Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini bana basi balingaka ngai te?

Mpo na nini bana basi balingaka ngai te?

Mokapo 28

Mpo na nini bana basi balingaka ngai te?

Naz’osepelisa ye mpenza. Nayebisaki ye makambo nyonso oyo etali ngai​—biloko oyo naza na yango, bisika oyo nakendá, bato oyo nayebi. Namoni ke aza’ mpenza na mposa ya kobima na ngai!

Naza na mposa ata mabele efungwama mpe nazinda! Mpo na nini az’otingama kaka? Ndenge nini nakoki kokata lisolo oyo kozanga ete nabima mwana mabe?

OKOKI sikoyo kobanda kolinga. Oza na mposa ya moto oyo aza kitoko mpe oyo azali Motatoli [Témoin de Jéhovah] lokola yo. (1 Bakorinti 7:39) Kasi liboso, ntango nyonso oyo obandaki kolinga moto, ozalaki komona ete ez’osimba te. Mpo na nini? Bana basi basepelaka kaka na bana mibali ya kitoko makasi? Mwana mwasi moko nkombo na ye Lisa, alobi boye: “Nasepelaka na mwana mobali oyo aza engambe.” Kasi, bana basi mingi basukaka kaka wana te. Carine, oyo azali na mbula 18, alobi boye: “Na ntango mosusu, bana mibali ya kitoko bazangaka bizaleli mosusu ya malamu.”

Bizaleli nini ya ntina bana basi balukaka epai ya bana mibali? Soki olingi koyeba mwana mwasi moko malamu, makambo nini osengeli kotalela? Mpe batoli nini ya Biblia esengeli obosanaka te?

Oyo osengeli kosala liboso

Liboso obanda kolinga mwana mwasi moko, esengeli oyeba malamu mwa makambo ya ntina, mpe yango ekosalisa yo ozala moninga ya moto nyonso. Talelá makambo oyo elandi.

Monisáká bonkonde. Biblia elobi ete moto oyo azali na bolingo “aboyaka makambo oyo ebongi té.” (1 Ba-korentien [Bakorinti] 13:5, Bible na lingala ya lelo oyo) Bonkonde emonisaka ete omemyaka basusu, ozali kokɔmɛla, mpe ete ozali komekola bizaleli ya Kristo. Kasi, bonkonde ezali te lokola veste oyo olati mpo na kobenda likebi ya basusu kasi olongoli yango ntango okómi na ndako. Omituna boye: ‘Namonisaka bonkonde ntango nazali ná bandeko ya libota?’ Soki te, okokoka komonisa yango te ntango okozala ná bato mosusu. Kobosana te ete mwana mwasi ya mayele akotala lolenge oyo ozalaka na bandeko na yo ya libota, mpo ayeba ndenge ozalaka mpenza.​—Baefese 6:1, 2.

Oyo bana basi balobi: “Nasepelaka makasi na mwana mobali oyo amonisaka bonkonde, ezala na makambo mike lokola kofungolela ngai porte, mpe na makambo minene lokola kozala na boboto mpe kotyela ngai mpe bandeko na ngai likebi.”​Tina.

“Nasepelaka te ntango mwana mobali oyo nauti kokutana na ye az’otunatuna ngai mituna lokola: ‘Oza na fianse?’ mpe ‘Oz’okana kosala nini na vie na yo?’ Namonaka bongo eza kozanga bonkonde mpe eyokisaka ngai nsɔni!”​Kathy.

“Bana mibali oyo bakanisaka ete bakoki kosakana na motema na biso bamemyaka biso te, lokola nde ndenge toyokaka eza na ntina te mpe biso nyonso toza na mposa makasi ya kobala, yango wana tosɛngaka bango báyokela biso mawa.”​Alexis.

Batelá bopɛto ya nzoto. Bopɛto ya nzoto emonisaka ete omemyaka kaka basusu te, kasi mpe yo moko. (Matai 7:12) Soki omimemyaka, basusu mpe bakomemya yo. Nzokande, soki obatelaka bopɛto ya nzoto te, milende nyonso oyo okosala mpo mwana mwasi alinga yo, ekokende na mai.

Oyo bana basi balobi: “Mwana mobali moko oyo azalaki kosepela na ngai azalaki mpenza monɔkɔ nsolo. Nakokaki kokangela yango motema te.”​Kelly.

Yebáká kosolola malamu. Mpo bolingo eumela mpenza, esengeli kosololaka malamu. Kolobelaka te kaka makambo na yo moko, kasi mpe ya moninga na yo. (Bafilipi 2:3, 4) Oyokaka mpenza oyo alobaka mpe ozwaka makanisi na ye na valɛrɛ.

