Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 4

Mpo na nini tobimisaki Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika?

Mpo na nini tobimisaki Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika?

Congo (Kinshasa)

Rwanda

Eteni ya makomi ya Symmaque oyo ezali na nkombo ya Nzambe na Nzembo 69:31, ekomamaki na siɛklɛ ya misato to ya minei T.B.

Na boumeli ya bambula mingi, Batatoli ya Yehova bazalaki kosalela, konyata mpe kokabola mabongoli ndenge na ndenge ya Biblia. Kasi toyaki komona ete esengeli kobimisa libongoli moko ya sika ya Biblia, oyo ekosalisa bato bázwa “boyebi ya sikisiki ya solo,” mpo yango nde mokano ya Nzambe mpo na bato nyonso. (1 Timote 2:3, 4) Yango wana, na mobu 1950 tobandaki kobimisa biteni ya Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na Lingelesi, na elobeli ya mikolo na biso. Biblia yango ebongolami na bosembo mpe na bosikisiki na minɔkɔ koleka 130.

Esengelaki kobimisa Biblia moko na elobeli ya pɛtɛɛ. Minɔkɔ oyo bato balobaka ebongwanaka nsima ya mikolo, mpe mabongoli mingi ya Biblia esalelaka elobeli ya kala to oyo ebimisaka likanisi polele te. Lisusu, bamaniskri ya kala ya Biblia oyo ekokani mpenza na mikanda ya ebandeli, mpe oyo bakomaki mwa moke nsima na oyo ya ebandeli, eyaki komonana na nsima mpe yango esalisaki bato báyeba malamu koleka monɔkɔ ya Ebre, ya Aramɛyɛ mpe ya Grɛki oyo bakomaki na yango Biblia na ebandeli.

Esengelaki libongoli moko oyo eyokani mpenza na maloba ya Nzambe. Na esika ya kobakisa to kolongola makambo mosusu, bato oyo babongolaka Biblia basengeli nde kobimisa na bosembo nyonso makanisi ya mokomi. Nzokande, na mabongoli mingi ya Biblia, nkombo ya Nzambe, Yehova, ezali te.

Esengelaki kobimisa Biblia moko oyo ekopesa lokumu epai ya nkolo na yango. (2 Samwele 23:2) Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ezongisi nkombo Yehova mbala soki 7 000, na bisika oyo ezalaki na bamaniskri ya kalakala ya Biblia, ndenge emonisami na elilingi awa na nse. (Nzembo 83:18) Babongoli ya Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika basalaki bolukiluki ya mozindo bambula ebele mpo na kobimisa libongoli oyo esepelisaka na kotánga mpe ebimisaka polele makanisi ya Nzambe. Ezala ozali na Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na monɔkɔ oyo olobaka to te, tolendisi yo otángaka Liloba ya Yehova mokolo na mokolo.​—Yosua 1:8; Nzembo 1:2, 3.

  • Mpo na nini tomonaki ete esengeli tóbimisa libongoli moko ya sika ya Biblia?

  • Moto oyo azali na mposa ya koyekola mokano ya Nzambe asengeli kosala nini mokolo na mokolo?