Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini nakoki kolongwa na boombo ya badrɔgɛ?

Ndenge nini nakoki kolongwa na boombo ya badrɔgɛ?

Mokapo 35

Ndenge nini nakoki kolongwa na boombo ya badrɔgɛ?

OZALI moombo ya badrɔgɛ? Oyebi ete boombo yango ekoki kobebisa nzoto mpe makanisi na yo. Mbala mosusu ozalaki kosala makasi otika momeseno yango, kasi na nsima ozongelaki yango lisusu. Soki ezali bongo, kolɛmba te. Bato mosusu balongaki kolongwa na boombo ya badrɔgɛ; yo mpe okoki kolonga! Na ndakisa, talá makambo oyo bato misato oyo bakolá na bisika ekeseni, balobi mpo na ndenge oyo balongwaki na boombo yango.

NKOMBO Marta

NDENGE NAKOLAKI Mama abalaki te ntango abotaki ngai, yango wana ngai ná leki na ngai ya mwasi tozalaki na tata te ntango tozalaki kokola. Ntango nakómaki na mbula 12, nabandaki kokende na banganda ya butu elongo na mama-leki moko oyo azalaki kolinga kobina. Lokola nazalaki kosolola na moto nyonso, eumelaki te nakómaki kotambola na bato oyo bazalaki na bizaleli mabe. Nabandaki komɛla badrɔgɛ ntango nakómaki na mbula 13. Nabandaki mpe komɛla drɔgɛ oyo babengi cocaïne. Liboso, nazalaki kosepela komɛla drɔgɛ. Kasi, nsima ya mwa ntango, nakómaki komona bimonamona mpe nakómaki kobanga eloko nyonso. Mpe ntango drɔgɛ ezalaki kosila na nzoto na ngai, nakómaki na makanisi ya komiboma. Nazalaki na mposa ya kotika badrɔgɛ kasi nazalaki na makasi ya kosala yango te.

NDENGE OYO NALONGWAKI NA BOOMBO Nabandaki kokanisa Nzambe mpe na ntango mosusu nazalaki kutu kokende ndako-nzambe. Kasi yango ezalaki kolɛmbisa ngai lisusu mingi. Ntango nakómaki na mbula 18, nakendaki kofanda ná makango na ngai mpe nabotaki mwana mobali. Ntango nazwaki mwana yango, nakómaki na mposa makasi ya kobongola bomoi na ngai. Moninga moko ya kala ayaki kofanda na ndako oyo ezalaki na ngámbo mosusu ya oyo ya biso. Ayaki kotala ngai mpe atunaki ngai soki naza’ ndenge nini. Nayebisaki ye makambo nyonso oyo nazalaki na yango na motema. Ayebisaki ngai ete akómaki Motatoli ya Yehova [Témoin de Jéhovah] mpe asɛngaki ngai tóyekola Biblia. Nandimaki.

Nayaki koyeba ete bomoi oyo nazalaki na yango ezalaki kosepelisa Nzambe te mpe ete nasengelaki kotika komɛla badrɔgɛ mpe makaya. Kasi ezalaki mpasi mpenza mpo natika badrɔgɛ. Nazalaki kobondela Yehova mbala mingi na mokolo mpo asalisa ngai nalongwa na boombo ya bizaleli mabe. Nalingaki kosepelisa ye. (Masese 27:11) Nsima ya koyekola Biblia sanza 6 mpe koyangana na makita elongo na Batatoli ya Yehova [Témoins de Jéhovah], natikaki komɛla badrɔgɛ. Sikoyo bomoi na ngai ekómi mpenza na ntina. Nazali lisusu mawamawa te ntango nyonso. Nabalanaki na mobali moko kitoko mpenza oyo azali mokristo. Nazali kobɔkɔla mwana na ngai ya mobali na kolanda mitinda ya Biblia. Nazali na botɔndi mingi ndenge Yehova ayokaki mabondeli na ngai mpe asalisaki ngai!

