezali na ntina mpenza te, 5 emonisi oyo eleki ntina). Soki olingi kotika kaka mpo na kokima makambo, okosutuka mabe.

Mpo na nini ezali mabe kokata kelasi?

Kokata kelasi ezali lokola komibwaka libándá ya train moko, liboso ete okóma na esika ozali kokende. Train yango ekoki kozala malonga te mpe bato oyo bazali na kati bazali na boboto te. Kasi, soki omibwaki bongo, okokóma te na esika oyo ozali kokende mpe okoki kozoka mabe. Ndenge moko mpe, soki otiki kelasi, okokokisa te mikano oyo omityelaki mpe okoki kokutana na mikakatano lelo to mpe nsima ya mikolo, na ndakisa lokola oyo elandi:

Mikakatano lelo: Okoki kokutana na mokakatano mpo na kozwa mosala. Mpe soki ozwi mosala, mbala mosusu ekofuta yo mbongo mingi te koleka oyo okokaki kozwa soki okokisaki bambula nyonso ya kelasi. Mpo na kozala na mwa bomoi ya malamu, mbala mosusu ekosɛnga ete osalaka bangonga ebele na bisika oyo ekozala kitoko te koleka esika oyo ozali kotánga.

Mikakatano nsima ya mikolo: Bato ya mayele bamonisi ete bana oyo bakataka kelasi, mbala mingi sante na bango ebebaka, basukaka na bɔlɔkɔ mpe bakómaka kobikela na lisungi oyo Leta to bibongiseli mosusu epesaka.

Ya solo, elingi koloba te ete soki okokisi bambula nyonso ya kelasi, okokutana na mikakatano wana te. Kasi, mpo na nini komilukela mikakatano mpamba na kokata kelasi?

Matomba oyo okozwa soki okati kelasi te

Soki ozwi te na ekzamɛ to olekisi mokolo mabe na kelasi, okoki koyoka mposa ya kokata kelasi​—mokakatano oyo ozali na yango lelo ekoki komonana ete eleki mikakatano nyonso oyo okoki kokutana na yango na mikolo ezali koya. Kasi, liboso ya kozwa ekateli ya kokata kelasi, talelá naino makambo oyo bilenge oyo tolobeli na ebandeli ya mokapo oyo, balobi mpo na matomba oyo bazwaki mpo bakataki kelasi te.

“Nayekolaki ezaleli ya koyika mpiko mpe ya kokanga motema. Nayekolaki mpe ete mpo nasepela mpenza kosala likambo moko, nasengeli komipesa mpenza mpo na likambo yango. Lokola nakataki kelasi te, nayekolaki makambo oyo nakosalela ntango nakozwa diplome.”​Rachel.

“Sikoyo nayebi ete soki nasali makasi, nakokokisa mikano na ngai. Nazali kolanda formasyo moko na eteyelo, mpo nayeba malamu mosala oyo nalingaka mingi: kobongisa bamachini oyo esalaka mikanda.”​John.

“Lokola naboyaki kokata kelasi, nayebaki malamu kotánga mpe kokoma. Kelasi esalisi ngai nayeba ndenge oyo nakoki kozwa matomba ata na makambo ya mabe oyo bato mosusu balobelaka ngai mpe ndenge oyo nakoki kobimisa makanisi na ngai polele mpe na molɔngɔ​makoki wana ezali na ntina na mosala na ngai ya kosakola.”​Ryan.

“Kelasi esalisi ngai nayeba ndenge ya kosilisa mikakatano, ezala na kelasi to na esika mosusu. Koyekola kosilisa mikakatano na kelasi, na boyokani na bato mosusu, mpe na nzoto esalisi ngai mpenza nakola.”​Cindy.

“Kelasi esalisi ngai namibongisa mpo na mikakatano oyo nakokutana na yango na esika ya mosala. Mpe lisusu, nakutanaki na makambo mingi oyo etindaki ngai natalela lisusu kondima na ngai, na yango, kelasi elendisaki kondima na ngai.”​Rose.