Oyo bana basi balobi: “Nasepelaka na mwana mobali oyo asololaka na ngai kozanga kobanga​ntango abosanaka te makambo oyo nayebisaki ye mpe atunaka mituna mpo lisolo ekoba.”​Christine.

“Nakanisi ete bana mibali basepelaka na oyo bamonaka, kasi bana basi basepelaka mingi na oyo bayokaka.”​Laura.

“Bakado ezali malamu. Kasi soki mwana mobali ayebi kosolola malamu, akoki kolendisa yo na maloba na ye, . . . wana mpenza nakosepela na ye!”​Amy.

“Nayebi elenge mobali moko oyo azalaka na bonkonde mpe azalaka seresere mingi te na ngai. Tokoki kosolola mpenza makambo ya ntina kozanga ete abimisa maloba lokola: ‘Parfum n’o nsolo kitoko’ to ‘Obimi mpenza kitoko lelo.’ Ayokaka mpenza oyo nalobaka, mpe yango esalaka ke mwana mwasi nyonso amiyoka malamu.”​Beth.

“Nakolinga mpenza koyeba malamu mwana mobali oyo ayebi kosɛkisa, kasi mpe akoki kosolola makambo mingi ya ntina na bosembo nyonso.”​Kelly.

Yebá kokokisa mikumba na yo. Biblia elobi boye: “Moto na moto asengeli komema mokumba na ye.” (Ba-galate [Bagalatia] 6:5, Bible na lingala ya lelo oyo) Bana basi basepelaka te na bana mibali oyo bakokaka kobatela mosala te mpo bazali gɔigɔi to balekisaka ntango mingi na kosakana.

Oyo bana basi balobi: “Nakolinga bana mibali bákokisaka mikumba na bango. Soki basalaka bongo te, yango ebendaka basi te. Esepelisaka mpe te.”​Carine.

“Bana mibali mosusu bazalaka na mikano ya polele te. Soki basepeli na mwana mwasi moko, balukaka koyeba mikano na ye mpe balobaka ete: ‘Ɛɛ, yango mpe nalingi nasala!’ Kasi makambo oyo basalaka ekokanaka te na mikano yango.”​Beth.

Ndenge emonisami likoló, koyeba kokokisa mikumba na yo ekosalisa yo ozala na baninga ya malamu. Kasi, ntango omoni ete okoki mpo na kobanda kolinga mpenza mwana mwasi moko, osengeli kosala nini?

Oyo osengeli kosala sikoyo

Bandá lisolo. Soki okanisi ete moninga moko ya mwasi oyo osepelaka na ye akozala mwasi malamu, yebisá ye ke osepelaka na ye. Monisá makanisi na yo polelepolele. Ya solo, yango ekoki kotungisa yo. Oz’obanga aboya. Kasi soki ondimi kobanda lisolo, yango ezali elembo oyo emonisi ete okoli. Kasi, kebá: Yango ezali te kotuna libala. Yango wana zalá na bososoli. Soki ozali kolobela yango lokola likambo moko ya monene mpenza, mwana mwasi akoki kokima yo na esika asepela na yo.

Oyo bana basi balobi: “Nakoki koyeba makanisi ya moto te. Soki moto alingi ayeba ngai malamu, asengeli kozala sembo mpe koyebisa ngai yango polele.”​Nina.

“Soki tozalaki baninga esali mwa mikolo, elingaki kosala ngai mabe soki mwana mobali ayebisi ngai ke asepelaka na ngai. Kasi nakozala na limemya epai na ye soki ayebisi ngai mbala moko ete akolinga tósukaka kaka te kozala baninga.”​Helen.

Ndimá ekateli ya mwana mwasi. Bongo soki moninga na yo ya mwasi alobi ete alingi te bókóma kolingana? Okomonisela ye limemya soki ondimi ekateli wana mpo ayebi motema na ye; soki aboyi likambo, abongolaka te. Soki oz’otingama kaka, yango ekomonisa ete okoli te. Soki mwana mwasi aboyi kasi oz’otingama kaka, to osilikeli ye, ozali mpenza kokanisa bolamu na ye to ya yo moko?​—1 Bakorinti 13:11.

Oyo bana basi balobi: “Epesaka ngai nkanda soki naboyi, kasi mwana mobali az’otingama kaka.”​Céline.

“Nayebisaki mwana mobali moko ke nasepeli na ye te, kasi azalaki kotingama kaka napesa ye nimero na ngai ya telefone. Nalingaki te amona ngai moto mabe. Kutu, ezalaki pɛtɛɛ te mpo azwa makasi ya koyebisa ngai mposa na ye. Kasi nsukansuka, esengelaki namonisa ye polele ete nalingi te.”​Sara.

