Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nasengeli koyeba nini na likambo ya komɛla makaya?

Nasengeli koyeba nini na likambo ya komɛla makaya?

Mokapo 33

Nasengeli koyeba nini na likambo ya komɛla makaya?

Talá makanisi oyo elandi, mpe tyá elembo oyo ✔ na kare oyo ezali pene ya likambo nyonso oyo omoni ete etaleli yo.

□ Nalingaka kaka koyeba

□ Nazali kotungisama mingi

□ Nalingi basusu bándima ngai

□ Naza’ na mposa ya kobatela kilo na ngai

SOKI otye elembo ata na likambo moko oyo ezali na lokasa 237, yango emonisi ete okokani na baninga na yo oyo bamɛlaka makaya to bakanisaka komɛla yango. * Na ndakisa:

Mposa ya koluka koyeba. “Nazalaki komituna soki esalaka ndenge nini; yango wana nazwaki likaya oyo moninga moko ya mwasi apesaki ngai na eteyelo mpe namɛlaki yango na ndenge ya kobombana.”​—Tracy.

Mitungisi mpe kolinga ete basusu bándima ngai. “Na eteyelo, nazalaki koyoka bana-kelasi bazali koloba, ‘Naza’ na mposa ya likaya,’ mpe soki bamɛli, bazalaki koloba, ‘Weeehhhh, sikoyo nayoki bien!’ Ntango nazalaki na mitungisi, nazalaki na mposa na yango.”​—Nikki.

Nalingi kilo na ngai ekita. “Bana basi mosusu bamɛlaka makaya mpo bátikala nzoto mike; yango ezali malamu koleka koboya kolya biloko mosusu!”​—Samantha.

Kasi, liboso opelisa likaya mpo na mbala ya liboso to mbala ya nsima, fandá naino mpe kanisá. Kozala te lokola mbisi oyo elandi eloko batye na ndɔbɔ. Ya solo, mbisi wana ekosepela mwa moke ntango ekolya, kasi ekokufa! Na esika ya kosala bongo, landá toli ya Biblia, mpe salelá ‘makoki na yo ya kokanisa malamu.’ (2 Petro 3:1) Yanolá na mituna oyo elandi:

Makambo nini oyebi mpenza na oyo etali komɛla makaya?

Yanolá solo to lokuta na makanisi oyo elandi:

a. Komɛla makaya ekitisaka mitungisi.

□ Solo □ Lokuta

b. Nakoki kobimisa milinga nyonso oyo nabendi.

□ Solo □ Lokuta

c. Lokola nazali naino elenge, komɛla makaya ekosala ngai eloko te.

□ Solo □ Lokuta

d. Komɛla makaya ekosala ete basi to mibali básepela na ngai mingi.

□ Solo □ Lokuta

e. Ntango naz’omɛla makaya, ngai moko nde naz’omisala mabe, kasi bato mosusu te.

□ Solo □ Lokuta

f. Namɛla makaya to te, etali Nzambe te.

□ Solo □ Lokuta

Biyano

a. Lokuta. Atako komɛla makaya ekitisaka mpo na mwa ntango mitungisi oyo eutaka na komona lokola ozangi eloko moko, bato ya siansi bamoni ete pwazɔ oyo babengi nicotine, oyo ezalaka na makaya, ematisaka lisusu mitungisi.

b. Lokuta. Baankɛtɛ oyo basalaki emonisi ete milinga oyo obendaka, mingi na yango (80%) etikalaka na nzoto.

c. Lokuta. Lokola makama ebakisamaka ntango nyonso oyo omɛli likaya, makama mosusu eyaka mbala moko. Bato mosusu bakómaka baombo ya makaya nsima ya komɛla kaka mbala moko. Komɛla makaya epekisaka mopɛpɛ ekɔta na bapumɔ na yo ndenge esengeli mpe okoki kobanda kokosola ntango nyonso. Loposo na yo ekobanda konuna liboso ete okóma mobange. Komɛla makaya ekoki kosala ete binama na yo ya kosangisa nzoto esala malamu te, okóma kobangabanga, mpe kozanga esengo.

d. Lokuta. Lloyd Johnston, moto moko ya mayele, amonaki ete “basi to mibali mingi basepelaka mingi te” na bilenge oyo bamɛlaka makaya.

e. Lokuta. Milinga ya likaya ezali koboma bankóto ya bato mbula na mbula; ekoki kosala mabe na libota na yo, baninga na yo, ata mpe banyama oyo obɔkɔlaka na ndako.

f. Lokuta. Baoyo balingi kosepelisa Nzambe basengeli komipɛtola na “mbindo nyonso ya mosuni.” (2 Bakorinti 7:1) Ntembe ezali te ete komɛla makaya ekómisaka nzoto mbindo. Soki oponi kozala mbindo, komisala mabe, mpe kosala basusu mabe na komɛla makaya, okoki te kozala moninga ya Nzambe.​—Matai 22:39; Bagalatia 5:19-21.

