Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini bana mibali balingaka ngai te?

Mpo na nini bana mibali balingaka ngai te?

Mokapo 27

Mpo na nini bana mibali balingaka ngai te?

Ayebi ete bato basepelaka na ngai mingi mpo nayebisá ye ke bana mibali mosusu balingaka ngai. Asɛkaki ntango nayebisaki ye ke baninga na ngai mosusu baza’ bazoba. Mpe ayebi ete naza’ mayele​—nasembolá ye na makambo mosusu oyo alobaki. Nazo’mituna soki az’ozela nini mpo asɛnga ngai tóbanda kobima. Aza’ kitoko, kasi amonanaka likolólikoló! Nasololaka na ye na mpasi. Mpe soki nalobi likambo, asembolaka ngai! Soki namoni ye nalukaka kokima ye.

OMITUNGISAKA mpo bana mibali basepelaka na yo te? Bilenge basi mingi bamitungisaka mpe, ezala baoyo okanisaka ete bazalaka na mikakatano te! Tózwa ndakisa ya Joanne. Azali kitoko, mayele mpe ayebi koloba. Kasi, alobi boye: “Mbala mingi namonaka ete bana mibali basepelaka na ngai te. Mwa ndambo oyo nasepelaki na bango, basepelaki na ngai kaka mpo na mwa ntango, kasi na nsima batikaki mpenza kosolisa ngai!”

Makambo nini bana mibali basepelaka na yango epai ya mwana mwasi? Makambo nini basepelaka na yango te? Okoki kosala nini mpo mwana mobali ya malamu asepela na yo?

Oyo osengeli kosala

Luká komiyeba. Na ntembe te, omonaki ete ntango kaka okɔtaki na eleko ya bolenge, okómaki kosepela na bana mibali. Ekoki kozala osepelaki na moko to mingi. Ezali mabe te. Kasi, soki owelaki kolinga elenge mobali ya liboso oyo abɛtisaki yo motema, olingaki kokola malamu te na bomoto mpe na elimo. Esɛngaka ntango mpo na kokolisa bizaleli ya malamu mpe ‘kokómisa makanisi na yo makanisi ya sika’ na makambo ya ntina, mpe kokokisa mikano mosusu oyo omityelá.​Baroma 12:2; 1 Bakorinti 7:36; Bakolose 3:9, 10.

Ya solo, bana mibali mingi basepelaka na bana basi oyo bakɔmeli naino te to bayebi makambo te. Kasi, bana mibali yango basepelaka nde libosoliboso na nzoto ya elenge mwasi, kasi te na bizaleli na ye. Mpo na koloba solo, elenge mobali oyo azali na makanisi ya malamu, akoluka elenge mwasi oyo azali na bizaleli oyo ekosalisa bango na boninga na bango.​—Matai 19:6.

Oyo bana mibali balobi: “Nasepelaka na mwana mwasi oyo akoki kopesa makanisi na ye moko, oyo amimonaka ete azali moto lokola bato nyonso.”​James.

“Nasepelaka na mwana mwasi oyo akoki kopesa likanisi na ye na bosembo, na limemya mpe oyo andimandimaka te makambo nyonso oyo nalobaka. Ata soki aza kitoko, nasepelaka te na mwana mwasi oyo alingaka kaka koloba makambo oyo matoi na ngai esepelaka koyoka.”​Darren.

Likanisi na yo eza nini mpo na makambo bana mibali oyo bauti koloba?

․․․․․

Memyáká basusu. Ndenge kaka olingaka bálinga yo, bana mibali oyo oyebi bazalaka mpe na mposa makasi bámemya bango. Yango wana tokoki kokamwa te ete Biblia elobi ete mobali asengeli kolinga mwasi na ye, mpe ete mwasi asengeli kozala na “limemya makasi” epai ya mobali na ye. (Baefese 5:33) Na boyokani na toli yango, ankɛtɛ moko oyo esalemaki epai ya bilenge mibali mingi emonisaki ete mingi na bango (koleka 60 %) balobaki ete basepelaka mingi na limemya koleka bolingo. Mibali mingi ya mikóló (koleka 70 %) oyo batunaki, balobaki mpe kaka bongo.