NKOMBO Marcio

NDENGE NAKOLAKI Nakolaki na mwa kartye moko ya mosika na Santo André, engumba moko oyo ezali na bato ebele na etúká ya São Paulo, na Brésil. Balakisaki ngai komɛla makaya, badrɔgɛ, mpe koyiba ntango nazalaki naino elenge. Baninga na ngai mingi bazalaki koyiba mituka mpe kotɛka badrɔgɛ. Moko na bango azalaki kopesa badrɔgɛ ofele na bilenge na kartye na biso. Ntango bakómaki baombo ya drɔgɛ, basengelaki kosomba yango epai na ye.

Bapolisi bazalaki ntango nyonso kotambolatambola na kartye na biso, mpe bazalaki kokanga ngai mbala mingi mpo na mwa makambo ya mikemike, mpe mokolo moko bakangaki ngai mpo bakanisaki ke nazalaki kotɛka badrɔgɛ. Mbala mingi nazalaki kobomba na ndako na ngai biloko oyo baninga na ngai bazalaki koyiba mpe mindoki na bango.

Bato bazalaki kobanga ngai. Miso na ngai ezalaki motane. Nazalaki kosɛka ata moke te. Kutu, nazalaki ntango nyonso komonisa elongi ya moto mabe. Bapesaki ngai nkombo ya “Tufão” (Mopɛpɛ makasi) mpo esika nyonso nazalaki kokende, nazalaki kotya mobulu. Nazalaki mpe komɛla masanga mingi mpe nakómaki na bomoi ya mbindo. Baninga na ngai mingi bakufaki to bazalaki kosuka na bolɔkɔ. Nakómaki mawamawa makasi, yango wana mokolo moko nakangisaki nsinga na etape moko ya nzete mpo namiboma.

NDENGE OYO NALONGWAKI NA BOOMBO YA BADRƆGƐ Nasɛngaki Nzambe asalisa ngai. Nsukansuka nakutanaki na Batatoli ya Yehova [Témoins de Jéhovah] nabandaki koyekola Biblia. Nayaki koyeba ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova, mpe ete amibanzabanzaka mpe asalisaka baoyo basalaka makasi bátosa mibeko na ye na bomoi na bango. (Nzembo 83:18; 1 Petro 5:6, 7) Esengelaki nabongola makambo mingi na bomoi na ngai. Eloko oyo ezalaki mpasi mingi mpo na ngai ezalaki koyekola kosɛka.

Nazalaki ntango nyonso kosɛnga Yehova lisalisi, mpe nazalaki kosalela toli ya Biblia. Na ndakisa, natikaki kosangana na baninga na ngai ya kala mpe natikaki kokende na banganda. Nakómaki nde kosangana na bato oyo batosaka makambo oyo Biblia elobaka na bomoi na bango. Atako ezalaki mpasi mingi, kasi sikoyo nayibaka lisusu te mpe natyaka lisusu mobulu te. Mpe esali sikoyo mbula koleka 10, nazali lisusu moombo ya badrɔgɛ te.

NKOMBO Craig

NDENGE NAKOLAKI Nakolaki na ferme moko na sudi ya Australie. Tata na ngai azalaki komɛla masanga mingi, mpe ye ná mama bakabwanaki ntango nazalaki na mbula 8. Mama abalaki lisusu, mpe nafandaki na ye tii ntango nakómaki na mbula 17. Na mbula wana nayekolaki kokata nsuki ya bampate mpe nakómaki kofanda elongo na bato oyo basalaka mosala yango mpe bazalaki kosala mobembo bipai nyonso mpo na kosala mosala yango. Nakómaki komɛla badrɔgɛ ya ndenge na ndenge mpe komɛla masanga mingi. Natikaki nsuki na ngai ekóma milai. Na nsima nazalaki kotya yango mafuta mpo engɛnga, kokanga yango, mpe kotya yango mayaka. Nakómaki na zuwa, nazalaki na bonkonde te, mpe nakómaki nkandankanda. Mbala mingi, nazalaki kokɔta bolɔkɔ.