Ndenge ya koboya

Kasi, okosala nini soki bapesi yo likaya? Eyano ya mokuse mpe ya polele oyo ekomonisa ete oboyi, ekoki kosalisa, na ndakisa, “Te, ngai namɛlaka makaya te.” Soki moto yango atingami kaka to akómi kotungisa yo, kobosana te ete yo nde osengeli kopona. Okoki koloba:

● “Nataleli makama ya makaya mpe namoni ete ebongi te namɛla yango.”

● “Naza’ na makambo mingi ya kosala na mikolo ekoya, yango wana nalingi te nakufa mobesu.”

● “Okanisi ke nakoki te kopona kolinga to koboya eloko moko?”

Kasi, na ndakisa ya bilenge oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo, okoki komona ete komekama makasi eutaka epai na yo moko. Soki ezali bongo, okoki kolonga ‘komekama’ yango soki okanisi na mozindo na mituna lokola oyo:

● ‘Komɛla makaya ekomemela ngai mpenza matomba? Na ndakisa, soki nandimi komɛla kaka mpo baninga básepela na ngai, bakondima ngai lisusu soki ezali na eloko mosusu te oyo ekoyokanisa ngai ná bango? Nakolinga nde kondimama na bato oyo bakosepela komona ngai naz’obebisa sante na ngai?’

● ‘Komɛla makaya ekosɛnga ngai mbongo boni, ekobimisela ngai mikakatano nini na sante na ngai? Bato mosusu bakopesa ngai limemya?’

● ‘Nakolinga kobebisa boninga na ngai ná Nzambe kaka mpo na likaya?’

Kasi, soki okómá moombo ya makaya, okoki kosala nini mpo olongwa na boombo yango?

Ndenge ya kotika

1. Omindimisa ete okotika. Komá bantina oyo omoni malamu otika, mpe zongelá kotánga makambo yango mbala na mbala. Mposa ya kozala pɛto na miso ya Nzambe ekoki kopesa yo makasi mpo otika.​—Baroma 12:1; Baefese 4:17-19.

2. Luká lisalisi. Soki ozalaki komɛla na kobombana, sikoyo nde ntango ya koyebisa yango bato mosusu mpo básalisa yo. Yebisá bato oyo ozalaki kobombela bango ete omɛlaka makaya ete olingi kotika, mpe sɛngá básalisa yo. Soki olingi kosalela Nzambe, bondelá ye asalisa yo.​—1 Yoane 5:14.

3. Poná dati oyo okotika. Mipesá nsuka pɔsɔ mibale, mpe komá na kalandriye na yo mokolo oyo oponi kotika. Yebisá libota mpe baninga na yo ete na dati wana okotika.

4. Luká mpe bwaká yango. Liboso dati oyo okotika ekoka, luká malamumalamu na shambrɛ, motuka, mpe na bilamba na yo soki ata mwa ndambo ya likaya ezali. Bwaká yango. Bwaká biloko nyonso oyo osalelaka ntango omɛlaka likaya; na ndakisa alimɛti, briquet mpe mwa eloko batyaka putulu ya makaya.

5. Ndenge ya kolonga mitungisi oyo euti na komona lokola ozangi eloko moko. Mɛláká mai mpe ba jus mingi, mpe laláká mingi. Kobosana te ete mposa ya komɛla makaya ekotungisa yo mpo na ntango mokuse, kasi matomba oyo okozwa ekozala ya ntango molai!

6. Boyá eloko nyonso oyo ekoki kotinda yo omɛla lisusu. Zalá mosika na bisika mpe makambo oyo ekoki komeka yo mpo omɛla likaya. Osengeli mpe koboya kozala esika moko na baninga oyo bamɛlaka makaya.​—Masese 13:20.

Kotika te bákosa yo

Mbula na mbula, bakompanyi ya makaya ebimisaka bamiliare ya badolare mpo na kosala piblisite. Balukaka kobenda mingimingi banani? Kompanyi moko ya makaya ezali na mokanda moko oyo elobi boye: “Bilenge ya lelo bakokóma bakiliya na biso na mikolo ezali koya.”

Kopesa nzela te na bato ya bakompanyi ya makaya bályela yo mbongo. Mpo na nini okangama na motambo na bango? Ezala bango to baninga oyo bamɛlaka makaya, bazali koluka bolamu na yo te. Na esika ya koyokela bango, yoká nde toli oyo ezali na Biblia mpe yekolá “mpo na litomba na yo moko.”​—Yisaya 48:17.

NA MOKAPO OYO ELANDI

Baninga na yo batyaka yo mbamba mpo omɛla masanga? Talá mpo na nini ezali na ntina oyeba esika oyo osengeli kolekisa ndelo te.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 8 Atako lisolo oyo ezali kolobela bamɛli ya makaya, makambo mpe makama oyo balobeli awa etaleli mpe baoyo batyaka yango na monɔkɔ to na zolo.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Tólongola makambo nyonso oyo ememaka mbindo na nzoto.”​—2 Bakorinti 7:1, Bible na lingala ya lelo oyo.

