Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini nakoki koyeba soki ezali bolingo ya solo?

Ndenge nini nakoki koyeba soki ezali bolingo ya solo?

Mokapo 29

Ndenge nini nakoki koyeba soki ezali bolingo ya solo?

Yanolá na mituna oyo elandi:

1. Ndenge nini okoki kolimbola liloba “bolingo”? ․․․․․

2. Ndenge nini okoki kolimbola maloba “lolango makasi”? ․․․․․

3. Mpo na yo, bokeseni nini ezali kati na maloba wana mibale? ․․․․․

EKOKI kozala ete ozalaki na mokakatano mingi te to mpe ozalaki mpenza na yango te mpo na koyanola na mituna oyo euti kotunama. Na ntembe te, ezali mpasi te komona bokeseni oyo ezali kati na bolingo mpe lolango makasi soki tozwi yango kaka na maloba.

Kasi, nyonso wana ekoki kobongwana ntango okutani na mobali to mwasi oyo azalaki mpenza na makanisi na yo. Na mbala moko motema na yo epasuki, mpe eloko mosusu te eza na ntina mpo na yo. Olangwe mpenza na bolingo. Ya solo mpenza? Ezali bolingo​—to ezali lolango makasi? Ndenge nini okoki koyeba yango? Mpo na koyanola, tótalela naino soki ndenge oyo ozalaki kotalela moto oyo azali mwasi to mobali na yo te, ebongwani na bambula oyo euti koleka. Na ndakisa, talá mituna oyo elandi:

● Ozalaki kokanisa nini mpo na moto oyo azali mwasi to mobali na yo te ntango ozalaki na mbula mitano?

● Ozali kokanisa nini sikoyo mpo na moto oyo azali mwasi to mobali na yo te?

Biyano na yo ez’omonisa ete ntango okómi na eleko ya bolenge, okómi kotalela moto oyo azali mwasi to mobali na yo te ndenge mosusu. Brian, oyo azali na mbula 12, alobi boye: “Namoni ete bana basi bakómi mwa moke kitoko koleka ndenge bazalaki liboso.” Elaine, oyo azali na mbula 16, azali koyeba lisusu mbongwana moko oyo esalemaki eleki sikoyo mwa bambula. Alobi boye: “Baninga na ngai nyonso ya basi babandaki kobɛta masolo ya mibali, mpe mpo na ngai ezalaki mpasi te nakwea mayanga mpo na mwana mobali nyonso.”

Sikoyo lokola ozali kotya likebi na mwasi to mobali oyo azali molongani na yo te, okoki kosala nini soki okómi na mposa makasi ya kolinga ye? Na esika ya komonisa ete ozali na bamposa wana te​—mpo kosala bongo ekomatisa yango lisusu makasi—​okoki kosalela libaku wana malamu mpenza mpo na koyeba mwa makambo etali kosepela na moto, lolango makasi, mpe bolingo. Koyeba makambo wana misato oyo etali bolingo ekoki kosalisa yo ozwa te mpasi na motema kaka mpamba boye mpe na nsima omona bolingo ya solo.

KOSEPELA NA MOTO Oyo ozali komona

“Ngai ná baninga na ngai tolobelaka ntango nyonso bana basi. Tosalaka makasi tósolola makambo mosusu, kasi soki kaka mwana mwasi moko ya kitoko aleki, tobosani mbala moko likambo oyo tozalaki kosolola!”​Alex.

“Elenge mobali akobenda likebi na ngai soki az’otala ngai na miso, az’osɛka mwa moke mpe atambolaka bien.”​Laurie.

Ezali mabe te kosepela na mwasi to mobali oyo az’omonana kitoko. Mokakatano ezali nde ete, oyo ozali komona na miso ekeseni ntango mosusu na ndenge moto yango azali. Mpo na nini? Mpo miso ekoki kokosa yo. Biblia elobi boye: “Lokola lopɛtɛ ya wolo ya kotya na zolo, oyo batye na zolo ya ngulu, mwasi ya kitoko, oyo atiki nzela ya mayele azali ndenge wana.” (Masese 11:22) Ya solo, toli yango etaleli mpe mibali.

LOLANGO MAKASI Oyo ozali koyoka na motema

“Ntango nazalaki na mbula 12, motema na ngai ekómaki kolinga makasi mwana mobali moko, kasi na nsima, nayaki koyeba mpo na nini nalingaki ye. Ezalaki kaka mpo baninga na ngai nyonso bazalaki kosepela na bana mibali; mpe ye azalaki mwana mobali. Yango esalaki ke nalinga ye!”​Elaine.