Nakendaki kofanda na mwa engumba moko na wɛsti ya Australie ná makango na ngai, oyo azalaki kosala mosala ya kopesa bato masanga na otɛlɛ moko. Biso mibale tozalaki komɛla makaya mpe masanga, mpe tozalaki kokolisa mwa elanga na biso ya bangi.

NDENGE OYO NALONGWAKI NA BOOMBO YA BADRƆGƐ Toutaki kobuka bangi na biso ntango Batatoli ya Yehova [Témoins de Jéhovah] babɛtaki na porte ya ndako na biso ya mabemabe mpe ya kala. Naboyaki kondima makambo oyo bazalaki koloba. Kasi, mokemoke, nakómaki komindimisa ete makambo oyo Biblia elobi ezali solo. Na nsima, nabandaki kobundisa mokomoko ya mikakatano oyo nazalaki na yango.

Nokinoki nayaki koyeba ete esengelaki natika momeseno ya komɛla bangi. Yango esɛngaki nasala nini? Nasalaki milende mingi mpo nakolisa mwa elanga na ngai ya bangi, yango wana liboso nakanisaki kokabela yango moto mosusu. Kasi namonaki ete wana ezali likambo ya malamu te mpe nabomaki elanga yango. Libondeli esalisaki ngai mingi natika momeseno ya komɛla badrɔgɛ mpe masanga mingi. Nasɛngaki Nzambe elimo na ye mpo esalisa ngai nabundisa mpe nalonga mikakatano oyo nazalaki na yango. Natikaki mpe kosangana na bato oyo bazalaki kotinda ngai nazala na bizaleli mabe. Lokola nazalaki koyekola mpe kosalela mateya ya Biblia, nazwaki makasi oyo nasengelaki na yango mpo natika bizaleli mosusu ya mabe oyo nazalaki na yango. Makango na ngai ayekolaki mpe Biblia mpe abongolaki bizaleli na ye mpe bomoi oyo azalaki na yango. Tobalanaki. Esali sikoyo mbula 21, tozali na sante ya malamu, mpe sikoyo tozali na esengo ya kobɔkɔla bana mibale ya mibali. Nabangaka ntango nazali kokanisa ndenge oyo bomoi na ngai elingaki kozala soki Yehova asalisaki ngai te nabongola bomoi na ngai.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Yehova azali makasi na ngai mpe nguya na ngai.”​—Yisaya 12:2.

TOLI

Soki likoki ezali, kozalaka lisusu te na bato oyo bozalaki komɛla na bango badrɔgɛ, kokendaka lisusu te na bisika wana, mpe kosalelaka lisusu te biloko oyo ozalaki kosalela mpo na komɛla badrɔgɛ. Bato ya mayele bamonisi ete soki ozali komona bato, bisika to biloko wana, okokóma lisusu na mposa ya komɛla drɔgɛ.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Soki ozali komɛla badrɔgɛ, bɔɔngɔ na yo ekobanda kosala lisusu malamu te.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Soki nakwei lisusu na momeseno yango, nako ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini moto asengeli kosala bambongwana minene na bomoi na ye soki alingi kolongwa na boombo ya komɛla badrɔgɛ?

● Ndenge nini koyekola solo oyo etali Nzambe ekoki kosalisa?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 253]

“Lokola nazali kotosa mitinda ya Biblia na bomoi na ngai, nazwi sikoyo esengo mpe bomoi na ngai ekómi na ntina mpenza.”​—Marta

[Elilingi na lokasa 256]

Kotika kozala moombo ya eloko moko ezali lokola kokima ndako oyo ezali kozika; okobungisa biloko na yo mosusu, kasi okobikisa bomoi na yo