Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nasengeli kosangisa nzoto na moto nyonso?

Nasengeli kosangisa nzoto na moto nyonso?

Mokapo 26

Nasengeli kosangisa nzoto na moto nyonso?

“Bilenge basi mpe mibali babimaka elongo kaka mpo na koyeba soki bakoki kosangisa nzoto na bato boni.”​—Penny.

“Bilenge mibali balobelaka likambo yango polele. Bamikumisaka ete basangisaka nzoto na bilenge basi ebele atako bazali na elenge mwasi oyo balinganá na ye mingi.”​—Edward.

BILENGE mingi bamikumisaka ndenge basangisaka nzoto na moto nyonso, ata soki balinganaka mpenza te. Bilenge mosusu kutu bazalaka na bato na bango oyo basangisaka na bango nzoto mpe esukaka kaka wana, esɛngaka te bákangama na bango.

Kokamwa te soki mposa wana mabe eyeli yo! (Yirimia 17:9) Edward, oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo, alobi boye: “Bilenge basi mingi basɛngaka ngai nasangisa na bango nzoto. Lokola nazali mokristo, koboya kosala yango ezali mpenza etumba monene. Ezali mpasi koboya!” Batoli nini ya Biblia osengeli kobosana te soki moto moko asɛngi yo bósangisa nzoto?

Yebá ntina oyo kosala bongo ezali mabe

Pite ezali mpenza lisumu monene; yango wana bato oyo basalaka yango “bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.” (1 Bakorinti 6:9, 10) Yango ezali solo, ezala soki mwasi ná mobali oyo babalani te baz’osangisa nzoto mpo balingani, to mpo basɛngani. Mpo oboya kosangisa nzoto mpo basɛngi yo to mpo bolingani, osengeli kotalela likambo yango ndenge Yehova atalelaka yango.

“Nandimi mpenza ete kolanda nzela ya Yehova ezali bomoi oyo eleki malamu.”​Karen, Canada.

“Kobosana te ete ozali na baboti, na baninga ebele mpe na bandeko na lisangá. Okopesa bato wana nyonso mpasi soki ondimi kosala likambo ya ndenge wana!”​Peter, Grande-Bretagne.

Soki ozali kotalela pite ndenge Yehova atalelaka yango, ‘okoyina oyo ezali mabe,’ ata soki yango ezali kobenda nzoto.​—Nzembo 97:10.

Vɛrsɛ oyo okoki kotánga: Ebandeli 39:7-9. Talá ndenge Yozefe aboyaki na mpiko mpenza kosangisa nzoto mpe eloko oyo esalisaki ye aboya.

Koyoka nsɔni te mpo na bindimeli na yo

Bilenge mingi bayokaka nsɔni te kokɔtela bindimeli na bango. Ozali na libaku malamu ya komonisa na etamboli na yo ete olandaka batoli ya Nzambe. Koyoka nsɔni te komonisa ete kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali mabe.

“Monisá polele na ebandeli mpenza ete olingaka te kobuka mibeko ya Nzambe.”​Allen, Allemagne.

“Bana mibali oyo nazalaki kotánga ná bango na humanités, bayebaki ete ata bameki ngai na makambo ya ndenge wana, bakobebisa mpema na bango mpamba.”​Vicky, États-Unis.

Kokangama na bindimeli na yo emonisaka ete obandi kokɔmɛla na elimo.​—1 Bakorinti 14:20.

Vɛrsɛ oyo okoki kotánga: Masese 27:11. Talá ndenge oyo makambo ya malamu oyo osalaka ekoki kosepelisa motema ya Yehova!

Kangamá na ekateli na yo!

Koboya ezali na ntina mingi. Kasi, bato mosusu bakoki komona lokola oz’olinga na nse ya motema.

“Makambo na yo nyonso​na ndakisa, ndenge olataka, ndenge olobaka, bato oyo osololaka na bango, mpe ndenge ozalaka ná bato—​esengeli komonisa ete oboyaka likambo yango.”​Joy, Nigeria.