Limemya elimboli te kozala bindimandima​—kotika makanisi ya malamu oyo ozalaki na yango mpe koyebisa yango te. (Ebandeli 21:10-12) Kasi, lolenge oyo ozali kopesa makanisi na yo ekomonisa na ntembe te soki ozali kobengana to kobenda elenge mobali. Soki ozali ntango nyonso kotyaka ye ntembe to kosembolaka ye, akoki komona ete ozali mpenza na limemya te epai na ye. Kasi, soki ozali kondima likanisi na ye mpe kolobela esika oyo omoni ete alobi malamu, na ntembe te akobanda mpe kondima mpe kozwa na motuya makanisi na yo. Ya solo, elenge mobali oyo azali na bososoli akomona mpe soki ozalaka na limemya epai ya bato ya libota na yo mpe bato mosusu.

Oyo bana mibali balobi: “Ntango mwasi ná mobali babandi kokutana mpo na libala, limemya ezali eloko eleki ntina. Bolingo eyaka na nsima.”​Adrian.

“Soki elenge mwasi azali komemya ngai, nakanisi ete nsukansuka akolinga ngai.”​Marc.

Likanisi na yo eza nini mpo na makambo bana mibali oyo bauti koloba?

․․․․․

Latáká na ndenge ebongi mpe zaláká pɛto. Molato na yo mpe ndenge obongisaka nzoto emonisaka makanisi mpe bizaleli na yo. Liboso kutu obanda kosolola na mwana mobali, ndenge kaka ozali komonana na miso elobaka mingi. Soki molato na yo ebongisami malamu mpe olati na ndenge ebongi, ekoloba malamu mpo na yo. (1 Timote 2:9) Kasi, soki olati bilamba oyo ez’otika nzoto libándá to ezali salite, ekoloba mpenza polele ete ozali na bizaleli mabe!

Oyo bana mibali balobi: “Ndenge elenge mwasi alataka elobaka mingi mpo na ndenge oyo atalelaka bomoi. Soki azali kolata bilamba oyo ez’omonisa nzoto na ye to ezali salite, yango ekomonisa ngai ete nasengeli kotyela ye likebi te.”​Adrian.

“Nasepelaka na elenge mwasi oyo abongisaka nsuki na ye malamu, azalaka nsolo kitoko, mpe oyo azalaka na mongongo ya kitoko. Kasi, atako nasepelaka na elenge mwasi oyo azali kitoko, soki azali salite nakotika ye.”​Ryan.

“Ya solo, soki elenge mwasi alati bilamba oyo etiki nzoto libándá, akoki kobenda likebi ya bato. Kasi, ezali te elenge mwasi oyo nakosepela kolingana na ye.”​Nicholas.

Likanisi na yo eza nini mpo na makambo bana mibali oyo bauti koloba?

․․․․․

Oyo osengeli te kosala

Kosakana na motema ya bana mibali te. Basi bazalaka na nguya ya kobenda mibali. Nguya yango ekoki kosalelama na ndenge ya malamu to na ndenge ya mabe. (Ebandeli 29:17, 18; Masese 7:6-23) Soki ozali kosalela nguya yango mpo na kobenda mwana mobali nyonso oyo okutani na ye, bato bakoyeba ete osakanaka na motema ya bana mibali.

Oyo bana mibali balobi: “Kofanda kaka pene ya mwana mwasi ya kitoko mpe soki mapeka na bino etutani, ekoki kolamwisa mposa epai ya mwana mobali. Na yango, namonaka ete mwana mwasi oyo az’osimba yo mbala na mbala ntango azali koloba na yo azali kosakana na motema na yo.”​Nicholas.

“Soki mwana mwasi aza ntango nyonso koluka kosimba lobɔkɔ ya mwana mobali nyonso to kolalisela mobali nyonso oyo azali koleka miso, wana nakanisi ete az’osakana na motema ya bana mibali, mpe namonaka ete azali te elenge mwasi ya kosepela na ye.”​José.