TOLI

Komikosa te na makanisi lokola: ‘Nameka ata mwa moko.’ Mbala mingi bato oyo basalaka bongo, bazongelaka lisusu komɛla makaya.​—Yirimia 17:9.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Makaya oyo ebimisaka milinga te (ya kotya na monɔkɔ to na zolo) ekoki kobimisa pwazɔ babengi nicotine mingi koleka makaya oyo bamɛlaka mpe ezali na bapwazɔ koleka 25 oyo ekoki kopesa kanser ya mongongo to ya monɔkɔ.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Soki moninga moko ya kelasi azali kotya ngai mbamba mpo namɛla makaya, nako ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Atako oyebi makama oyo eutaka na komɛla makaya, mpo na nini mposa yango ezalaka kaka?

● Nini endimisi yo mpenza ete komɛla makaya ezali mabe?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 240]

“Soki moto moko apesi ngai likaya, nasɛkaka mwa moke mpe nayebisaka ye: ‘Te, nalingi te nazwa kanser.’”​—Alana

[Etanda/​Elilingi na lokasa 241]

Bangi ezali mpenza mabe?

Ellen, oyo afandaka na Irlande, alobi boye: “Bato mosusu balobaka ete komɛla bangi esalisaka mpo na kobosana mitungisi mpe esalaka moto mabe te.” Osilá koyoka bato bazali koloba bongo mpo na bangi? Talá makanisi ya lokuta oyo bato mingi bazalaka na yango mpe makanisi ya solo.

Likanisi ya lokuta. Bangi esalaka moto mabe te.

Likanisi ya solo. Makambo mabe oyo bangi ebimisaka to ekoki kobimisa, yango oyo: moto akómaka kobosana mingi, mayele na ye ekitaka, akómaka kobɛla mpambampamba mpe binama na ye ya kosangisa nzoto esalaka lisusu malamu te, ezala mpo na mwasi to mobali. Moto akoki kokóma mawamawa makasi, lokola moto abɛli ligboma, mpe kobangabanga mpo az’okanisa ke bakosala ye mabe. Bana oyo babotamá na bamama oyo bazalaki komɛla bangi, mbala mingi bazalaka na bizaleli ya malamu te, bazalaka loyenge mpe bakokaka te kozwa bikateli.

Likanisi ya lokuta. Milinga ya bangi esalaka mabe mingi te lokola milinga ya likaya.

Likanisi ya solo. Soki tokokanisi yango na milinga ya likaya, milinga ya bangi ememaka gudrɔ mbala minei koleka na misisa oyo mpema elekelaka, mpe ememaka pwazɔ oyo babengi monoxyde de carbone mbala mitano koleka na makila. Moto oyo amɛli tije mitano ya bangi, azali kokɔtisa na nzoto na ye pwazɔ oyo epesaka kanser ndenge moko na moto oyo amɛli pakɛ mobimba ya makaya.

Likanisi ya lokuta. Bangi ekómisaka moto moombo te.

Likanisi ya solo. Bilenge oyo babɛlaka motó to oyo bazalaka susisusi baumelaka te kokóma baombo ya bangi. Bamosusu bakómaka baombo ya bangi mpo bamɛlaka yango banda kala. Lisusu, baankɛtɛ emonisi ete ezalaka mpasi te mpo bilenge oyo bamɛlaka bangi bákóma baombo ya badrɔgɛ mosusu, na ndakisa oyo babengi cocaïne.

[Etanda/​Bililingi na nkasa 244, 245]

Oyo makaya esalaka na nzoto na yo

Talá bafɔtɔ ya bato ya sante ya malamu oyo balakisaka na bapiblisite ya makaya; sikoyo yokanisá bafɔtɔ yango na makambo oyo makaya esalaka mpenza na nzoto na yo.

Monɔkɔ mpe mongongo Ekoki kobɛla kanser

[Elilingi]

Lolemo oyo ezwi kanser

Motema Ekómisaka misisa oyo ememaka makila na motema makasi mpe ekɔndisaka yango, esalaka ete motema ezwa lisusu oxygène mingi te, mpe ebakisaka mbala minei likama ya kozwa maladi ya motema

[Elilingi]

Mosisa ekangami

Bapumɔ Ebebisaka bisika oyo mopɛpɛ efandaka, evimbisaka misisa oyo mpema elekelaka, mpe ebakisaka mbala 23 likama ya kozwa kanser ya pumɔ

[Elilingi]

Pumɔ ya momɛli makaya

Bɔɔngɔ Ebakisaka mbala minei likama ya kozwa maladi ya bɔɔngɔ

Mposo Esalaka ete mposo enuna noki

Mino Ebebisaka langi ya mino

Estoma Epesaka kanser ya estoma

Pancréas Epesaka kanser ya pancréas

Libenga ya masuba Epesaka kanser ya libenga ya masuba

Ngei (reins) Epesaka kanser ya ngei

[Elilingi na lokasa 239]

Lokola mbisi oyo ekangami na ndɔbɔ, momɛli makaya ayokaka mwa esengo, kasi esukelaka ye mabe