“Osengeli komonisa polele ete ekosimba te. Kondima te bakado ya bana mibali oyo balukaka osangisa na bango nzoto. Soki ondimi kozwa bakado yango, bakoki komona ete osengeli kondima kosangisa na bango nzoto.”​Lara, Grande-Bretagne.

Yehova akosalisa yo soki okangami na ekateli na yo. Na kotalela makambo oyo akutanaki na yango, Davidi, moko ya bakomi ya nzembo, alobaki boye mpo na Yehova: “Epai ya moto ya sembo okozala sembo.”​—Nzembo 18:25.

Vɛrsɛ oyo okoki kotánga: 2 Ntango 16:9. Yebá ete Yehova azalaka na mposa makasi ya kosalisa baoyo balingaka kosala oyo ezali malamu.

Monáká mosika

Biblia elobi boye: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi.” (Masese 22:3) Ndenge nini okoki kosalela toli yango? Soki ozali komona mosika!

“Salá nyonso okabwana na bato oyo balobelaka makambo yango.”​Naomi, Japon.

“Koyebisa bato makambo na yo te, na ndakisa adrɛsi na yo to nimero na yo ya telefone.”​Diana, Grande-Bretagne.

Talelá malamumalamu makambo oyo olobaka, bizaleli na yo, baninga na yo mpe bisika oyo okendaka. Na nsima, omituna boye: ‘Nazali nde kosala makambo, kozanga koyeba, oyo ekoki kotinda bato básɛnga ngai nasangisa na bango nzoto?’

Vɛrsɛ oyo okoki kotánga: Ebandeli 34:1, 2. Talá ndenge oyo kozala na bisika ya mabe ebimiselaki elenge moko na nkombo Dina mikakatano minene.

Kobosana te ete kosangisa nzoto na moto nyonso ezali mpenza mabe na miso ya Yehova; yo mpe osengeli komona yango mabe. Soki okangami na makambo oyo ezali malamu, okobatela lisosoli ya malamu na miso ya Nzambe mpe okobatela lokumu na yo. Elenge mwasi moko na nkombo Carly alobi boye: “Mpo na nini ondima ete moto moko azwa yo kaka mpo na kosilisa nokinoki bamposa na ye? Kobebisa te boyokani na yo na Yehova, oyo osalaka makasi mpo na kobatela!”

NA MOKAPO OYO ELANDI

Bana mibali balobaka ete basepelaka mpenza na bana basi ya ndenge nini? Mbala mosusu okokamwa!

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Bósala nyonso oyo ekoki na bino mpo nsukansuka [Nzambe] akuta bino na litɔnɔ te mpe na mbeba te mpe na kimya.”​—2 Petro 3:14.

TOLI

Salá makasi obongisa bomoto na yo ya kati. (1 Petro 3:3, 4) Soki ozali na bizaleli ya malamu mpenza, okobenda mpe moto ya malamu.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Yehova alingi ete osepela na kosangisa nzoto na ndenge oyo alingaki ezala: epesa moto esengo na kati ya libala, kozanga ete akutana na makambo mingi ya mabe oyo ebimaka nsima ya kosala pite, na ndakisa komitungisa, kobanga, to koyoka mawa.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Mpo nazala na ekateli ya kotikala sembo lokola Yozefe, nako ․․․․․

Mpo nasala te mabe oyo Dina asalaki, nako ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Atako moto akoki komekama mpo na kosangisa nzoto liboso ya kobala, mpo na nini ezali mabe?

● Okosala nini soki moto asɛngi yo bósangisa nzoto?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 185]

“Kozala bibangabanga te! Ntango elenge mobali moko atyaki ngai lobɔkɔ na lipeka na makanisi mabe, nayebisaki ye: ‘Longolá lobɔkɔ na yo!’ Nadongolaki ye mpe nakendaki na ngai.”​—Ellen

[Elilingi na lokasa 187]

Soki oz’osangisa nzoto na moto nyonso, oz’omisilisa valɛrɛ