Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini nakoki kozwa esengo ya kosambela Nzambe?

Ndenge nini nakoki kozwa esengo ya kosambela Nzambe?

Mokapo 38

Ndenge nini nakoki kozwa esengo ya kosambela Nzambe?

Josué, oyo azali na mbula 16 alali na mbeto. Mama na ye atɛlɛmi na porte ya shambrɛ. Alobi na mpiko nyonso: “Josué, lamuká! Oyebi ke toza’ na makita na mpokwa ya lelo!” Josué azali mwana ya Batatoli ya Yehova [Témoin de Jéhovah] mpe kokende makita ezali momeseno ya libota na bango. Kasi, mikolo oyo Josué azali lisusu na mposa te ya kokende na makita.

Azali koimaima: “Ah, mama, esengeli kaka ngai nakende?”

Mama na ye azongisi: “Tiká makelele mpe latá bilamba. Nalingi te nakóma lisusu na retare!” Abaluki, mpe abandi kokende.

Wana mama na ye akómi naino mosika te, Josué abimisi mbala moko oyo azali na yango na motema: “Mama, yoká. Ntango mosusu, wana eza’ lingomba na yo, kasi elakisi te ke eza’ mpe lingomba na ngai.” Ayebi ete mama na ye ayoki makambo oyo alobi mpo ayoki sapato ya mama na ye etiki kosala makelele. Na nsima, alobi eloko te, mpe akei.

Josué ayoki mwa mawa. Alingi mpenza te koyokisa mama na ye motema mpasi. Kasi, alingi mpe te kosɛnga bolimbisi. Ayebi eloko atikali na yango ya kosala.

Na koimaima, Josué abandi kolata bilamba. Na nsima, azali komilobela: “Ata ndele, nakozwa ekateli na ngai moko. Nazali te lokola bato mosusu na Ndako ya Bokonzi. Naza’ na mposa te ya kozala Mokristo!”

YO MPE, osilá koyoka lokola Josué oyo touti kolobela? Na ntango mosusu, wana bato mosusu bazali kosepela na makambo ya losambo, yo oyokaka lokola ete ozali kosala yango tiká kaka osala? Tózwa ndakisa:

● Omonaka boyekoli ya Biblia lokola kaka devuare mosusu oyo bapesi yo?

● Olingaka te kosakola ndako na ndako?

● Olɛmbaka mbala mingi soki ozali na makita?

Soki oyanoli ɛɛ, kolɛmba te. Okoki koyekola kozala na esengo na kosalela Nzambe. Tótala ndenge ekoki kosalema.

MOKAKATANO 1 Koyekola Biblia

Mpo na nini ezalaka pɛtɛɛ te. Mbala mosusu, olingaka mpenza te koyekola. Okokaka te kotya makanisi na yo esika moko na boumeli ya ntango molai. Lisusu, mbala mosusu okanisi ke ozali koyekola makambo mingi na kelasi.

Mpo na nini osengeli kosala yango. Biblia ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe, mpe “ebongi po na koteya bato pe kosukisa ndenge nyonso ya lokuta, po na kobongisa bato pe kolakisa bango nzela ya bosembo.” (2 Timoté 3:16, Bible na lingala ya lelo oyo) Koyekola Biblia mpe kokanisa na mozindo na makambo oyo oyekoli ekoki kofungola mayele na yo na makambo oyo oyebaki malamu te liboso. Mpo na koloba solo, eloko nyonso ya motuya ezwamaka na mpasi. Soki olingi oyeba kobɛta lisano moko boye, osengeli koyekola mibeko na yango mpe kosalaka lisano yango mbala mingi. Soki olingi ozala na sante ya malamu, osengeli kosalaka ngalasisi ya nzoto. Ndenge moko mpe, soki olingi koyeba makambo etali Mozalisi na yo, osengeli koyekola Liloba ya Nzambe.