“Nazalaki kolinga bana basi mingi, kasi mbala mingi, nazalaki kaka kotala kitoko ya nzoto. Kasi, ntango namonaki ndenge bizaleli ya moto yango ezali, nakómaki koyeba ete ngai ná ye ekosimba te ndenge nazalaki kokanisa.”​Mark.

Lolango makasi ezali lokola bolingo. Ya solo, moto oyo alingaka ayokaka mpe lolango. Kasi makambo oyo esimbi bolingo mpe lolango makasi ekeseni mpenza. Moto oyo azali na lolango makasi asalaka makambo kozanga kokanisa mpe atalelaka bizaleli kaka likolólikoló. Lisusu, amonaka te bolɛmbu ya moto oyo alingi mpe akumisaka koleka ndelo bizaleli na ye ya malamu. Na yango, lolango makasi ezali lokola ndako oyo esalemi na zɛlo. Elenge mwasi moko nkombo na ye Fiona alobi boye: “Eumelaka te. Okoki kosepela na moto lelo, kasi sanza moko na nsima, osepeli na moto mosusu!”

BOLINGO Oyo oyebi

“Nakanisi ke na bolingo, ezali na ntina moko oyo osepeli na moto yango, mpe ntina yango eza ya malamu; ezali te mpo na koluka matomba na yo moko.”​David.

“Mpo na ngai, bolingo ya solo esengeli kokoba kokola. Na ebandeli, boza baninga malamu. Na nsima, mokemoke, obandi kosepela na oyo okómi koyeba mpo na moto yango, mpe obandi kokolisa makanisi oyo ozalaki na yango te liboso mpo na ye.”​Judith.

Moto oyo alingaka ayebi mpenza bizaleli ya malamu ya moto oyo az’olinga mpe bolɛmbu na ye. Na yango, ezali kokamwisa te soki Biblia elobi ete bolingo ezali kaka lolango te. Elobi ete, bolingo ezali “na motema molai mpe na boboto. . . . Ekangaka motema na makambo nyonso, endimaka makambo nyonso, elikyaka makambo nyonso, mpe eyikaka mpiko na makambo nyonso. Bolingo esilaka soki moke te.” (1 Bakorinti 13:4, 7, 8) Bolingo etindaka moto asala makambo wana mpo azali na boyebi​—kasi te mpo aza bindimandima to ayebi eloko te.

Ndakisa ya bolingo ya solo

Lisolo ya Yakobo ná Rashele oyo ezali na Biblia, epesi mpenza ndakisa ya bolingo ya solo. Bakutanaki na libulu moko ya mai, epai Rashele akendaki komɛlisa bibwɛlɛ ya tata na ye mai. Na mbala moko, Yakobo asepelaki na Rashele. Mpo na nini? Mpo libosoliboso, azalaki “kitoko mingi na nzoto mpe na elongi.”​—Ebandeli 29:17.

Kasi, kobosana te ete bolingo ya solo esimbami kaka te na kitoko ya nzoto. Yakobo amonaki ete ezali na eloko mosusu epai ya Rashele oyo eleki kitoko ya nzoto. Kutu, Biblia elobi ete banda kala, Yakobo azalaki kaka te kosepela na Rashele. “Azalaki kolinga Rashele mingi.”​—Ebandeli 29:18.

Lisolo yango ya bolingo esukaki kaka wana? Te, mpo lisolo yango esilaki naino te. Tata ya Rashele ayebisaki Yakobo azela mbula nsambo liboso abala ye. Likambo yango ezala sembo to te, sikoyo bolingo ya Yakobo etyamaki na komekama. Soki Yakobo azalaki kaka na lolango makasi, alingaki te kozela tii abala Rashele. Kaka bolingo ya solo nde ekoki koyika mpiko ntango molai. Sikoyo likambo nini esalemaki? Biblia elobi boye: “Yakobo asalaki mosala mbula nsambo mpo na Rashele, kasi na miso na ye emonanaki nde lokola mwa mikolo moke mpo na bolingo oyo alingaki ye.”​—Ebandeli 29:20.

