Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini nakoki komesana soki ngai ná fianse na ngai tokabwani?

Ndenge nini nakoki komesana soki ngai ná fianse na ngai tokabwani?

Mokapo 31

Ndenge nini nakoki komesana soki ngai ná fianse na ngai tokabwani?

“Tozalaki bafianse sanza motoba mpe tozalaki baninga mbula mitano. Ntango alingaki tókabwana, akokaki kutu koyebisa ngai yango te. Atikaki kaka kosolola na ngai. Nalɛmbaki nzoto. Likambo yango eyokisa ngai mpenza mpasi. Nazalaki kaka komituna ete: ‘Nini ya mabe nasali?’”​—Rachel.

KOKABWANA na fianse na yo ekoki kosilisa yo esengo mpe kosala ete obungisa elikya mpe omilelaka. Tózwa ndakisa ya Jeff ná Susan, oyo bazalaki bafianse mbula mibale. Na boumeli ya bambula wana, bakómaki kolingana makasi. Mokolo mobimba, Jeff azalaki kotindela Susan bamesaje na telefone oyo ezalaki na maloba ya kolengola. Mbala na mbala, azalaki kopesa ye bakado mpo na komonisa ete azalaki kokanisa ye. Susan alobi boye: “Jeff azalaki kosala makasi ayoka ngai mpe amitya na esika na ngai. Azalaki kosala ke namiyoka lokola naleki bato nyonso.”

Banda kala, Jeff ná Susan bazalaki kosolola likambo ya libala na bango mpe esika oyo bakokende kofanda soki babalani. Kutu, ekómaki polele ete Jeff alingaki kobala Susan. Kasi, na mbala moko, Jeff aboyaki Susan! Susan alɛmbaki nzoto mpenza. Azalaki kaka kosala makambo tiká asala, kasi likambo yango eyokisaki ye mpasi makasi. Alobi boye: “Nalɛmbaki nzoto mpe mayele esilaki ngai.” *

Mpo na nini esalaka mpasi

Soki okutaná mpe na likambo oyo Susan akutanaki na yango, okoki komituna boye: ‘Nakokoka komesana lisusu?’ Mawa oyo ozali koyoka ezali mabe te. Mokonzi Salomo akomaki boye: “Bolingo ezali makasi lokola liwa.” (Loyembo ya Salomo 8:6) Yango wana, kokabwana na fianse na yo ezali likambo eleki mpasi oyo osengeli koyikela yango mpiko. Kutu, bato mosusu balobaka ete kokabwana na fianse eza’ lokola liwa ya ndambo. Mbala mosusu ozali kokutana na moko ya makambo oyo elandi to mosusu:

Koboya kondima. ‘Ekoki kosila kaka boye te. Akobongola makanisi na ye ata nsima ya mokolo moko to mibale.’

Nkanda. ‘Ndenge nini akoki kosala ngai boye? Nayini ye!’

Kotungisama na makanisi. ‘Moto moko alingaka ngai te. Moto moko akolinga ngai lisusu te.’

Kondima yango. ‘Nakoyoka malamu. Bokabwani esalaka mpasi, kasi nakomesana kaka.’

Likambo ya malamu ezali ete okoki kokóma tii na kondima likambo yango. Soki ekosɛnga ntango boni mpo na kokóma bongo, wana etaleli makambo mingi, na ndakisa boumeli ya bambula oyo bozalaki bafianse mpe ndenge oyo bomesanaki. Liboso ntango yango ekóma, ndenge nini okoki komesana na likambo yango oyo esali yo mpasi na motema?

Kende liboso

Mbala mosusu oyoká bato mosusu balobaka ete ntango esilisaka bampota. Ntango bokabwanaki na fianse na yo, maloba yango ebɔndisaki yo te. Ezali bongo mpo ntango esilisaka makambo nyonso te. Tózwa ndakisa: Mpota oyo ezali na mposo na yo ekosila na nsima, kasi ez’osala yo mpasi sikoyo. Osengeli kosala nyonso mpo makila ebima lisusu te mpe kokitisa mpasi ya mpota yango. Osengeli mpe kobatela yango mpo ezwa mikrobe te. Ezali mpe bongo soki ozoki na motema. Sikoyo, ez’osala yo mpasi. Kasi ezali na makambo oyo okoki kosala mpo na kokitisa mpasi mpe kosala ete nkanda ekɔtela yo na motema te. Ntango ekobongisa makambo, kasi yo okoki kosala nini? Meká kosala boye.

Soki kolela eyeli yo, lelá. Kolela eza n’ango mabe te. Kutu, Biblia elobi ete ezali na “ntango ya kolela,” ata mpe “ntango ya koganga na kolela.” (Mosakoli 3:1, 4) Kobimisa mai ya miso emonisi te ete olɛmbá. Mokolo moko, Davidi, soda ya mpiko oyo akutanaki na makambo oyo eyokisaki ye mpasi na motema, alobaki boye: “Butu nyonso nazali kopɔlisa mbeto na ngai na mpisoli; nazali kotondisa esika na ngai ya kolala na mpisoli na ngai.”​—Nzembo 6:6.

Batelá sante na yo. Kosala ngalasisi mpe kolya malamu ekosalisa yo ozwa lisusu makasi oyo esilaki mpo oyokaki mpasi na motema ntango yo ná fianse na yo bokabwanaki. Biblia elobi ete “ngalasisi ya nzoto ezali na litomba.”​—1 Timote 4:8.