Oyo bilenge mosusu balobi. “Ntango nakómaki na école secondaire, esengelaki napona likambo moko. Bilenge mosusu bazalaki kosala makambo mingi ya mabe, mpe nasengelaki kozwa mwa bikateli: ‘Nalingi mpenza kosala bongo? Baboti na ngai bazali koteya ngai mpenza solo?’ Esengelaki nayeba yango ngai moko.”​Tania.

“Nayebaki ete makambo oyo nayekolaki ezalaki solo, kasi esengelaki nandima ete likambo yango ezali mpenza solo. Nalingaki nasambela Nzambe mpo ngai moko nde nalingi kosala yango, kasi te mpo libota na ngai ezali kotindika ngai.”​Nelisa.

Oyo okoki kosala. Salá yo moko programɛ ya koyekola na kotalela bamposa na yo. Poná yo moko masolo oyo olingi koyekola. Okobanda na lisolo nini? Mpo na nini te kokɔta na mozindo na Biblia mpe kotalela malamumalamu mateya ya lingomba na bino, mbala mosusu okoki mpe kosalela buku lokola Biblia eteyaka mpenza nini? *

Bandá sikoyo! Tyá elembo ✔ na masolo mibale to misato oyo ezali awa na nse, oyo okolinga koyeba malamu, to komá mosusu oyo yo moko okolinga kotalela.

□ Nzambe azalaka?

□ Ndenge nini nakoki kondimisama ete bakomi ya Biblia batambwisamaki na elimo ya Nzambe?

□ Mpo na nini nasengeli kondimela bozalisi kasi evolisyo te?

□ Bokonzi ya Nzambe ezali nini, mpe ndenge nini nakoki komonisa ete ezali solo?

□ Ndenge nini nakoki kolimbola oyo ekómelaka moto soki akufi?

□ Mpo na nini nasengeli kondima mpenza ete lisekwa ekosalema?

□ Ndenge nini nakoki koyeba lingomba ya solo?

․․․․․

MOKAKATANO 2 Kobima na mosala ya kosakola

Mpo na nini ezalaka pɛtɛɛ te. Koyebisa basusu mateya ya Biblia, to kokutana na moninga moko ya kelasi ntango ozali kosala yango ekoki kobangisa yo.

Mpo na nini osengeli kosala yango. Yesu apesaki bayekoli na ye etinda oyo: “Bókómisa bato bayekoli . . . , bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.” (Matai 28:19, 20) Kasi, ezali na bantina mosusu oyo tosengeli kosala yango. Bato ya mayele bamonisi ete na bisika mosusu bilenge mingi bandimelaka Nzambe mpe Biblia. Kasi, bilenge yango bazali na elikya ya malonga te mpo na mikolo ezali koya. Na boyekoli na yo ya Biblia, ozali koyeba mpenza makambo oyo bilenge mingi bazali koluka mpe bazali na mposa na yango! Soki ozali koyebisa bato mosusu bindimeli na yo, okomiyoka malamu, mpe likambo eleki ntina, okosepelisa motema ya Yehova.​—Masese 27:11.

Oyo bilenge mosusu balobi. “Ngai ná moninga na ngai tozalaki kobongisa malamu ndenge oyo tokoki kobanda lisolo ná bato mpe toyekolaki ndenge ya kolonga bantembe mpe kozongela bato oyo basepelaki. Ntango nabakisaki milende na ngai na mosala ya kosakola, nakómaki kosepela na yango mingi.”​Nelisa.

“Ndeko moko ya mwasi asalisaki ngai mingi mpenza! Azalaki mokóló na ngai ya mbula 6 mpe azalaki komema ngai na mosala ya kosakola mpe mikolo mosusu mpo tókende kolya mwa eloko. Azalaki kolakisa ngai bavɛrsɛ ya kolendisa oyo esalisaki ngai nabongisa makanisi na ngai. Namoni ete soki nakómá kosalisa bato mingi, ezali mpo na ndakisa na ye ya malamu. Nazali mpenza na botɔndi mpo na ndenge asalisaki ngai!”​Chantal.

