Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 2

Mpo na nini tobengami Batatoli ya Yehova?

Mpo na nini tobengami Batatoli ya Yehova?

Noa

Abrahama ná Sara

Moize

Yesu Kristo

Bato mingi bakanisaka ete Batatoli ya Yehova ezali nkombo ya lingomba moko ya sika. Nzokande, eleki sikoyo mbula koleka 2 700, Nzambe ya solo abengaki basaleli na ye “batatoli.” (Yisaya 43:10-12) Tii na mobu 1931, tozalaki kobengama Bayekoli ya Biblia. Kasi, mpo na nini tokómá kobengama Batatoli ya Yehova?

Nkombo yango emonisaka Nzambe na biso. Na bamaniskri ya kala ya Biblia, nkombo ya Nzambe, Yehova, ezali komonana mbala soki 7 000. Na mabongoli mingi ya Biblia, na esika ya nkombo yango batyá nde bibengeli ya lokumu lokola Nkolo to Nzambe. Nzokande, Nzambe ya solo ye moko amimonisaki epai ya Moize na nkombo na ye mpenza, Yehova, mpe alobaki boye: “Wana nde nkombo na ngai mpo na seko.” (Kobima 3:15) Na ndenge yango, amikesenisaki na banzambe mosusu nyonso ya lokuta. Kobengama na nkombo mosantu ya Nzambe ezali mpenza lokumu mpo na biso!

Nkombo yango emonisaka mosala na biso. Kobanda na Abele moto ya sembo, ezali na molɔngɔ molai ya bato ya kala oyo batatolaki ete bazalaki kondimela Yehova. Na boumeli ya bambula, Noa, Abrahama, Sara, Moize, Davidi mpe bato mosusu bakɔtaki na molɔngɔ ya bato yango oyo babengami ‘lipata monene ya batatoli.’ (Baebre 11:4–12:1) Kaka ndenge moto apesaka litatoli na tribinale mpo na moto oyo azali na ngambo te, biso mpe tozali na mokano ya koyebisa solo na ntina na Nzambe.

Tolandaka ndakisa ya Yesu. Na Biblia, Yesu abengami “motatoli ya sembo mpe ya solo.” (Emoniseli 3:14) Yesu ye moko alobaki ete ‘ayebisaki bato nkombo’ ya Nzambe mpe ete ntango nyonso ‘apesaki litatoli na ntina na solo’ mpo na Nzambe. (Yoane 17:26; 18:37) Na yango, bayekoli ya solosolo ya Kristo basengeli mpe kobengama na nkombo ya Yehova mpe koyebisa bato nkombo yango. Yango nde likambo Batatoli ya Yehova basalaka makasi bákokisa.

  • Mpo nini Bayekoli ya Biblia bakómá kobengama Batatoli ya Yehova?

  • Kobanda ntango nini Yehova azali na Batatoli awa na mabele?

  • Nani azali Motatoli ya Yehova oyo aleki Batatoli nyonso?