Mokonzi Salomo akomaki boye: “Nsuka mpenza ya likambo eleki ebandeli na yango. Moto ya motema molai aleki moto oyo azali na elimo ya lolendo.” (Mosakoli 7:8) Yango wana, na esika okata kelasi, bundá malɛmbɛmalɛmbɛ na mikakatano oyo ozali kokutana na yango na kelasi. Soki osali bongo, okomona ete na nsuka, makambo ekoleka malamu mpenza mpo na yo.

NA MOKAPO OYO ELANDI

Bongo soki ntina oyo olingaka kelasi te ezali mpo oz’oyokana malamu te ná molakisi na yo?

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Moto nyonso oyo asalaka makambo mbangumbangu akokelela mpenza kokelela.”​—Masese 21:5.

TOLI

Soki ozali kokoka komesana te na kelasi, talá soki okoki kolanda formasyo moko oyo ekozwa yo ntango mingi te, oyo ekosalisa yo ozwa diplome noki.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Bilenge oyo bakimaka kelasi, mbala mingi basukaka na kokata kelasi.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Soki nazali na mokakatano na liteya moko na kelasi, na esika ya kotika nako ․․․․․

Soki nalɛmbi na ngai mpe nalingi nakata kelasi, nakolonga soki na ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini ezali na ntina mingi oyeba kotánga, kokoma mpe kosala kalkile?

● Omoni te ete soki omityeli mokano ya kozwa mayele to makoki oyo okoki kosalela mbala moko soki osilisi kelasi, yango ekosalisa yo olanda na likebi mpenza mateya na kelasi na esika ya kolekisa ntango na makambo ezangá ntina?

● Mpo na nini ezali na ntina ozala na mwa likanisi ya mosala oyo okolinga kosala nsima ya kelasi?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 140]

“Okoki te kokima mikakatano nyonso. Na kelasi, okoyekola koloba na mpiko mpo na yo moko; yango ekosalisa yo na esika ya mosala mpe na bisika mosusu.”​—Ramona

[Etanda na lokasa 139]

Etanda ya mituna

Mikano na ngai mpo na kelasi

  Ntina ya libosoliboso ya kelasi ezali ya kosalisa yo mpo ozwa mosala oyo ekosunga yo mpe libota na yo soki oboti. (2 Batesaloniki 3:10, 12) Osili kozwa ekateli mpo na mosala oyo okolinga kosala, mpe ndenge ya kosalela malamu ntango oyo ozali kolekisa na kelasi mpo na koyekola yango? Mpo na kosalisa yo oyeba soki formasyo oyo ozali kolanda ekosalisa yo mpenza, pesá biyano na mituna oyo elandi:

Nazalaka makasi na makambo nini? (Na ndakisa, oyokanaka malamu ná basusu? Osepelaka kosala misala ya mabɔkɔ, kosala biloko ya sika to kobongisa biloko oyo ebebi? Ozalaka makasi na kotalela makambo malamumalamu mpe kosilisa yango?) ․․․․․

Misala nini ekoki kosalisa ngai nasalela makambo oyo nazalaka makasi na yango? ․․․․․

Bazalaka na mposa ya bato ya misala nini esika oyo nafandi? ․․․․․

Formasyo nini nazali kozwa sikoyo oyo ekoki kosalisa ngai nazwa mosala? ․․․․․

Baformasyo nini mosusu nakoki kopona oyo ekosalisa ngai nakokisa mikano na ngai malamumalamu? ․․․․․

Kobosana te ete mokano na yo ezali ete osalela formasyo oyo ozali kozwa ntango okozwa diplome. Yango wana, kokwea mpe na motambo mosusu te ya kotikala mwana-kelasi oyo asilisaka kelasi te​—moto oyo atikali “na kati ya train” libela kaka mpo na kokima mikumba oyo asengeli komema soki akómi mokóló. * ․․․․․

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 67 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 38 ya Volimi 2.

[Elilingi na lokasa 138, 139]

Kokata kelasi ezali lokola komibwaka libándá ya train moko, liboso ete okóma na esika ozali kokende