Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 10

Losambo na kati ya libota ezali nini?

Losambo na kati ya libota ezali nini?

Corée du Sud

Brésil

Australie

Guinée

Banda kala, Yehova alingaka ete bato ya libota moko bálekisaka ntango elongo mpo na kolendisa boyokani ya bango na Nzambe mpe ya bango na bango. (Kolimbola Mibeko 6:6, 7) Yango wana, mabota ya Batatoli ya Yehova baponaka mokolo moko pɔsɔ na pɔsɔ mpo na koyekola Biblia elongo. Na ntango yango, basololaka makambo ya Nzambe oyo eyokani na bamposa ya libota na bango na ndenge oyo moto nyonso akomiyoka malamu. Ata soki ozali yo moko, okoki mpe kopona ntango mpo ozala elongo na Nzambe mpe oyekola lisolo moko ya Biblia oyo oponi.

Ezali ntango ya kopusana penepene na Yehova. Biblia elobi boye: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:8) Tokómaka koyeba Yehova malamumalamu ntango tozali koyekola makambo etali bomoto mpe misala na ye na kati ya Biblia, Liloba na ye. Lolenge ya pɛtɛɛ ya kobanda losambo na kati ya libota na bino ezali ya kozwa mwa miniti mpo na kotánga Biblia elongo na mongongo makasi; bokoki kolanda programɛ ya botángi ya Biblia ya pɔsɔ na pɔsɔ oyo epesamaka na likita Bomoi mpe mosala ya bakristo. Bokoki kopesa moto mokomoko ya libota eteni oyo akotánga, mpe na nsima bino nyonso bokoki kolobela makambo oyo boyekoli na Biblia.

Ezali ntango ya kokómisa boyokani ya libota makasi. Boyokani ya mwasi ná mobali mpe ya baboti ná bana ekómaka makasi soki bazali koyekola Biblia elongo na libota. Esengeli kozala ntango moko ya nsai, ya kimya mpe oyo moto nyonso azelaka na esengo pɔsɔ na pɔsɔ. Baboti bakoki kopona masolo na kotalela mbula ya bana na bango, na ndakisa bakoki kosalela mitó ya masolo mosusu oyo ebimaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! to na site na biso ya Internet, jw.org. Bokoki mpe kolobela mokakatano moko oyo bana na bino bakutanaki na yango na kelasi mpe ndenge ya kolonga yango. Mpo na nini te kotala emisyo ya televizyo na biso JW télédiffusion (tv.pr418.com) mpe na nsima kolobela yango elongo? Bokoki mpe koyekola nzembo oyo ekoyembama na makita, mpe kolya mwa eloko nsima ya boyekoli.

Ntango wana oyo bozali kolekisa pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kosambela Yehova elongo, ekosalisa mokomoko na kati ya libota asepela koyekola Liloba ya Nzambe mpe Nzambe akopambola milende na bino.​—Nzembo 1:1-3.

  • Mpo na nini toponaka mokolo moko na kati ya pɔsɔ mpo na losambo na kati ya libota?

  • Ndenge nini baboti bakoki kosala ete ntango wana epesa libota mobimba esengo?