Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 6

Koyangana elongo na bandeko na biso bakristo esalisaka biso na nini?

Koyangana elongo na bandeko na biso bakristo esalisaka biso na nini?

Madagascar

Norvège

Liban

Italie

Biso Batatoli ya Yehova tosalaka nyonso tózangisa te makita na biso, ezala moi makasi, mbula to malili makasi, to ata soki esɛngi tókatisa zamba monene to mai. Mpo na nini tosalaka milende tóyangana elongo na baninga na biso ata soki tolɛmbi nsima ya kosilisa mosala to tozali na mikakatano ya bomoi?

Ezali mpo na bolamu na biso. Ntoma Paulo akomaki mpo na baoyo toyanganaka na bango na lisangá ete: “Tótyelanaka likebi.” (Baebre 10:24) Maloba yango emonisi ete tosengeli koluka koyebana malamumalamu na basusu. Na yango, maloba ya ntoma Paulo ezali kolendisa biso tókipaka basusu. Ntango tozali koluka koyeba bandeko mosusu ya lisangá, tokomona ete basusu kati na bango balongaki mikakatano oyo ekokani na oyo ya biso mpe bakoki kosalisa biso tólonga.

Ekolisaka boninga na biso. Bato oyo toyanganaka na bango na makita na biso bazali mpenza baninga na biso, kasi te kaka bato oyo toyebani na bango. Ntango mosusu, tolekisaka ntango na bandeko mpo na kosepela elongo na ndenge ebongi. Matomba nini tozwaka? Esalisaka biso tóyeba mpe tósepela lisusu na bizaleli malamu ya baninga na biso, bango mpe básepela na oyo ya biso, mpe yango ekolisaka bolingo na biso. Boye, soki bandeko na biso bakutani na mikakatano, tosalisaka bango mbala moko mpo tokómá mpenza baninga. (Masese 17:17) Soki tozali koyangana na bandeko nyonso ya lisangá, tokomonisa ete biso nyonso totyelanaka likebi.​—1 Bakorinti 12:25, 26.

Tozali kolendisa yo opona baninga kati na bato oyo bazali kosala mokano ya Nzambe. Okozwa baninga ya ndenge wana na kati ya Batatoli ya Yehova. Kotika eloko moko te epekisa yo koyangana na makita na biso.

  • Mpo na nini koyangana na makita ezali mpo na bolamu na biso?

  • Okosepela koyangana na makita ya lisangá na biso mokolo nini?