Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nakómi moombo ya baaparɛyi oyo ebimi sika?

Nakómi moombo ya baaparɛyi oyo ebimi sika?

Mokapo 36

Nakómi moombo ya baaparɛyi oyo ebimi sika?

“Nalelá kotinda bamesaje! Naino namoná eloko ya kitoko boye te. Nayebi ke bokoloba ke ekómi kotambwisa bomoi na ngai mobimba.”​—Alan.

NTANGO baboti na yo bazalaki bilenge, baaparɛyi oyo ezalaki komonana mingi ezalaki kaka televizyo ná radio. Na ntango wana, ntina ya telefone ezalaki kaka mpo na kosolola na bato mpe ezalaki kosala kaka na kura. Okanisi ke wana eza’ makambo ya kala? Elenge mwasi moko na nkombo Anna akanisaka mpe bongo. Alobi boye: “Baboti na ngai bakolaki na ntango oyo baaparɛyi ya mikolo oyo lokola telefone ezalaki naino te. Kaka sikoyo nde babandi koyeba mwa moke ndenge ya kosalela makambo mosusu oyo ezali na kati ya batelefone na bango!”

Lelo oyo, kaka na mwa aparɛyi moko oyo okoki kotya na poshɛ na yo, okoki kosolola na moto, koyoka miziki, kotala emisyo moko ya televizyo, kobɛta lisano, kotindela baninga na yo bamesaje, kokanga bafɔtɔ mpe kokɔta na Internet. Lokola ozali kokola na eleko oyo bato bazali kosalela mingi ordinatɛrɛ, telefone, televizyo, mpe internet, okoki komona mabe te kosalelaka yango ntango nyonso. Kasi, baboti na yo bakoki komona ke okómi moombo ya biloko wana. Soki balobi na yo ete likambo yango ezali kotungisa bango, koboya toli na bango te, lokola nde bayebi makambo te. Mokonzi Salomo akomaki boye: “Ntango moto azali koyanola na likambo liboso ya koyoka yango, wana ezali bozoba mpo na ye.”​—Masese 18:13.

Ozali komituna mpo na nini baboti na yo bazali komitungisa na likambo yango? Talelá makanisi oyo ezali awa na nse mpo omona soki obandi te kokóma moombo ya aparɛyi moko boye oyo ebimi sika.

Omituna: ‘Nakómi moombo?’

Buku moko elobi ete kozala moombo ya likambo moko ezali “ezaleli ya kolekisa ndelo oyo moto azongelaka mbala na mbala, mpe azali na makasi te mpe na mposa te ya kotika yango, atako ekoki kobimisela ye makama.” Talá sikoyo awa na nse eteni mokomoko ya maloba yango. Tángá makambo oyo bilenge mosusu balobi, mpe talá soki osí olobá to osalá likambo ya ndenge wana. Na nsima, kómá biyano na yo na bisika oyo etikali mpamba.

Ezaleli ya kolekisa ndelo. “Nazalaki kolekisa ntango mingi na kobɛta masano ya video. Nazalaki kolala mingi te mpe nazalaki kobɛta kaka masolo ya masano yango. Nazalaki lisusu kolekisa ntango te na bato ya libota na ngai mpe na makanisi na ngai, nazalaki komikɔtisa mobimba na masano ya video.”​André.

Mpo na yo, moto asengeli kosalela baaparɛyi oyo ebimi sika ntango boni na mokolo? ․․․․․

Baboti na yo bakanisi ete osengeli kolekisa ntango boni? ․․․․․

Ntango boni olekisaka na mokolo mpo na kotinda bamesaje, kotala televizyo, kotya bafoto mpe kokoma makambo na internet, kobɛta masano ya video mpe bongo na bongo? ․․․․․

Nsima ya kotalela biyano oyo otye awa likoló, okoki koloba ete osalelaka baaparɛyi oyo ebimi sika koleka ndelo?

□ Ɛɛ □ Te

Ozali na makasi te mpe na mposa te ya kotika yango. “Baboti na ngai bamonaka ndenge natindaka bamesaje ntango nyonso mpe bayebisaka ngai ete nalekisaka ndelo. Kasi, bilenge mosusu kutu ya mbula na ngai, basalaka yango koleka ngai. Ya solo, ngai natindaka bamesaje mingi koleka baboti na ngai. Kasi, ngai ná bango toza’ ndenge moko te; bango bazali na mbula 40, ngai nazali na mbula 15.”​Alan.

Baboti na yo to baninga na yo basí bayebisá yo ete olekisaka ntango mingi na aparɛyi moko oyo ebimi sika?

□ Ɛɛ □ Te

Ozalaka na makasi te mpe na mposa te ya kotika kosalela aparɛyi yango ntango molai?

□ Ɛɛ □ Te

Makama. “Baninga na ngai batindaka bamesaje ntango nyonso, ata ntango bazali kotambwisa motuka. Wana mpenza ezali kotya bomoi na likama!”​Julie.

“Ntango nazwaki telefone na ngai liboso, nazalaki kobenga bato to kotindela bango bamesaje ntango nyonso. Nazalaki kosala likambo mosusu te, kaka yango. Yango ebebisaki boyokani na ngai ná bato ya libota na ngai ata mpe ná baninga na ngai mosusu. Sikoyo, soki nabimi ná baninga na ngai mpe tozali kosolola, ntango nyonso bakataka lisolo mpe balobaka: ‘Zelá naino. Esengeli nayanola na mesaje oyo.’ Yango nde esalaka ete nakangama mpenza makasi te ná baninga yango.”​Sophie.