Kotingamatingama te. Ntango mwasi ná mobali babalani, bakómaka oyo Biblia ebengi “mosuni moko.” (Ebandeli 2:24) Na ntango wana, mobali ná mwasi batikaka makambo mingi oyo bazalaki na bonsomi ya kosala ntango bazalaki bango moko; ya solo mpenza, bakanganaka moko epai ya mosusu. (1 Bakorinti 7:32-34) Kasi, soki ozali naino koluka koyeba elenge mobali, kozela te ete ayebisaka yo makambo nyonso to yo mpe oyebisaka ye makambo nyonso. * Ezali solo ete ntango ondimi ete ye mpe asengeli kozala na baninga mosusu, akoki kobanda kotyela yo likebi mingi. Mpe ndenge oyo azali kosalela bonsomi yango ekosalisa yo oyeba ye malamu mpenza.​—Masese 20:11.

Oyo bana mibali balobi: “Soki mwana mwasi az’oluka koyeba makambo nyonso oyo naz’osala mpe az’okoka te kozala na baninga mosusu to kosala makambo mosusu soki ngai nazali te, wana azali kotingamatingama na ngai.”​Darren.

“Soki mwana mwasi oyo nalingani na ye azali ntango nyonso kotindela ngai bamesaje mpe koluka koyeba soki naza’ na nani, mingimingi soki bana basi bazali wana, wana namonaka yango elembo ya mabe.”​Ryan.

“Mwana mwasi oyo atikelaka yo ntango te ozala mpe na baninga na yo mibali mpe asilikaka soki obengi ye te azala na yo, amonisaka ete akoki kosala eloko moko te soki yo ozali te, mpe mwasi ya ndenge wana nakosepela na ye te.”​Adrian.

Likanisi na yo eza nini mpo na makambo bana mibali oyo bauti koloba?

․․․․․

Yebá valɛrɛ na yo

Na ntembe te, oyebi bana basi oyo bakoki kosala nyonso kaka mpo na kobenda likebi mpe kosepelisa mwana mobali. Bamosusu kutu bakoki kondima kosala makambo oyo eyokani te na bizaleli ya malamu kaka mpo na kozwa mwa moto​—ata mpe mobali. Kasi, maloba oyo ete ‘okobuka oyo oloni’ ekoki kosalelama na likambo yango. (Bagalatia 6:7-9) Soki ozali komizwa na valɛrɛ te mpe ozali kozwa na motuya te mateya ya Biblia, na ntembe te okobenda kaka mibali oyo bakozwa yo na valɛrɛ te; bakozwa mpe na motuya te mitinda oyo olandaka.

Ezali solo ete bana mibali nyonso te nde bakosepela na yo​—mpe yango ekoki kozala likambo ya malamu! Kasi, soki ondimi kobongisa kitoko na yo ya libándá mpe ya kati, okozala na “motuya monene na miso ya Nzambe”​—mpe okobenda elenge mobali oyo abongi na yo mpenza.​—1 Petro 3:4.

NA MOKAPO OYO ELANDI

Bongo soki oza’ mwana mobali mpe omitunaka, ‘Mpo na nini bana basi basepelaka na ngai te?’

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 29 Ya solo, ntango elenge mobali ná elenge mwasi bakómi bafianse, basengeli koyebisanaka makambo.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Bonzenga ekoki kokosa, mpe kitoko ekoki kozala mpamba; kasi mwasi oyo abangaka Yehova ye nde azwaka lokumu.”​—Masese 31:30.

TOLI

Kolekisaka monzɛlɛ te! Soki eleki mingi, yango ekotinda bato bákanisa ete ozali lofundo to olingi nde bátalaka yo.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Soki ozali kosɛnga ntango nyonso ete mwana mobali azalaka kaka ná yo, okoki kobebisa boninga na bino.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Ezaleli oyo nakosala makasi nabongisa ezali ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Ndenge nini okoki komonisa limemya mpo na makanisi mpe ndenge oyo elenge mobali amiyokaka?

● Ndenge nini okoki komonisa ete omipesaka valɛrɛ?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 190]

“Nandimi ete mbala mingi nasepelaka libosoliboso na bana basi oyo baza kitoko. Kasi, kitoko yango ekoki komonana mpamba soki mwana mwasi yango azali na mikano ya malamu te. Epai mosusu, soki ayebi oyo alingi kosala na bomoi na ye​—mingimingi soki asilá kokokisa mikano na ye mosusu—​yango ekoki kosala ete nasepela na ye mingi.”​—Damien

[Elilingi na lokasa 191]

Bolingo mpe limemya ezali lokola bapinɛ mibale ya velo; nyonso mibale ezalaka na ntina