Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 14

Biteyelo nini ebongisami mpo na babongisi-nzela?

Biteyelo nini ebongisami mpo na babongisi-nzela?

États-Unis

Eteyelo ya Gileade na Patterson, na New York

Panama

Banda kala mateya ya Teokrasi ezali elembo ya Batatoli ya Yehova. Biteyelo ya ntina mingi ebongisami mpo na baoyo bapesaka ntango na bango nyonso na mosala ya kosakola Bokonzi mpo ‘bákokisa mosala na bango malamumalamu.’​—2 Timote 4:5.

Eteyelo ya babongisi-nzela. Mobongisi-nzela ya sanza na sanza oyo asali mbula moko na mosala yango, akokɔta eteyelo yango ya mikolo motoba, mbala mosusu na Ndako ya Bokonzi oyo ezali pene ya esika oyo afandaka. Ntina ya eteyelo yango ezali ya kosalisa mobongisi-nzela apusana lisusu penepene na Yehova, akóma kosakola lisusu malamu koleka, mpe akoba na mosala yango.

Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi. Eteyelo yango ya sanza mibale ebongisami mpo na kopesa formasyo na babongisi-nzela oyo baumelá na mosala, oyo bakondima kolongwa esika bafandaka mpo na kokende kosakola esika nyonso oyo mposa ya basakoli ezali. Ezali lokola balobi, “Ngai oyo! Tindá ngai!” na ndakisa ya Yesu Kristo, Mopalanganisi monene, oyo asalaki awa na mabele. (Yisaya 6:8; Yoane 7:29) Mbala mosusu kokende mosika ekosɛnga omesana na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ. Mimeseno, klima, mpe bilei ekoki kokesana mpenza na oyo ozalaki na yango liboso. Ekoki kosɛnga kutu koyekola monɔkɔ ya sika. Eteyelo yango esalisaka bandeko basi mpe mibali oyo bazali minzemba mpe bandeko oyo babalá, oyo bazali na mbula ya kobotama kobanda 23 tii 65, bákolisa bizaleli ya bokristo oyo esengeli mpo na mokumba oyo bakopesa bango mpe makoki oyo ekosala ete Yehova asalela bango, mpe ebongiseli na ye esalela bango lisusu mingi.

Gileade, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Na monɔkɔ ya Ebre, liloba “Gileade” elimboli “libondo ya litatoli.” Kobanda ntango eteyelo ya Gileade efungwamaki na 1943, bandeko koleka 8 000 oyo bazwaki diplome na eteyelo yango batindamaki lokola bamisionɛrɛ mpo na kopesa litatoli “tii na nsuka ya mabele,” mpe yango ebotaki mbuma mingi. (Misala 13:47) Ntango bamisionɛrɛ ya liboso bakómaki na ekólo Pérou, lisangá ata moko te ezalaki kuna. Kasi sikoyo masangá ekómi koleka 1 000. Ntango bamisionɛrɛ na biso bakendaki kosakola na Japon, Batatoli bazalaki ata zomi te. Kasi sikoyo bakómi koleka 200 000. Na Eteyelo ya Gileade oyo eumelaka sanza mitano, bayekolaka Liloba ya Nzambe na mozindo. Baoyo bazali babongisi-nzela monene to bamisionɛrɛ, baoyo basalaka na Babetele, to bakɛngɛli ya zongazonga, bazali kobengama na eteyelo yango mpo na kozwa formasyo ya malamu oyo ekosalisa bango bábongisa malamumalamu mpe báfandisa mosala na mokili mobimba.

  • Ntina ya Eteyelo ya babongisi-nzela ezali nini?

  • Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi ebongisami mpo na banani?