Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 13

Mobongisi-nzela azali nani?

Mobongisi-nzela azali nani?

Canada

Kosakola ndako na ndako

Koyekola na bato Biblia

Koyekola yo moko

Mbala mingi, “mobongisi-nzela” ezalaka moto ya liboso oyo akei na esika moko boye mpe afungoli nzela mpo basusu bálanda. Yesu azalaki lokola mobongisi-nzela mpo Nzambe atindaki ye awa na mabele asakola nsango oyo epesaka bomoi, mpe afungwela bato nzela ya lobiko. (Matai 20:28) Lelo oyo, bayekoli ya Yesu bamekolaka ye na ndenge basalaka mingi mpenza na mosala ya ‘kokómisa bato bayekoli.’ (Matai 28:19, 20) Bato mosusu kutu bazalaka na likoki ya kosala oyo tobengi mosala ya mobongisi-nzela.

Mobongisi-nzela azali mosakoli ya ntango nyonso. Batatoli ya Yehova nyonso bazali basakoli ya nsango malamu. Kasi basusu babongisaka makambo ya bomoi na bango mpo bázala babongisi-nzela ya sanza na sanza, mpe basakolaka ngonga 70 sanza na sanza. Mpo na kosala yango, mingi baponaka mosala oyo ezwaka bango ngonga mingi te na pɔsɔ. Basusu baponamaka mpo bázala babongisi-nzela monene na bisika oyo basakoli ya Bokonzi bazali mingi te, mpe basakolaka ngonga 130 sanza na sanza. Babongisi-nzela basepelaka kozala na bomoi ya mindɔndɔ te, mpe batyaka motema ete Yehova akopesa bango biloko oyo basengeli na yango. (Matai 6:31-33; 1 Timote 6:6-8) Baoyo bakoki kosala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza te bakoki kopona kozala babongisi-nzela basungi soki likoki ezali, mpe kosakola ngonga 30 to 50 na sanza moko.

Mobongisi-nzela asakolaka mingi mpo alingaka Nzambe mpe bato. Lokola Yesu, biso mpe tomonaka ndenge bato mingi bazangi elikya lelo oyo. (Marko 6:34) Kasi tozali na boyebi oyo ekoki kosalisa bango banda sikoyo, mpe kopesa bango elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya. Mobongisi-nzela alingaka bato mpe yango nde etindaka ye asalela ntango mpe makasi na ye mpo na kosalisa bango báyeba nsango malamu. (Matai 22:39; 1 Batesaloniki 2:8) Na yango, kondima na ye ekómaka makasi, apusanaka lisusu penepene na Nzambe, mpe akómaka na esengo mingi.​—Misala 20:35.

  • Mobongisi-nzela azali nani?

  • Nini etindaka moto akóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza?