Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokano ya Nzambe ezali nini?

Mokano ya Nzambe ezali nini?

Nzambe alingi tófanda na kimya mpe na esengo libela na libela na paradiso awa na mabele!

Kasi, okoki komituna boye: ‘Yango ekosalema ndenge nini?’ Biblia elobi ete Bokonzi ya Nzambe nde ekosala yango, mpe mokano ya Nzambe ezali ete bato nyonso báyeba Bokonzi yango mpe makambo oyo ekosalela biso.​—Nzembo 37:11, 29; Yisaya 9:7.

Nzambe alingi ete tózala na bomoi ya malamu.

Kaka ndenge tata ya bolingo alingaka ete bana na ye bázala malamu, Tata na biso ya likoló mpe alingi ete tózala na esengo mpo na libela. (Yisaya 48:17, 18) Alaki ete ‘moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe akotikala libela na libela.’​—1 Yoane 2:17.

Nzambe alingi tótambola na banzela na ye.

Biblia elobi ete Mozalisi na biso asepelaka ‘kolakisa biso banzela na ye’ mpo ‘tótambola’ na yango. (Yisaya 2:2, 3) Abongisi etuluku moko ya bato “mpo na nkombo na ye,” mpo báyebisa mokano na ye na mokili mobimba.​—Misala 15:14.

Nzambe alingi tósambela ye na bomoko.

Losambo ya pɛto ya Yehova ekabolaka bato te kasi esangisaka nde bango na bolingo ya solo. (Yoane 13:35) Lelo oyo, banani bazali koteya bato nyonso na bisika nyonso ndenge ya kosalela Nzambe na bomoko? Tosɛngi yo ozwa eyano na mwa buku oyo.