Osilá kotánga to kotinda bamesaje ntango ozali kotambwisa motuka, ntango ozali na kelasi to na makita?

□ Ɛɛ □ Te

Ntango osololaka na bato ya libota na yo to na baninga na yo, okataka lisolo mbala na mbala mpo oyanola na bamesaje to osolola na telefone?

□ Ɛɛ □ Te

Ndenge osalelaka baaparɛyi oyo ebimi sika ezangisaka yo ntango ya kolala to elongolaka likebi na yo na ntango ya koyekola?

□ Ɛɛ □ Te

Omoni ete esengeli obongisa makambo mosusu? Soki ezali bongo, talelá makanisi oyo elandi.

Ndenge ya kozala na bokatikati

Soki osalelaka aparɛyi moko oyo ebimi sika, ezala ordinatɛrɛ, telefone to aparɛyi mosusu, mituná mituna minei oyo ezali awa na nse. Soki osaleli batoli ya Biblia mpe olandi makanisi oyo ya pɛtɛɛ, yango ekosalisa yo okima makama mpe okóma te moombo ya baaparɛyi yango.

Makambo nini ezali na kati? “Bókanisaka bobele makambo ya solo, ya kitoko, ya bosembo, ya malamu pe ya malonga. Bólukaka makambo ya kokoka, oyo Nzambe andimaka, oyo epesaka moto lokumu.”​—Ba-Filipien (Bafilipi) 4:8, Bible na lingala ya lelo oyo.

✔ Osengeli kokoba kosolola ná baninga mpe bato ya libota na yo mpe koyebisa bango bansango mpe makanisi ya kolendisa.​—Masese 25:25; Baefese 4:29.

X Osengeli te kotɔngaka bato, kotindelaka bato bamesaje to bafɔtɔ ya makambo ya mbindo, to kotalaka bavideo mpe baemisyo oyo elakisaka makambo ya mbindo.​—Bakolose 3:5; 1 Petro 4:15.

Ntango nini nazali kosalela yango? “Eloko nyonso ezali na ntango na yango.”​—Mosakoli 3:1.

✔ Osengeli koyeba ngonga boni okolekisa mpo na kosolola na telefone, kotinda bamesaje, kotala televizyo to kobɛta masano.

X Osengeli te kotika nzela ete aparɛyi moko oyo ebimi sika ezwa ntango oyo omityelaki mpo na kosolola na baninga mpe bato ya libota na yo, mpo na koyekola to kosala makambo mosusu ya losambo.​—Baefese 5:15-17; Bafilipi 2:4.

Nazali ná banani? “Bómikosa te. Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.”​—1 Bakorinti 15:33.

✔ Osengeli kosalela aparɛyi oyo ebimi sika mpo esalisa yo okolisa boninga na bato oyo bakosalisa yo okolisa bizaleli ya malamu.​—Masese 22:17.

X Osengeli te komikosa​—okokóma na bizaleli, na elobeli mpe okobanda kokanisa lokola bato oyo ozali kosolola na bango na nzela ya ba e-mail, ya bamesaje, to mpe bato oyo otalaka na televizyo, na bafilme to na internet.​—Masese 13:20.

Nakolekisa ntango boni? “Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.”​—Bafilipi 1:10.

✔ Osengeli koluka koyeba ntango boni olekisaka na kosalela baaparɛyi oyo ebimi sika.

X Osengeli te koboya koyoka makanisi ya baninga na yo to batoli ya baboti na yo soki bamonisi yo ete ozali kolekisa ntango mingi na aparɛyi moko boye.​—Masese 26:12.

André, oyo tolobelaki na ebandeli, amonisi na mokuse soki kozala na bokatikati na makambo etali baaparɛyi oyo ebimi sika elakisi nini. Alobi boye: “Baaparɛyi ya mikolo oyo ezali malamu, kasi soki kaka tozali kosalela yango na ntango moke. Nayekolaki ete nasengeli te kotika baaparɛyi yango ekabola ngai na bato ya libota na ngai mpe baninga na ngai.”

MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 30, NA VOLIMI 2

NA MOKAPO OYO ELANDI

Ndenge nini okoki kosala ete baboti na yo bátikaka yo omisepelisa moke?

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Komimona moto ya bwanya te na miso na yo moko. Bangá Yehova mpe kimá mabe.”​—Masese 3:7.

TOLI

Mpo ozala moombo ya telefone na yo te, yebisá baninga na yo ete ekozala na bantango oyo okobanda koyanola mbala moko te na bamesaje, to soki babengi yo.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Bafɔtɔ nyonso oyo ozali kotya na internet lelo mpe makambo nyonso oyo ozali kokoma kuna, ekoki komonana ata nsima ya bambula mingi epai ya bapatrɔ oyo bakoki kozwa yo na mosala mpe bato mosusu.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Soki nabandi kokóma moombo ya ․․․․․, nazwi ekateli ya kosalela aparɛyi yango kaka mbala ․․․․․ na pɔsɔ.

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini ekoki kozala mpasi mpo oyeba ke ozali moombo ya aparɛyi moko oyo ebimi sika?

● Nini ekoki kosalema soki ozali kolekisa ndelo na ndenge ozali kosalela aparɛyi moko oyo ebimi sika?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 262]

“Makambo mingi esalisaki ngai natika kozala moombo ya televizyo. Nasalaki makasi namityela ngonga oyo nasengelaki kotalaka yango. Nazalaki ntango nyonso kosolola na mama mpo na likambo yango. Nazalaki mpe kobondela mingi.”​—Kathy

[Elilingi na lokasa 263]

Baaparɛyi oyo ebimi sika ezali kotambwisa yo to yo nde ozali kotambwisa yango?