Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nakosala nini soki nazali na kati ya mimeseno mibale?

Nakosala nini soki nazali na kati ya mimeseno mibale?

Mokapo 22

Nakosala nini soki nazali na kati ya mimeseno mibale?

Tata na yo to mama na yo autá mboka mosusu?

□ Ɛɛ □ Te

Mimeseno to monɔkɔ oyo elobamaka na eteyelo na yo ekeseni na oyo ya libota na yo?

□ Ɛɛ □ Te

“Libota na ngai eutá Italie mpe kuna, bato bamonisaka polele bolingo na bango. Sikoyo tozali kofanda na Angleterre. Awa bato bazalaka makambo mobulu te mpe na bokonde. Namoni lokola naza’ moto ya ekólo moko te​—moto ya Italie te, moto ya Angleterre mpe te.”​—Guy, Angleterre.

“Na kelasi, molakisi asɛngaka ngai natalaka ye na miso ntango azali koloba. Kasi na ndako, soki natali papa na miso ntango azali koloba, ayebisaka ngai ete naza impoli. Namonaka lokola nazali na kati ya mimeseno mibale ekeseni.”​—Patrick, abotamá na France na baboti oyo bautá Algérie.

NTANGO baboti na yo bakendaki kofanda na ekólo mosusu, bakutanaki na mikakatano ya minene. Mbala moko bakómaki kofanda na bato oyo monɔkɔ, mimeseno mpe lolenge ya kolata ekesanaki na oyo ya bango. Ezalaki komonana polele ete bakesani mpenza na bato ya ekólo yango. Na yango, mbala mosusu, bazalaki kosalela bango makambo na kozanga limemya to mpe kokanisela bango mabe.

Likambo yango ekómelá mpe yo? Awa na nse, okomona mwa mikakatano oyo bilenge mosusu bakutanaki na yango na likambo yango. Tyá elembo ✔ na mokakatano oyo omoni ete ezali mpasi mingi mpo olonga yango.

Kotyolama. Nelly azalaki naino mwana moke ntango ye ná libota na ye balongwaki Jordanie mpe bakendaki kofanda na Amerika ya nɔrdi. Elenge mwasi yango alobi boye: “Lokola bilamba na biso ekesanaki na oyo ya basusu, bato bazalaki kotyola biso. Mpe tozalaki kokanga ntina te ya makambo oyo bato ya Amerika bazalaki koloba mpo na kosɛkisa bato.”

Oyebi mpenza te soki ozalaka moto ya ekólo nini. Elenge mwasi moko na nkombo Nadia, alobi boye: “Nabotamá na Allemagne. Lokola baboti na ngai bazali bato ya ekólo Italie, nalobaka monɔkɔ ya Allemand ndenge mosusu mpe bana-kelasi babengaka ngai ‘mopaya zoba.’ Kasi, ntango nakendaka Italie, nalobaka monɔkɔ ya Italien lokola moto alobaka monɔkɔ ya Allemand. Yango wana, namonaka lokola ete nazalaka na ekólo te. Esika nyonso naz’okende, nazali kaka mopaya.”

Yo ná baboti na yo bozali na mimeseno ekeseni. Ana azalaki na mbula 8 ntango ye ná libota na ye bakendaki kofanda na Angleterre. Alobi boye: “Ezalaki mpasi te mpo ngai ná leki na ngai ya mobali tómesana na bomoi ya Londres. Kasi, ezalaki mpasi mpo na baboti na ngai, mpo bafandaki bambula mingi na Madère, esanga moko moke ya ekólo Portugal.”

Valerie azalaki na mbula 3 ntango ye ná baboti na ye oyo bautá ekólo Cambodge bakómaki na Australie. Alobi boye: “Baboti na ngai bazalaki na mokakatano mpo na komesana. Kutu, mbala mingi papa azalaki kosilika mpo nazalaki kondima te ndenge azalaki kokanisa mpe kosala makambo.”

Bolobaka minɔkɔ ekeseni na ndako. Ian azalaki na mbula 8 ntango ye ná libota na ye balongwaki na ekólo Équateur mpo na kokende kofanda na New York, na États-Unis. Mbula 6 na nsima, alobi boye: “Sikoyo nalobaka Anglais mingi koleka Espagnol. Na eteyelo, balakisi na ngai balobaka Anglais, baninga na ngai balobaka Anglais, mpe ngai ná leki na ngai ya mobali tosololaka na Anglais. Anglais ekɔti ngai tii na makila mpe nakómi kobosana Espagnol.”