Makambo nini oyo etali sante na yo osengeli kotyela yango likebi?

․․․․․

Zaláká na mingi ya kosala. Kotika te kosala makambo oyo osepelaka na yango. Mpe kolinga te kozalaka yo moko, mingimingi na ntango oyo. (Masese 18:1) Soki ozali ná bato oyo batyelaka yo likebi, okotya makanisi na yo na makambo ya malamu.

Mikano nini okoki komityela?

․․․․․

Yebisá Nzambe na libondeli ndenge ozali komiyoka. Yango ekoki kozala mpasi. Nsima ya kokabwana na fianse na bango, basusu bamonaka ete Nzambe nde atɛki bango. Balobaka ete: ‘Nabondelaki mingi mpo nazwa moto moko, sikoyo talá likambo oyo ekómeli ngai!’ (Nzembo 10:1) Kasi, ekozala malamu kotalela Nzambe lokola moto oyo abongisaka mabala na likoló? Te; ye mpe te nde atindaka moto akabwana na fianse na ye. Biblia elobaka mpo na Yehova ete: “Atyelaka [yo] likebi.” (1 Petro 5:7) Yango wana, yebisá makambo nyonso oyo eza na motema na yo na libondeli. Biblia elobi boye: “Kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino na nzela ya Kristo Yesu.”​—Bafilipi 4:6, 7.

Makambo nini mpenza okoki koyebisa Yehova na libondeli oyo etali mpasi oyo ozali kobundana na yango lokola yo ná fianse na yo bokabwani?

․․․․․

Talá nde liboso

Ntango mpasi na yo ekosila, okoki kozwa mwa ntango ya kokanisa likambo mpenza oyo esalaki ete bókabwana. Ntango okokoka kosala yango, ekozala malamu okoma biyano na yo na mituna oyo ezali na etanda “Mateya nini nazwi nsima ya kokabwana?” na lokasa 224.

Ya solo, okanisaki te ete boyokani na bino ekokóma boye. Kasi, kobosana te: Ntango mbula makasi ezali kobɛta, ezali mpasi te kotalaka kaka likoló oyo eyindi. Kasi, nsukansuka mbula ekatanaka mpe molili esilaka na likoló. Bilenge oyo tolobelaki liboso na mokapo oyo bamonaki ete na nsima, bakokaki kokende liboso. Zalá na kondima ete yo mpe okoki kosala bongo!

NA MOKAPO OYO ELANDI

Makambo nini okoki kosala mpo omibatela na bato oyo balukaka kosangisa nzoto ná yo na makasi?

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 5 Atako tozali kolobela basi na mokapo oyo, batoli oyo elobelami awa etaleli mpe mibali.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“[Yehova] abikisaka baoyo bazoki na motema, mpe akangaka bampota na bango oyo ezali kosala mpasi.”​—Nzembo 147:3.

TOLI

Susan, oyo tolobelaki na ebandeli ya mokapo oyo, asalaki liste moko ya bavɛrsɛ mpe azalaki kotambola na yango bisika nyonso mpo atángaka yango ntango azali na mawa makasi. Ntango mosusu okoki mpe kosala bongo mpo na bavɛrsɛ mosusu oyo ezali na mokapo oyo.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Bilenge mingi oyo bazali bafianse babalanaka te, mpe baoyo babalanaka mbala mingi babomaka libala.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Mpo nakoba kokende liboso nsima ya kokabwana na fianse na ngai, nako ․․․․․

Likambo oyo nakoki kobongisa mpo nazala moto malamu soki nazwi fianse mosusu ezali ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Liteya nini ozwi mpo na yo moko ntango bokabwanaki na fianse na yo?

● Liteya nini ozwi na likambo etali basi ná mibali?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 227]

“Soki mikolo eleki, okokoka kotalela makambo na ndenge ebongi. Na nsima, okoyoka lisusu mawa makasi te, na ndenge yango okotalela likambo yango na ndenge ya malamu mpe okosilisa yango. Lisusu, okomiyeba malamu koleka mpe okoyeba nini ozali koluka epai ya molongani, mpe makambo oyo osengeli kokima mpo likambo ya ndenge wana ezonga lisusu te na nsima.”​—Corrina

[Etanda na lokasa 224]

Etanda ya mituna

Mateya nini nazwi nsima ya kokabwana?

Ayebisaki yo ntina oyo bosengeli kokabwana? Soki ɛɛ, komá awa na nse ntina yango, ata soki oz’omona ete ezali ntina ya malamu te. ․․․․․

Wapi bantina mosusu oyo okanisi ete esalaki ke bókabwana? ․․․․․

Soki ozongisi makanisi na likambo oyo esalemaki, ezali na likambo moko oyo okokaki kosala mpo bókabwana te? Soki ɛɛ, likambo nini? ․․․․․

Likambo oyo okutani na yango emonisi mwa makambo oyo okoki kosala mpo okóma mokóló ya malamu mpe mokristo ya malamu koleka? ․․․․․

Likambo nini okolinga kobongisa soki ozwi fianse mosusu? ․․․․․

[Elilingi na lokasa 223]

Kokabwana na fianse na yo ezali lokola mpota; sikoyo ez’osala mpasi, kasi na nsima ekosila