Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bandakisa ya kolanda​—Timote

Bandakisa ya kolanda​—Timote

Bandakisa ya kolanda​—Timote

Timote alingi kolongwa na ndako; azali kosala yango te mpo na kokima libota na ye, kasi mpo na kokóma misionɛrɛ elongo na ntoma Paulo! Ntango Timote azalaki naino na mbula soki 20, azalaki elenge mobali moko oyo akɔmɛli mpe “bandeko na Listra mpe na Ikoniumu bazalaki koloba malamu mpo na ye.” (Misala 16:2) Paulo azalaki na kondima ete Timote akoki kosala makambo minene na mosala ya Nzambe. Mpe asalaki yango! Na bambula oyo elandaki, Timote asalaki mibembo mingi, mpo na kosala masangá ya sika mpe kolendisa bandeko. Bizaleli malamu ya Timote esalaki ete Paulo apesa ye longonya, mpo mbula soki 11 na nsima akomelaki Bafilipi boye: “Nazali na moto mosusu te oyo azali na makanisi lokola ya ye, oyo azali komitungisa mpenza mpo na bino.”​—Bafilipi 2:20.

Ozali komipesa mobimba mpo Nzambe asalela yo na mosala na ye? Soki ozali kosala bongo, okozwa mapamboli mingi! Yehova azwaka na valɛrɛ mingi bilenge oyo ‘bazali komipesa na bolingo na bango moko.’ (Nzembo 110:3) Longola yango, okoki kondima mpenza ete Yehova Nzambe “azangi boyengebene te mpo abosana mosala na [yo].”​—Baebre 6:10.