Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 7

Makita na biso esalemaka ndenge nini?

Makita na biso esalemaka ndenge nini?

Nouvelle-Zélande

Japon

Ouganda

Lituanie

Ntango bakristo ya liboso bazalaki kosala makita na bango, bazalaki mingimingi koyemba, kobondela, kotánga Makomami mpe kolimbola yango, kasi milulu ezalaki te. (1 Bakorinti 14:26) Okomona ete makita na biso mpe ezalaka mpenza ndenge wana.

Mateya eutaka na Biblia mpe esalisaka mpenza. Na mokolo ya pɔsɔ to ya lomingo, lisangá mokomoko eyanganaka mpo na koyoka Diskur ya bato nyonso oyo eumelaka miniti 30, mpe emonisaka ndenge oyo Biblia elobelaka makambo oyo etali bomoi na biso mpe eleko na biso. Moto na moto alendisamaka ete alanda na Biblia na ye. Nsima ya diskur, tozalaka na Boyekoli ya “Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,” oyo eumelaka ngonga moko, mpe moto nyonso akoki kopesa biyano oyo euti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya boyekoli. Boyekoli yango esalisaka biso tósalela toli ya Biblia na bomoi na biso. Lisangá mokomoko kati na masangá koleka 110 000 ya mokili mobimba eyekolaka kaka lisolo moko.

Esalisaka biso tókolisa mayele na biso ya koteya. Tokutanaka mpe mokolo mosusu na kati ya pɔsɔ mpo na likita moko ya biteni misato, oyo ebengami Bomoi mpe mosala ya bakristo, oyo masolo na yango euti na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala oyo tozwaka sanza na sanza. Eteni ya liboso ya likita yango, Makambo ya motuya na Liloba ya Nzambe, esalisaka biso tóyeba malamu eteni moko ya Biblia oyo bandeko ya lisangá batángaki liboso. Eteni ya mibale, Omipesa na mosala ya kosakola, ezali na bilakiseli oyo emonisi ndenge ya kosolola na bato masolo ya Biblia. Ndeko moko apesaka toli mpo na kosalisa biso tókolisa mayele na biso ya kotánga mpe ya kosolola na bato. (1 Timote 4:13) Eteni ya nsuka, Bomoi ya bakristo, emonisi ndenge ya kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Ezali mpe na lisolo ya mituna mpe biyano, oyo esalisaka biso tóbakisa boyebi na biso ya Biblia.

Soki oyei na makita na biso, na ntembe te okosepela na mateya ya Biblia oyo ebongisami malamu mpenza, oyo okozwa kuna.​—Yisaya 54:13.

  • Makambo nini okoyoka soki okei na makita ya Batatoli ya Yehova?

  • Okosepela koya na likita nini ya mbala oyo ezali koya?