Oyo okoki kosala. Soki baboti na yo bapesi yo nzela, luká ndeko moko na lisangá oyo azali mokóló na yo mpe oyo okoki kokendaka na ye na mosala ya kosakola. (Misala 16:1-3) Biblia elobi boye: “Ebende epelisaka ebende. Ndenge moko mpe moto angɛngisaka elongi ya moto mosusu.” (Masese 27:17) Okozwa matomba mingi soki ozali kosangana ná mikóló oyo baumeli mingi na lisangá. Alexis, oyo azali na mbula 19, alobi boye: “Esalaka bien kozala na kati ya mikóló.”

Bandá sikoyo! Longola baboti na yo, komá awa na nse nkombo ya ndeko moko ya lisangá na bino oyo akoki kosalisa yo na mosala ya kosakola.

․․․․․

MOKAKATANO 3 Koyangana na makita

Mpo na nini ezalaka pɛtɛɛ te. Nsima ya kolekisa mokolo mobimba na kelasi, ekoki kozala mpasi kofanda ngonga moko to mingi mpo na koyoka mateya ya Biblia.

Mpo na nini osengeli kosala yango. Biblia elendisi bakristo ete: “Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu, tótika koyanganaka na makita na biso te, ndenge bamosusu bamesaná kosala, kasi tólendisanaka, mpe tósalaka bongo mingi koleka awa tozali komona mokolo yango ezali kobɛlɛma.”​—Baebre 10:24, 25.

Oyo bilenge mosusu balobi. “Kobongisa makita liboso ezali na ntina mpo oyoka esengo na yango. Na bantango mosusu, esɛngaka kaka omindimisa ete okosala yango. Soki obongisi liboso, okosepela na makita mpo oyebi makambo oyo ekolobama mpe okoki kopesa biyano.”​Elda.

“Na ntango mosusu, namonaka ete soki napesi biyano na makita, nakómaka kosepela na makita yango mingi.”​Jessica.

Oyo okoki kosala. Zwá ntango mpo na kobongisa makita liboso mpe soki likoki ezali, pesá ata eyano moko. Yango ekosalisa yo omikɔtisa mpenza na makita yango.

Tózwa ndakisa: Okosepela kotala lisano moko na televizyo to kobɛta lisano yango yo moko? Kozanga ntembe, ezalaka malamu kosala likambo moko boye yo moko na esika ya kotala yango kaka. Mpo na nini te kosala bongo mpe mpo na makita ya lisangá?

Bandá sikoyo! Na esika oyo etikali mpamba awa na nse, komá mokolo oyo okoki kolekisa ata miniti 30 mpamba na pɔsɔ mpo na kobongisa likita moko ya lisangá.

․․․․․

Bilenge mingi bamoni ete maloba ya Nzembo 34:8 ezali solo. Elobi boye: “Bómeka mpe bómona ete Yehova azali malamu.” Okosepela te soki oyoki kaka ndenge bazali kokumisa biloko oyo elambami malamu. Eleki malamu omeka yango yo moko. Ezali mpe ndenge moko mpo na losambo epai ya Nzambe. Yo moko meká mpe moná ete kosangana na makambo ya losambo epesaka mapamboli. Biblia elobi ete moto oyo azali kaka moyoki te kasi azali mpe kosala mosala “akozala na esengo ndenge azali kosalela yango.”​—Yakobo 1:25.

NA MOKAPO OYO ELANDI

Talá ndenge okoki komityela mikano, mpe kokokisa yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 19 Ebimisami na Batatoli ya Yehova [Témoins de Jéhovah].

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Bóbongwana, bókómisa makanisi na bino makanisi ya sika, mpo bómindimisa bino moko mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.”​—Baroma 12:2.

TOLI

Zalá na mwa karnɛ moko mpe komáká makanisi ya ntina oyo oyoki na makita. Ntango ekobanda koleka noki mpe okoyekola kozanga mikakatano!

OYEBAKI YANGO . . . ?

