Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini nakoki kokokisa mikano na ngai?

Ndenge nini nakoki kokokisa mikano na ngai?

Mokapo 39

Ndenge nini nakoki kokokisa mikano na ngai?

Okosepela kozala na likambo nini kati na oyo elandi?

□ Kolongola kobanga

□ Kozala na baninga mingi

□ Kozala na esengo mingi

OKOKI kozala na makambo wana nyonso misato! Ndenge nini? Soki ozali komityela mikano mpe kokokisa yango. Talá makambo oyo elandi:

Kolongola kobanga. Ntango ozali komityela mikano ya mike mpe ozali kokokisa yango, okobanga te komityela mpe mikano ya minene. Okolongola kobanga mpe ntango okutani na mikakatano ya mokolo na mokolo, na ndakisa ntango bilenge mosusu bazali kotya yo mbamba.

Kozala na baninga mingi. Bato basepelaka kozala elongo na baoyo bamityelaka mikano oyo bakokoka kokokisa, elingi koloba baoyo bayebi eloko oyo balingi mpe bazali komipesa mpo na yango.

Kozala na esengo mingi. Yebá likambo oyo: Ezali malamu te kokanga mabɔkɔ mpe kozela kaka ete likambo moko ya malamu ekómela yo na bomoi. Nzokande, ntango ozali komityela mikano mpe kokokisa yango, okoyoka mpenza esengo. Okoki mpo na kobanda sikoyo? Nkasa oyo elandi ekosalisa yo! *

✔ 1 LUKÁ KOYEBA

1. Kanisá mikano oyo okoki komityela. Komipesa mpasi mingi te! Kokanisakanisa mingi te; komá kaka makambo nyonso oyo ez’oyela yo na motó. Talá soki okoki kokoma ata makambo 10.

2. Talelá mikano yango malamumalamu. Mikano nini ez’osepelisa yo mingi? Wapi oyo ezali mpasi mingi? Wapi oyo ekopesa yo esengo soki okokisi yango? Kobosana te ete mikano oyo eleki malamu ezali oyo ezali na ntina mingi mpo na yo.

3. Tyá mikano yango na molɔngɔ. Tandá mikano na yo na molɔngɔ, kobanda na oyo okosepela kokokisa liboso.

✔ 2 SALÁ PROGRAMƐ

Mpo na mokano mokomoko oyo oponi, salá boye:

Komá mokano na yo.

Koyekola monɔkɔ ya Chinois mpo na kosolola na Ba-Chinois oyo bazali na mboka na bino

Komá dati oyo osengeli kokokisa yango. Mokano oyo batyeli dati te ezali kaka ndɔtɔ mpamba!

Mwa 1 Sanza ya 7

Komá makambo oyo okosala mpo na kokokisa mokano yango.

Makambo oyo nakosala

1. Kozwa buku moko oyo ekosalisa ngai nayekola kosolola na monɔkɔ yango.

2. Koyekola maloba 10 pɔsɔ na pɔsɔ.

3. Koyoka bato mosusu oyo balobaka Chinois.

4. Kosɛnga moto atalela malamu ndenge naz’obimisa maloba mpe ndenge nazali kobenga yango.

Kanisá liboso mikakatano oyo okokutana na yango. Na nsima, kanisá ndenge oyo okoki kolonga yango.

Mikakatano oyo nakoki kokutana na yango

Moto moko te ya pembeni alobaka Chinois

Zwá ekateli. Zwá ekateli ete okosala nyonso mpo na kokokisa mokano na yo. Tyá sinyatire mpe komá dati.

Ndenge oyo nakoki kolonga yango

Kozwa mpe koyoka ndenge bazali kotánga mikanda ya Chinois na site www.pr418.com.

․․․․․ ․․․․․

Sinyatire Dati

✔ 3 SALÁ!

Bandá mbala moko. Omituna boye: ‘Nini nakoki kosala lelo mpo nabanda kokokisa mokano na ngai?’ Ya solo, mbala mosusu okokisi naino makambo nyonso te, kasi kotika yango te epekisa yo obanda. Ndenge Biblia emonisi yango, “moto oyo abangaka mopepe akonaka elanga té; moto oyo abangaka mapata azangaka eloko ya kobuka.” (Mosakoli 11:4, Bible na lingala ya lelo oyo) Luká eloko moko oyo okoki kosala sikoyo​—ata soki ezali moke​—mpe salá yango.

Zongelá mikano na yo mokolo na mokolo. Kobosanaka te mpo na nini mokano mokomoko ezali na ntina mpo na yo. Mpo na koyeba ndenge ozali kokoba na mikano na yo, tyá elembo (to tyá dati moko) na mokano nyonso oyo okokisi.

Salelá mayele na yo ya kokanisa. Moná na mosika mpe kanisá ete okokisi mokano na yo. Kanisá esengo oyo okoyoka ntango okokokisa yango. Na nsima, kanisá lisusu likambo mokomoko oyo osalaki mpo na kokokisa mokano yango. Na nsuka, mimoná ete osilisi likambo mokomoko, mpe kanisá lisusu esengo oyo okoyoka ntango okokokisa mokano na yo. Sikoyo okoki kobanda!

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 10 Makanisi oyo etaleli mingimingi mikano ya ntango mokuse, kasi batoli yango ekoki mpe kosalelama mpo na mikano ya ntango molai.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba.”​—Masese 21:5.

TOLI

Koluka te kokangama makasi na programɛ moko boye oyo otye. Kozala makambo makasimakasi te, mpe bongoláká mwa makambo mosusu soki olingi kokokisa mokano na yo.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Soki omityeli mokano ya monene, okoyoka esengo mingi ntango okokokisa yango!

OKANISI NINI?

● Okoki kozala na mikano ebeleebele na mbala moko?​—Bafilipi 1:10.

● Komityela mikano elimboli nde kolandelalandela likambo nyonso ya bomoi na yo?​—Bafilipi 4:5.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 283]

“Eza’ mpasi te olɛmba nzoto soki ozali na eloko te ya kosala to ya kokanisa. Kasi ntango ozali komityela mikano mpe ozali kokokisa yango, ozali komiyoka malamu.”​—Reed

[Etanda/​Elilingi na lokasa 283]

Ndakisa ya mikano

Boninga Kozala moninga ya moto oyo azali mbula moko na ngai te. Kozongela moninga moko ya kala.

Sante Kosala ngalasisi ata miniti 90 pɔsɔ na pɔsɔ. Kolalaka ngonga mwambe butu nyonso.

Kelasi Komatisa bapwɛ na matematiki. Kokangama na oyo ezali malamu ntango bana kelasi bazali kotinda nasala mabe.

Makambo ya Nzambe Kotánga Biblia miniti 15 mokolo na mokolo. Koyebisa mwana kelasi moko bindimeli na ngai pɔsɔ oyo.

[Elilingi na lokasa 284, 285]

Mikano ezali lokola plan ya kotonga ndako; esɛngaka kosala mosala mpo ndako etongama