Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge ya komonisa ete kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi ezali mabe

Ndenge ya komonisa ete kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi ezali mabe

Mokapo 23

Ndenge ya komonisa ete kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi ezali mabe

Na molulu moko oyo bazalaki kopesa mbano na basani ya bafilme (actrices), mbala moko likambo ya nsɔmɔ esalemaki. Basani mibale ya basi oyo bayebani mingi bapesanaki bizi moko ya bolingo! Na ebandeli bato oyo bayaki wana bayokaki naino mabe, kasi na nsima babɛtɛlaki bango mabɔkɔ. Ba-homosexuel oyo bazalaki wana basepelaki makasi. Bato mosusu bakanisaki ete eza n’ango kaka mpo na kobenda likebi ya bato mpe kosala piblisite. Na mikolo oyo elandaki, bashɛnɛ ya televizyo ekómaki kolakisa bizi wana mbala na mbala, mpe bamilio ya bato batalaki yango na internet.

NDENGE likambo oyo touti kolobela emonisi yango, makambo mingi te eningisaka mboka koleka soki moto oyo ayebani mingi alobi to amibimisi ete asangisaka nzoto ná baninga na ye mibali to basi. Bato mosusu bakumisaka bato ya lolenge wana mpo na mpiko na bango; nzokande basusu balobaka ete bato yango bazali bandumba. Na makanisi oyo mibale, bato mingi bamonaka ete kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi ezali na yango kaka lolenge mosusu ya kosala makambo na bomoi. Daniel, oyo azali na mbula 21, alobi boye: “Ntango nazalaki na kelasi, ata bilenge oyo bandimaka ke kosangisa nzoto kati na mobali mpe mwasi ezali malamu, bazalaki koloba ete soki omoni ete kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi ezali mabe, wana ozali kokanisela bango mabe mpe ozali makambo makasimakasi.”

Mikóló, bana, mibange to ekólo na ekólo ezali na lolenge na yango ya kotalela likambo etali kosangisa nzoto mibali ná mibali mpe basi ná basi. Kasi bakristo bazali te “komemama epai na epai na mopɛpɛ nyonso ya mateya.” (Baefese 4:14) Kutu, bakangamaka nde na makanisi ya Biblia.

Biblia elobi nini na likambo etali kosangisa nzoto mibali ná mibali mpe basi ná basi? Mpe soki otosaka oyo Biblia elobaka, ndenge nini okoki koyanola na bato oyo balobaka na yo ete okaniselaka bato oyo basangisaka nzoto mibali ná mibali to basi ná basi mabe, mpe ozalaka makambo makasimakasi epai na bango to olingaka bango ata moke te? Talá ndenge okoki koyanola na mituna mpe makanisi oyo elandi:

“Biblia elobi nini na likambo etali kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi?”

“Biblia emonisi polele ete Nzambe abongisaki ete kosangisa nzoto esalemaka kaka kati na mwasi mpe mobali mpe yango esengeli kosalema kaka na libala. (Ebandeli 1:27, 28; Balevi 18:22; Masese 5:18, 19) Ntango Biblia elobi ete pite ezali mabe, yango emonisi ete kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi mpe etamboli nyonso ya mbindo kati na mobali mpe mwasi ezali mabe.” *​—Bagalatia 5:19-21.

“Ndenge nini otalelaka likambo etali kosangisa nzoto mobali ná mobali to mwasi ná mwasi?”

“Nayinaka bato yango te, kasi nasepelaka nde te na makambo oyo basalaka.”

Kobosana likambo oyo te: Soki otosaka oyo Biblia elobaka, ozwi ekateli ya malamu na bomoi, mpe osengeli mpenza kosala bongo. (Yosua 24:15) Koyoka nsɔni te mpo na ekateli oyo ozwi.​—Nzembo 119:46.

“Bakristo basengeli te komemya bato nyonso, ata soki baza’ na lolenge na bango ya kotalela likambo ya kosangisa nzoto?”

“Basengeli komemya bango. Biblia elobi boye: ‘Bókumisa bato ya ndenge nyonso,’ to ndenge Bible na lingala ya lelo oyo elobi, ‘Bótosaka bato nyonso.’ (1 Petro 2:17) Na yango, bakristo bayinaka te bato oyo basangisaka nzoto mibali ná mibali to basi ná basi. Bazalaka boboto epai ya bato nyonso, ata mpe baoyo basangisaka nzoto mibali ná mibali to basi ná basi.”​—Matai 7:12.

“Ndenge oyo otalelaka likambo ya kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi etindaka bato bákanisela bango mabe?”

“Bongo te. Nayinaka bato yango te, kasi nde etamboli na bango wana.”