Liteya nini okoki kozwa na ndakisa ya Yakobo mpe Rashele? Bolingo ekoki koyika mpiko ntango molai. Lisusu, esimbami kaka te na kitoko ya nzoto. Ya solo, mbala mosusu moto oyo okobala azali kaka te moto oyo abɛtisaki yo motema mbala ya liboso oyo omonaki ye. Na ndakisa, Barbara akutanaki na elenge mobali moko oyo liboso azalaki kosepela na ye mpenza te. Alobi boye: “Kasi, ntango nakómaki koyeba Stephen malamu, makambo ebongwanaki. Namonaki ndenge azalaki komitya na esika ya basusu mpe ndenge azalaki koluka matomba ya basusu liboso ya oyo ya ye moko. Nayebaki ete bizaleli wana nde esalaka ete moto azala mobali malamu. Nakómaki kosepela na ye mpe kolinga ye.” Bango mibale bazali sikoyo na libala moko ya malamu.

Ntango okɔmɛli mpenza mpo na kozwa moto oyo okolinga kobala, ndenge nini okoyeba soki ozwi bolingo ya solo? Okoki kolanda oyo motema na yo elobi, kasi landá nde batoli ya Biblia. Kosuka kaka te na ndenge moto az’omonana na libándá. Bózwa ntango ya koyebana malamumalamu. Kobosana te ete lolango makasi esilaka na mwa ntango moke. Bolingo ya solo ekómaka makasi wana ntango ezali koleka, mpe ekómaka “ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.”​—Bakolose 3:14.

Zalá na kondima ete okoki kozwa bolingo ya ndenge wana​—soki ozali kosuka kaka te na oyo ozali komona na miso mpe lolango makasi (oyo ozali koyoka na motema). Nkasa misato oyo elandi ekosalisa yo osala bongo mpenza.

MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 1 MPE 3, NA VOLIMI 2

NA MOKAPO OYO ELANDI

Kanisá ete ozwi bolingo ya solosolo. Ndenge nini okoki koyeba soki okoki mpo na libala?

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Mai mingi ekoki kozimisa bolingo te, bibale mpe ekoki komema yango te.”​—Loyembo ya Salomo 8:7.

TOLI

Mpo na komona soki oyebi malamu moto oyo osepeli na ye, yanolá na mituna oyo ezali na Volimi 2, na lokasa 39 (mpo na basi) mpe na lokasa 40 (mpo na mibali).

OYEBAKI YANGO . . . ?

Bilenge oyo balinganaka kozanga koyebana malamu liboso, na nsima bakabwani mpo na makambo ezangá ntina, bazali nde “komibongisa” mpo na koboma libala.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Mpo nayeba soki ndenge naz’omiyoka mpo na moto moko ezali lolango makasi to bolingo, nako ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini Nzambe asalá basi ná mibali na mposa makasi ya kolingana?

● Mpo na nini bilenge oyo bakanisaka ete balingani bakendaka mosika te na bolingo na bango?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 207]

“Bolingo ekoki kolonga mikakatano, kasi lolango makasi esilaka kaka soki makambo ebongwani to mikakatano ekómi makasi. Esɛngaka ntango mingi mpo na kokolisa bolingo ya solo.”​—Daniella

[Etanda na lokasa 209]

Etanda ya mituna

Bongo yo, olingaki kosala nini?

Michel ná Julie bazali kokutana esali sikoyo sanza misato, mpe Julie alobi ete “alingaka ye makasi.” Michel atyelaka ye likebi ntango nyonso; ayebisaka ye kutu ndenge asengeli kolata mpe soki akoki kozala moninga ya moto boye to te. Azalaki kozwa ye lokola mwana ya mokonzi. Kasi, na pɔsɔ oyo euti koleka, Michel abɛtaki Julie mbata ntango amonaki ye az’osolola ná mwana mobali mosusu.

Michel alobi boye: “Julie asengeli koyeba ke naz’obanga nabungisa ye. Ntango nazo’kanisa ke mwana mobali mosusu az’oyiba ngai Julie, ez’opesa ngai nkanda mpenza! Nayoki mabe ndenge nabɛti Julie. Kasi nabɛtaki ye mpo nakokoka te komona ye az’otala mwana mobali mosusu. Lisusu, nasɛngaki ye bolimbisi!”

Julie alobi boye: “Baboti na ngai balobi ete Michel az’oluka kokonza ngai, kasi nayebi ke aza na bizaleli malamu. Naino atinda ngai na makasi te nasangisa na ye nzoto. Mpe ntango abɛtaki ngai​—nayebisaki yango baboti na ngai te—​ya solo, nazalaki kosolola na mwana mobali mosusu. Michel ayokaki zuwa, mpe namonaka na ntango mosusu ete esepelisaka ngai mwa moke. Bon, asɛngaki ngai bolimbisi, mpe ayebisaki ngai ke akozongela lisusu yango te.”