Liliane, oyo abotamá na Australie, kasi baboti na ye bautá ekólo Cambodge, alobi boye: “Ntango nazali kosolola na baboti na ngai mpe nalingi koyebisa bango na mozindo ndenge natalelaka makambo mosusu, nakokaka koloba monɔkɔ na bango malamu te.”

Nelly, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Papa azalaki kotya biso mbamba mpo tólobaka monɔkɔ ya Arabe na ndako, kasi tozalaki na mposa ya koloba monɔkɔ yango te. Mpo na biso, emonanaki ete koyekola Arabe ezali na ntina te mpe ekobakisela biso kilo ya mpamba na motó. Baninga na ngai balobaka Anglais. Baemisyo nyonso oyo totalaka na televizyo ezalaka na Anglais. Sikoyo ntina ya koyekola Arabe eza’ nini?”

Okoki kosala nini?

Ndenge maloba oyo ezali likoló emonisi yango, bilenge mosusu mpe bakutanaka na mikakatano wana. Na esika ya kolonga mikakatano yango, okoki koluka kobosana mimeseno nyonso ya ekólo oyo ozalaki liboso, mpe kokóma na mimeseno ya ekólo oyo ozali kofanda sikoyo. Nzokande, baboti na yo bakomona yango mabe mpe ekosala yo moko mpasi. Na esika ya kosala bongo, mpo na nini te koluka kolonga mikakatano yango mpe kozwela yango matomba? Talelá makanisi oyo elandi:

Soki bazali kotyola yo. Ata soki osali nini, moto nyonso te nde akosepela na yo. Bato oyo balingaka kotyola basusu, balukaka kaka komilongisa mpo na yango. (Masese 18:24) Yango wana, ezali na ntina te olukaka kaka kosembola makanisi na bango ya mabe. Mokonzi Salomo akomaki boye: “Mosɛki alingaka moto oyo azali kopamela ye te.” (Masese 15:12) Ntango moto azali koloba mabe mpo na moto mosusu, yango emonisi polele ete ayebi eloko te, kasi te ete bifundeli na ye ezali solo.

Soki ozali mpenza koyeba te soki ozalaka moto ya ekólo nini. Ebongi mpenza kozala moto ya libota moko to ekólo moko boye. Kasi ezali malamu te kokanisa ete valɛrɛ na yo etaleli ekólo to libota oyo outá. Bato bakoki kotalela yo bongo, kasi Nzambe te. Ntoma Petro alobaki boye: “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.” (Misala 10:34, 35) Soki osali makasi osepelisa Yehova Nzambe, akotalela yo lokola moto ya libota na ye. (Yisaya 43:10; Marko 10:29, 30) Ezali na eloko mosusu oyo eleki yango?

Soki yo ná baboti na yo bozali na mimeseno ekeseni. Mbala mingi baboti ná bana bazalaka na makanisi ndenge moko te. Bokeseni yango ekoki kokóma monene epai na bino​—baboti na yo balingi okoba na mimeseno ya ekólo oyo bautá, kasi yo olingi kokóma na mimeseno ya ekólo oyo bozali kofanda sikoyo. Ata bongo, soki olingi ete makambo ekende malamu mpo na yo, osengeli ‘kokumisa tata na yo mpe mama na yo,’ elingi koloba kotosa bango.​—Baefese 6:2, 3.

Na esika ya kotomboka mpo oz’olinga mimeseno ya baboti na yo te, luká koyeba ntina oyo baboti na yo balingi olanda mimeseno wana. (Masese 2:10, 11) Omituna mituna oyo elandi: ‘Mimeseno yango ebuki mitinda ya Biblia? Soki te, ntina nini mpenza nalingaka mimeseno yango te? Ndenge nini nakoki komonisa baboti makanisi na ngai na limemya?’ (Misala 5:29) Ya solo, ekozala mpasi te okumisa baboti na yo​—koyeba malamu makanisi na bango mpe komonisa bango oyo ya yo—​soki oyebi koloba monɔkɔ na bango malamu.

Soki bolobaka minɔkɔ ekeseni na ndako. Baboti mosusu bamonaki ete soki bazali kotya bana mbamba ete bálobaka kaka monɔkɔ ya mboka na ndako, bana bakoyekola malamu minɔkɔ nyonso mibale. Mpo na nini te komeka yango epai na bino? Okoki mpe kosɛnga baboti na yo bálakisa yo kokoma monɔkɔ yango. Stelios, oyo akolá na Allemagne, kasi monɔkɔ ya mboka na ye ezali Grɛki, alobi boye: “Mikolo nyonso, baboti bazalaki kotalela elongo na ngai mokapo moko ya Biblia. Bazalaki kotánga yango na mongongo makasi, mpe na nsima nazalaki kokoma yango. Sikoyo nakoki kotánga mpe kokoma Grɛki ná Allemand.”