Okoki kobakisa boye: “Ngai mpe namɛlaka likaya te. Kutu ata likanisi ya komɛla yango etyaka ngai nzoto malili. Kasi, kanisá ete yo omɛlaka likaya mpe omonaka yango mabe te. Nakokanisela yo mabe te mpo yo oz’omona mabe te komɛla likaya, ndenge moko mpe yo okokanisela ngai mabe te mpo naz’omona ete komɛla likaya eza malamu te, nakosi? Eza mpe ndenge moko lokola ngai ná yo tozali na makanisi ndenge moko te na likambo etali kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi.”

“Yesu alobaki te ete tosengeli kondima bato mosusu? Soki ezali bongo, bakristo basengeli te kotika kotalela na ndenge ya mabe bato oyo basangisaka nzoto mibali ná mibali to basi ná basi?”

“Yesu atindaki bayekoli na ye te bálanda makambo nyonso. Kutu, ateyaki ete nzela ya lobiko efungwami mpo na ‘moto nyonso oyo azali kondimela ye.’ (Yoane 3:16) Kondimela Yesu esɛngi mpe kolanda makambo oyo Nzambe azali kosɛnga, oyo epekisi bizaleli lokola kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi.”​—Baroma 1:26, 27.

“Bato oyo basangisaka nzoto mibali ná mibali to basi ná basi bakoki kobongwana te; babotamá kaka bongo.”

“Biblia elobeli te ndenge nzoto ya bato oyo basangisaka nzoto mibali ná mibali to basi ná basi ezalaka, kasi emonisi ete bizaleli mosusu epiká mpenza misisa. (2 Bakorinti 10:4, 5) Ata soki bato mosusu basepelaka na mibali lokola bango to basi lokola bango, Biblia ezali koyebisa bakristo ete báboya kosangisa nzoto mibali ná mibali mpe basi ná basi.”

Likanisi: Na esika ya kokwea na motambo ya kotyanaka bantembe mpo na koyeba nini esalaka ete mibali ná mibali to basi ná basi báyoka mposa makasi ya kosangisa nzoto, monisá nde mingi ete Biblia epekisi ezaleli yango. Okoki mpe koloba boye: “Oyebi ete bato mingi balobaka ete mobulu ekoki kozala na makila ya famiyɛ, yango wana bato balingaka kosala mobulu. (Masese 29:22) Tokoloba nini soki likambo yango ezalaki solo? Ndenge oyebi yango, Biblia epekisi kozala na nkanda makasi. (Nzembo 37:8; Baefese 4:31) Tokotosa toli oyo te mpo kaka bato basalaka ntango nyonso mobulu?”

“Ndenge nini Nzambe akoki koloba na moto oyo asepeli na mobali to mwasi lokola ye ete asangisa ná ye nzoto te? Wana eza’ mabe makasi.”

“Likanisi wana euti na likanisi moko ya lokuta ete bato basengeli kosala nyonso oyo balingi ntango mposa ya kosangisa nzoto ekómi makasi. Biblia epesaka bato lokumu na ndenge emonisaka ete bakoki koboya kolanda bamposa mabe ya kosangisa nzoto soki mpenza balingi kosala yango.”​—Bakolose 3:5.

“Ata soki osangisaka nzoto te na mibali lokola yo to na basi lokola yo, osengeli kobongola lolenge na yo ya kotalela likambo yango.”

“Kanisá ete ngai nasepelaka te na masano ya mbongo, kasi yo osepelaka na yango. Ekozala malamu ete yo otingama kaka ete nabongola likanisi na ngai kaka mpo bato ebele babɛtaka masano ya mbongo?”

Simbá likambo oyo: Ezali na makambo oyo esepelisaka te bato nyonso, ata mpe bato oyo basangisaka nzoto mibali ná mibali to basi ná basi; na ndakisa kobuba baninga, kozanga bosembo to bitumba. Biblia epekisi makambo wana; epekisi mpe balolenge mosusu ya kosangisa nzoto, ná mpe kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi.​—1 Bakorinti 6:9, 10.

Biblia ezali makambo makasimakasi te, mpe etindaka bato te bákaniselaka basusu mabe. Ezali kosɛnga na baoyo balingaka kosangisa nzoto ná mibali lokola bango to basi lokola bango ete ‘bákima pite,’ ndenge kaka mobali ná mwasi oyo babalani te basengeli kosala.​—1 Bakorinti 6:18.

Emonani ete ebele ya mibali mpe basi oyo balingi kotosa oyo Biblia elobaka, bamipekisaka ntango bakutani na komekama. Na kati na bango, tokoki kotánga ebele ya minzemba oyo elikya kutu ya kobala ezali te mpe ebele ya bato mosusu oyo babalá kasi mibali to basi na bango bazali bibɔsɔnɔ mpe bazali na makasi te ya kosangisa nzoto ná bango. Bakokaka kofanda na esengo kozanga ete bákokisa bamposa na bango ya kosangisa nzoto. Bato oyo balingaka kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi bakoki mpe kosala bongo soki balingi mpenza kosepelisa Nzambe.​—Kolimbola Mibeko 30:19.

MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 28, NA VOLIMI 2

NA MOKAPO OYO ELANDI

Bilenge basi mosusu bakanisaka ete kosangisa nzoto ná bana mibali nde ekokolisa bolingo. Kasi eza’ bongo te! Mpo na nini?

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 8 Liloba “pite” elimboli te kaka kosangisa nzoto mobali ná mwasi, kasi mpe misala ya mbindo lokola kosimbasimba enama ya kobotela ya moto to kosangisa nzoto na monɔkɔ to na esumbeli.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Na yango, bóboma binama ya nzoto na bino ya mabele na likambo ya pite, mbindo, mposa ya kosangisa nzoto, mposa oyo eyokisaka mpasi, mpe bilulela, oyo ezali losambo ya bikeko.”​—Bakolose 3:5.

TOLI

Ata soki etamboli ya basusu ekoki kopesa yo mpasi, koluka te kondimisa bango na makasi. Bazali na bonsomi ya kopona makambo oyo bakondima, ndenge yo mpe ozali na bonsomi yango.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso oyo bazalaki kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi batikaki ezaleli yango mpe ‘basukwamaki pɛɛ’ na miso ya Nzambe.​—1 Bakorinti 6:9-11.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Soki moto alobi ete makambo oyo Biblia elobaka mpo na oyo etali kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi esilá ngala, nakoloba ․․․․․

Mpo na komonisa ke nayinaka nde likambo etali kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi, kasi bato te, nakoloba ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini Nzambe azali na lotomo ya kopesa mibeko ya etamboli malamu epai ya bato?

● Matomba nini ozwi ndenge ozali kotosa mibeko oyo ezali na Biblia?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 170]

“Mwana mobali moko na kelasi akanisaki ete ngai naza mabe mpo nazalaki kolanda te ezaleli na ye. Kasi ntango nalimbwelaki ye ete naz’oyina ye te, mpe ntango ayebaki ke nazalaki koboya te kaka likambo wana ya kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi, kasi nde lolenge nyonso ya mbindo ya kosangisa nzoto, abandaki komemya ngai mingi mpe ata kutu kokɔtela ngai ntango baninga mosusu bazalaki kobimisa bantembe.”​—Aubrey

[Etanda na lokasa 168]

Tokoloba nini mpo na moto oyo asangisaka nzoto ná basi mpe ná mibali?

Atako ezaleli ya kosangisa nzoto ná basi ná mibali emonanaka epai ya bana mibali ná bana basi, kasi bana basi nde bazalaka na ezaleli yango mingi. Mpo na bana basi mosusu, ezalaka kaka mpo na koluka koyeba. Lisa, oyo azali na mbula 26, alobi boye: “Soki balakisi na bafilme, na televizyo mpe na miziki ndenge bana basi bazali kopesana bizi, bilenge mingi balingaka komeka kosala bongo, mingimingi soki bamoni ete kosala bongo ezali mabe te.”

Mpo na basusu, ezalaka mpo basepelaka mpenza na bana basi lokola bango. Vicky, oyo azali na mbula 13 alobi boye: “Na fɛti moko, nakutanaki na bana basi mibale oyo basangisaka nzoto ná baninga na bango basi mpe ná mibali. Na nsima, moninga moko ayebisaki ngai ete bana basi yango basepelaki na ngai. Nabandaki kotindela moko na bango bamesaje mpe nakómaki kosepela na ye makasi.”

Osí oyoká ndenge Vicky ayokaki? Mingi bakosɛnga yo ondima kaka ete osangisaka nzoto ná baninga na yo basi mpe mibali. Kasi, osengeli kobosana te ete kosepela na mobali to mwasi lokola yo ezali mposa moko oyo eyaka mpe elekaka. Yango nde Vicky amonaki. Lisette, oyo azali na mbula 16, amonaki mpe bongo. Alobi boye: “Kosolola ná baboti na ngai ndenge nazali koyoka esalisaki ngai nayoka bien. Lisusu, na liteya ya bioloji oyo tozwaki na kelasi, nayekolaki ete na eleko ya bolenge, ba-hormone emataka mingi. Nakanisi mpenza ete soki bilenge bayebi malamu nzoto na bango, bakoyeba ete mposa ya kolinga mobali to mwasi lokola bango ezalaka na yango mopaya, mpe bakolinga te kokóma bato oyo basangisaka nzoto mibali ná mibali to basi ná basi.”

Ata soki mposa oyo ozali koyoka ezali kosila te ntango ozali kokola, yebá ete Biblia esɛngi yo omityela mokano moko ya ntina mingi: Okoki kopona kolanda te bamposa ya mabe, ata soki ezali ndenge nini.

[Elilingi na lokasa 169]

Bakristo basalaka likambo moko te kaka mpo bato mingi bazali kosala yango to bamoni yango malamu