Oyo osengeli kosala te

Bana mibali mosusu bakanisaka ete ezalaka mpasi te bana basi básepela na bango. Bakoki ata kowelana na kati na bango mpo na koyeba nani na kati na bango basi bakoki kolinga ye mingi. Kasi, kowelana ya ndenge wana ezali mabe mpenza mpo ekobebisa lokumu na yo. (Masese 20:11) Okoki kokima likambo ya ndenge wana soki olandi makanisi oyo:

Kozala seresere te. Moto oyo azali seresere ná mwana mwasi azalaka na maloba ya sukali mpe ya kolɛngola. Azalaka na mposa te ya kolinga moto mpo na kobala ye. Bizaleli ya ndenge wana ebuki etinda ya Biblia ya kotalela “bilenge basi lokola bandeko basi na makanisi ya pɛto mpenza.” (1 Timote 5:2) Bato oyo bazalaka seresere ndenge wana bazalaka baninga ya malamu te mpe mibali ya malamu te. Bana basi oyo bamonaka mosika, bayebi yango.

Oyo bana basi balobi: “Esepelisaka te ntango mwana mobali az’oloba na yo maloba ya sukali kasi oyebi ete asalaki mpe bongo epai ya moninga na yo na sanza oyo eleki.”​Helen.

“Mokolo moko, mwana mobali moko ya kitoko abandaki kokóma seresere na ngai, mpe azalaki koloba mingimingi makambo na ye. Ntango mwana mwasi mosusu ayaki na groupe na biso, asalaki mpe bongo epai na ye. Lisusu, ntango mwana mwasi ya misato ayaki, asalaki mpe kaka bongo. Nasepelaki ata moke te!”​Tina.

Kosakana na motema ya mwana mwasi te. Kokanisa te ete boninga ná mwana mwasi esengeli kozala ndenge moko na boninga ná mwana mobali lokola yo. Mpo na nini? Kanisá naino: Soki oyebisi moninga na yo ya mobali ete alati veste ya kitoko to osololaka na ye mbala na mbala mpe obombelaka ye likambo moko te, akokanisa ata mokolo moko te ete ozali kolinga ye. Kasi soki oyebisi mwana mwasi ete alati kitoko to osololaka na ye mbala na mbala mpe obombelaka ye likambo moko te, akoki kokanisa ete ozali kolinga ye.

Oyo bana basi balobi: “Namoni ete bana mibali bayebaka te ke bakoki te kosalela bana basi makambo ndenge basalelaka baninga na bango mibali.”​Chantal.

“Mwana mobali moko azwaki nimero na ngai ya telefone, mpe na nsima atindelaki ngai mesaje. Sikoyo, azalaki na makanisi nini? Na ntango mosusu okoki kokangama na moninga moko oyo bokomelanaka bamesaje na telefone, kasi okoyeba ye mpenza malamu na nzela ya bamesaje?”​Marthe.

“Namoni ete mwana mobali ayebaka te ete mwana mwasi akoki kokangama na ye noki, mingimingi soki atyelaka ye likebi mpe asololaka na ye malamu. Ezali te mpo atulá. Ezali kaka mpo bana basi mingi bazalaka na mposa ya kolinga mpe balukaka ntango nyonso moto oyo abongi na bango.”​Alice.

MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 3, NA VOLIMI 2

NA MOKAPO OYO ELANDI

Ndenge nini okoki kokesenisa bolingo mpe lolango makasi?

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

‘Bólata bomoto ya sika oyo ezalisamaki na boyokani na mokano ya Nzambe na boyengebene mpe bosembo ya solo.’​—Baefese 4:24.

TOLI

Tuná mwa mikóló ezaleli nini oyo bakanisi ete eleki ntina, elenge mobali asengeli kokolisa, mpe talá soki yango nde mpenza ezaleli oyo osengeli kokolisa.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Ndenge omonanaka na libándá ezali na ntina te koleka ndenge ozali na kati.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Likambo oyo nakomonisa bonkonde mingi ezali ․․․․․

Mpo nabongisa lolenge na ngai ya kosolola, nako ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Ndenge nini okoki komonisa ete omimemyaka?

● Ndenge nini okoki komonisa ete omemyaka makanisi ya mwana mwasi mpe ndenge az’omiyoka?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 198]

“Bana mibali bakanisaka ete mpo na kobenda bana basi, basengeli kolata to kokata nsuki lolenge moko boye. Ata soki likambo yango ekoki kozala solo, namoni ete bana basi mingi basepelaka nde na bizaleli malamu.”​—Syntiche

[Elilingi na lokasa 197]

Bonkonde ezali te lokola veste oyo olati mpo na kosepelisa basusu kasi olongoli yango ntango okómi na ndako