Wapi matomba mosusu ya koyekola monɔkɔ ya mboka? Guy, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Nayekolaki monɔkɔ ya baboti na ngai mpo nalingaki koyeba bango malamu mpe koyeba makanisi na bango, mingimingi makanisi na bango mpo na Yehova mpe mpo na solo. Koyekola monɔkɔ na bango esalisi ngai nayeba malamu ndenge bamiyokaka. Mpe esalisi bango báyeba ngai malamu.”

Mimeseno esangisa bino, kasi ekabola bino te

Omonaka ete mimeseno na yo ekabolaka yo na basusu to esangisaka bino? Bilenge bakristo mingi bamonaka ete bazali na ntina mosusu ya kotika te ete mimeseno ekabola bango na basusu. Balingaka koyebisa bato oyo bautá mikili mosusu nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14; 28:19, 20) Salomão, oyo akendaki kofanda na Londres ntango azalaki na mbula 5, alobi boye: “Kolimbola bavɛrsɛ ya Biblia na minɔkɔ mibale eza’ malamu mpenza! Nabosanaki maloba mingi ya monɔkɔ ya mboka na ngai, kasi sikoyo lokola nazali na lisangá ya Portugais, nayebi koloba Anglais mpe Portugais malamu.”

Nelly, oyo tolobelaki liboso, amonaki ete mposa ya basakoli oyo balobaka Arabe ezali makasi. Alobi boye: “Sikoyo nazali koyekola monɔkɔ yango mpo nazongela lisusu makambo oyo nabungisaki. Nabongoli makanisi na ngai. Sikoyo nalingi básembola ngai soki nalobi monɔkɔ yango mabe. Nalingi nayeba yango malamu.”

Ya solo, soki oyebi mimeseno ya bikólo mibale, mpe oyebi koloba minɔkɔ mibale to mingi, yango ezali mpenza malamu mpo na yo. Soki oyebi mimeseno ya bikólo mibale, okoyeba malamu ndenge bato ya bikólo yango bamiyokaka mpe okokoka koyanola na mituna na bango na ntina na Nzambe. (Masese 15:23) Preeti, oyo abotamá na Angleterre kasi baboti na ye bautá ekólo Inde, alobi boye: “Lokola nayebi malamu mimeseno ya bikólo mibale, nazalaka motema ya kokita na mosala ya kosakola. Nayebaka malamu bato yango ya bikólo nyonso mibale​—makambo oyo bandimaka mpe bizaleli na bango.”

Yo mpe okoki komona ete ezali malamu mingi ndenge oyebi mimeseno ya bikoló mibale, na esika ya komona yango mabe? Kobosana te ete Yehova alingaka yo mpo na ndenge ozali, kasi te mpo na ekólo oyo yo ná libota na yo boutá. Lokola bilenge oyo tolobeli awa, okoki mpe kosalela boyebi na yo ya mimeseno ya bikólo mibale mpo na kosalisa bato ya mboka na yo báyeba Yehova, Nzambe ya bolingo mpe oyo aponaka bilongi te? Kosala bongo ekopesa yo esengo ya solosolo!​—Misala 20:35.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Nzambe aponaka bilongi te.”​—Misala 10:34.

TOLI

Soki baninga na yo bazali kosɛka yo mpo na mimeseno na yo, kokipe matumoli na bango te mpe yebáká kosɛkisa. Soki osali bongo, bakobanda lisusu kotumola yo te.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Soki olobaka malamu minɔkɔ mibale, okoki mpenza kozala na libaku ya kozwa mosala.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Mpo na koyeba malamu monɔkɔ ya baboti na ngai, nako ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Na ndenge nini koyeba mimeseno ya mboka ya baboti na yo ekoki kosalisa yo omiyeba malamu koleka?

● Makambo nini ya malamu ozali na yango, oyo bilenge mosusu oyo bayebi mimeseno mingi te bazangi?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 160]

“Kosalisa basusu epesaka ngai esengo. Nakoki koteya Biblia na bato oyo balobaka Russe, Français, to Moldave.”​—Oleg

[Elilingi na lokasa 161]

Okoki komona mimeseno na yo lokola eloko oyo ezali kosangisa yo na basusu