Ezali mabe te komituna ntina oyo ondimaka liteya boye to boye. Kutu, kotuna mituna mpe kolukaluka biyano ezali lolenge malamu ya koyeba soki makambo oyo ondimaka mpo na Nzambe ezali mpenza solo.​—Misala 17:11.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Nakozwa miniti ․․․․․ mokolo na mokolo mpo na kotánga Biblia mpe nakolekisa ․․․․․ pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kobongisa makita ya lisangá.

Mpo makanisi na ngai eyengayenga mingi te na makita, nako ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini mbala mosusu bilenge bamonaka ete makambo ya losambo ezali motungisi?

● Na makambo misato ya losambo oyo tolobeli na mokapo oyo, wapi oyo okolinga kosala makasi obongisa?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 278]

“Lingomba oyo nazali ezali lisusu te lingomba ya baboti na ngai, kasi ekómá nde lingomba na ngai. Yehova azali Nzambe na ngai, mpe nalingi te nasala likambo moko oyo ekobebisa boyokani na ngai ná ye.”​—Samantha

[Etanda/​Bililingi na nkasa 280, 281]

Bamityelaki mikano

Biblia elobi ete: “Boyebi te ndenge bomoi na bino ekozala lobi.” (Yakobo 4:14) Na bantango mosusu, liwa ekoki koya mbalakaka mpe ntango ozali naino elenge. Wana ozali kotánga lisolo ya Catrina mpe ya Kyle, talá ndenge bamisalelaki nkombo malamu epai ya Yehova Nzambe na ndenge bamityelaki mikano ya elimo mpe bakokisaki yango atako bomoi na bango eumelaki te.​—Mosakoli 7:1.

Catrina akufaki ntango azalaki na mbula 18, kasi ntango azalaki naino na mbula 13, asalaki liste ya mikano oyo alingaki kokokisa na bomoi na ye. Akanaki kokɔta na mosala ya ntango nyonso, kokende kosalela Nzambe na mboka oyo ezali na mposa ya bateyi ya Biblia mpe kosala ná tata na ye na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi. Akomaki boye: “Napesi Yehova Nzambe bomoi na ngai mobimba!” Catrina azalaki na mokano ya “kotosa mitinda ya Nzambe na bomoi na ye na ndenge oyo ekopesa ye esengo.” Na molulu ya kokunda ebembe ya Catrina, balobaki ete azalaki “elenge mwasi moko kitoko oyo amityelaki mokano ya kosalela Yehova bomoi na ye mobimba.”

Ntango azalaki naino mwana moke, bateyaki Kyle ete esengeli amityelaka mikano. Nsima ya kokufa na aksida moko ya motuka ntango azalaki na mbula 20, bato ya libota na ye bakutaki buku moko oyo ezalaki na mikano oyo mama na ye asalisaki ye amityela ntango azalaki naino na mbula 4 mpamba. Amityelaki mokano ya kozwa batisimo, kosala badiskur na Ndako ya Bokonzi mpe kokende kosala na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova, epai alingaki kopesa mabɔkɔ mpo na kobimisa mikanda oyo ekosalisa bato báyeba Nzambe. Nsima ya kotánga buku yango oyo Kyle akomaki esili koleka bambula ebele, mama na ye alobaki: “Akokisaki mikano wana nyonso oyo amityelaki.”

Bongo yo, mikano nini omityeli? Oyebi te ndenge bomoi na yo ekozala lobi. Yango wana, mokolo na mokolo, saláká nyonso oyo okoki kosala. Lokola Catrina mpe Kyle, lekisáká ntango na yo na makambo oyo ekomemela yo mapamboli mingi. Mekolá ntoma Paulo, oyo na nsuka ya bomoi na ye, alobaki boye: “Nabundi etumba ya malamu mingi, napoti mbangu tii na nsuka, nabateli kondima.” (2 Timote 4:7) Mokapo oyo elandi ekosalisa yo osala mpe bongo!

[Elilingi na lokasa 274, 275]

Soki olingi ozala na sante ya malamu, osengeli kosalaka ngalasisi. Soki olingi ozala na boyokani malamu ná Nzambe, osengeli koyekola Biblia