Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bandakisa ya kolanda​—Moize

Bandakisa ya kolanda​—Moize

Bandakisa ya kolanda​—Moize

Moize azalaki na makambo mingi oyo ekokaki kopesa ye matomba na bomoi na ye. Abɔkwamaki na ndako ya mokonzi Farao mpe ateyamaki na bwanya nyonso ya Ezipito. (Misala 7:22) Asalaki nini na formasyo wana? Akokaki kokóma moto monene, mozwi mpe na nguya. Kasi, alandaki te mbamba ya bilenge mosusu, ata mpe bamposa na ye moko. Aponaki nde kosalela bomoi na ye na lolenge moko oyo na ntembe te ekamwisaki bato mingi. Aponaki “konyokwama elongo na bato ya Nzambe.” (Baebre 11:25) Moize abungisaki nde makambo nyonso ya malamu mpo asalaki liponi wana? Te. Lokola aponaki kosalela Nzambe mpe kosalisa bato, alekisaki bomoi moko ya malamu mpenza mpe ya esengo.

Soki ozali na likoki ya kotánga bakelasi ya malamu, okosala nini na libaku wana? Okoki koluka kokóma mozwi to na nguya. To, lokola Moize, okoki kosala ete bomoi na yo ezala mpenza na ntina. Okoki kosalela makasi mpe mayele na yo mpo na kosalela Nzambe mpe bazalani na yo. (Matai 22:35-40) Bolamu oyo okozwa, eleki nyonso!