Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 1

Batatoli ya Yehova bazali bato ya ndenge nini?

Batatoli ya Yehova bazali bato ya ndenge nini?

Danemark

Taïwan

Vénézuéla

Inde

Batatoli ya Yehova boni oyebi? Ekoki kozala ete basusu kati na biso bafandaka penepene na yo, bazali baninga na yo ya mosala to ya kelasi, to basololá na yo masolo ya Biblia. Tozali mpenza bato ya ndenge nini, mpe mpo na nini toyebisaka bato nyonso makambo oyo tondimaka?

Tozali kaka lokola bato nyonso. Tozali bato ya mikili ndenge na ndenge, babola mpe bazwi. Liboso, basusu kati na biso bazalaki na mangomba mosusu, mpe basusu bazalaki kondimela Nzambe te. Kasi, mokomoko na biso atalelaki naino malamumalamu mateya ya Biblia. (Misala 17:11) Tondimaki makambo oyo toyekolaki, mpe na nsima mokomoko na biso aponaki kosambela Yehova Nzambe.

Koyekola Biblia ememelaka biso matomba. Biso mpe tokutanaka na mikakatano mpe tozalaka na bolɛmbu lokola bato nyonso. Kasi, lokola tosalaka makasi tósalela toli ya Biblia na bomoi na biso ya mokolo na mokolo, yango ebongisi bomoi na biso mingi. (Nzembo 128:1, 2) Yango ezali mpe moko ya makambo oyo etindaka biso tóyebisa basusu makambo ya malamu oyo toyekoli na Biblia.

Tolandaka mitinda ya Nzambe na bomoi na biso. Mitinda yango oyo Biblia eteyaka, esalisaka biso tómiyoka malamu, tómemya basusu, mpe tómonisa bizaleli lokola bosembo mpe boboto. Esalisaka mpe biso tózala nzoto kolɔngɔnɔ, tózala bato oyo basalaka mosala malamu mpe tózala na bomoko na libota mpe na bizaleli ya malamu. Lokola tondimaka mpenza ete “Nzambe aponaka bilongi te,” tozali mpenza libota ya bandeko oyo bauti na mokili mobimba, tozali na bomoko na makambo oyo tondimaka, mpe tokabwani te na mposo to bikólo. Atako tozali kaka lokola bato nyonso, libota na biso ya mokili mobimba ekokani na libota mosusu te.​—Misala 4:13; 10:34, 35.

  • Na makambo nini Batatoli ya Yehova bazali lokola bato nyonso?

  • Bizaleli nini Batatoli bazali na yango oyo bayekoli na Biblia?