Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bandakisa ya kolanda​—Yobo

Bandakisa ya kolanda​—Yobo

Bandakisa ya kolanda​—Yobo

Bomoi ya Yobo ebebaki mpenza kobeba. Ya liboso, abungisaki biloko na ye. Ya mibale, bana na ye bakufaki. Ya misato, abɛlaki. Makambo nyonso wana eyaki mbangu mpe na mbalakaka. Na mawa makasi na motema, Yobo alobaki boye: “Molimo na ngai eyoki bomoi na ngai mpii [mabe] mpenza.” Alobaki mpo na ye moko ete ‘atondi na nsɔni mpe na mpasi mɛkɛ.’ (Yobo 10:1, 15) Kasi, atako azalaki na mikakatano, Yobo aboyaki kopesa Mozalisi na ye mokɔngɔ. (Yobo 2:10) Atako bomoi na ye ebongwanaki, atikaki te ete mikakatano ebongola bizaleli na ye. Na yango, Yobo azali ndakisa malamu ya koyika mpiko.

Ntango okutani na mikakatano, yo mpe okoki ‘koyoka bomoi na yo mpii [mabe] mpenza.’ Lokola Yobo, okoki komonisa ete okotika te mikakatano ebongola bomoto na yo to elongola ekateli na yo ya kosalela Yehova Nzambe. Yakobo akomaki ete: “Talá! Tolobaka ete bato oyo bayiki mpiko bazali bato ya esengo. Boyoká nsango ya koyika mpiko ya Yobo mpe bomoná ndenge Yehova asukisaki makambo na ye, ete Yehova azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa.” (Yakobo 5:11) Atyelaki Yobo likebi, mpe atyelaka yo likebi!