Mpo na yo: Ozali komona makama na bolingo na bango? Soki ezali, wapi yango? ․․․․․

Julie asengeli kosala nini? ․․․․․

Bongo yo, olingaki kosala nini? ․․․․․

[Etanda na lokasa 210]

Etanda ya mituna

Bongo yo, olingaki kosala nini?

Éric ná Sophie bazali bafianse esali sikoyo sanza mibale, mpe así amoná ete Sophie alingaka koswana, mingimingi na baboti na ye. Sophie aswanaka mingi na baboti na ye, mpe mbala mingi asukisaka bango. Akolisá ezaleli ya kotingama na makanisi na ye tii ntango baboti na ye bakolɛmba koswana. Sophie atutaki ntolo epai ya Éric ete baboti na ye “bazalaka ata na eloko ya koloba te liboso na ye.”

Éric alobi boye: “Sophie alobaka kaka oyo eza na makanisi na ye. Ayokelaka moto moko te, ezala ata baboti na ye. Papa na ye azalaka motungisi, yango wana ekamwisaka ngai te ndenge Sophie agangelaka ye. Kasi Sophie asukaka kaka na koganga te. Akoki kolela, kobimisa mbɛbu na ye mpo na komonisa bango ke asiliki, to kokóma mpenza mwana malamu; akosala nyonso oyo esɛngi mpo azwa eloko oyo aza na mposa na yango epai ya papa ná mama na ye.”

Sophie alobi boye: “Ezala oza nani to oza moto ya ndenge nini, ez’olobela ngai eloko moko te, mpo nakolobela yo polele, mpe nakobongola te lolenge na ngai ya koloba kaka mpo tóbendana te. Éric ayebi ke nazalaka bongo. Amoni ndenge nazalaka ná baboti na ngai.”

Mpo na yo: Ozali komona makama na bolingo na bango? Soki ezali, wapi yango? ․․․․․

Éric asengeli kosala nini? ․․․․․

Bongo yo, olingaki kosala nini? ․․․․․

[Etanda na lokasa 211]

Etanda ya mituna

Ezali bolingo to lolango makasi?

Luká liloba nini ezangi na milɔngɔ oyo ezali awa na nse. Komá liloba bolingo to lolango makasi na bisika oyo etikali mpamba.

1. “Moto oyo azali na ․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․ alukaka te koyeba ndenge moto oyo alingi azalaka mpenza, mpe alingaka kaka kotikala bongo. Alingaka te komona makambo ndenge yango ezali.”​—Calvin.

2. “Soki esengeli nabongola ndenge nazalaka ntango nazali ná mwana mwasi oyo nasepelaka na ye, wana ezali ․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․.”​—Thomas.

3. “Okoki komona likambo moko oyo ez’osepelisa yo mpenza te epai ya moto oyo olingi. Kasi, soki ezali ․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․, okokangama kaka na ye mpe okoluka kosalisa ye na likambo yango.”​—Tom.

4. “Soki ozali na ․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․, okobanda kotalela kaka makambo oyo bino mibale boyokanaka na yango.”​—Claudia.

5. “Soki ozali na ․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․, okoluka te kobomba ndenge ozalaka.”​—Eve.

6. “Moto oyo azali na ․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․ azali na ezaleli ya moimi mpo azwa kaka eloko oyo alingi​—mbala mosusu kaka mpo na kobɛta ntolo ke ye mpe aza na mwa moto na ye.”​—Carine.

7. “Moto oyo azali na ․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․ ayebi mabunga mpe bizaleli mosusu ya mabe ya moto oyo ye alingi, kasi andimaka kaka kofanda ná ye.”​—Bibiche.

8. “Soki ozali na ․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․, okoyeba te mpo na nini oz’osepela na moto yango​—oz’osepela na ye kaka.”​—David.

9. “Soki ezali ․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․, moto oyo oz’olinga akoki kosala ata libunga moko te.”​—Ruth.

10. “Soki ozali na ․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․, okobanda kotalatala basi mosusu to mibali mosusu te ndenge ozalaki kosala yango liboso, mpo oyebi ke osí ozwi moto na yo.”​—Daniel.

Biyano: Lolango makasi: 1, 2, 4, 6, 8, 9. Bolingo: 3, 5, 7, 10.

[Elilingi na lokasa 206, 207]

Lolango makasi ezali lokola ndako oyo esalemi na zɛlo; eumelaka te