Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 17

Ndenge nini bakɛngɛli ya zongazonga basalisaka biso?

Ndenge nini bakɛngɛli ya zongazonga basalisaka biso?

Malawi

Etuluku ya mosala ya kosakola

Na mosala ya kosakola

Likita ya bankulutu

Makomami ya Grɛki ya bokristo elobelaka mbala na mbala Barnabasi ná ntoma Paulo. Mibali yango bazalaki bakɛngɛli-batamboli, elingi koloba, bazalaki kosala mibembo mpo na kotala masangá ya liboso. Mpo na nini? Mpo bazalaki mpenza komitungisa mpo na bolamu ya bandeko na bango bakristo. Paulo alobaki ete azalaki na mposa ya ‘kozonga kotala bandeko’ mpo na komona soki bazali ndenge nini. Azalaki kondima kosala mibembo ya bankama ya bakilomɛtrɛ mpo na kolendisa bandeko. (Misala 15:36) Bakɛngɛli-batamboli na biso basalaka mpe bongo lelo oyo.

Bayaka mpo na kolendisa biso. Bakɛngɛli ya zongazonga batalaka masangá soki 20 mpe balekisaka pɔsɔ moko na lisangá mokomoko mbala mibale na mbula. Ndakisa na bango mpe ya basi na bango, soki babalá, ekoki kolendisa biso mingi. Basalaka makasi báyeba bandeko nyonso ezala bilenge to mikóló, mpe basepelaka kobima elongo na biso na mosala ya kosakola mpe ya koyekola na bato Biblia. Bakɛngɛli yango elongo na bankulutu, basololaka na bandeko mpo na kolendisa bango. Basalaka mpe badiskur ya kolendisa na makita mpe na mayangani.​—Misala 15:35.

Batyelaka moto nyonso likebi. Bakɛngɛli ya zongazonga balukaka mpenza koyeba soki bandeko ya lisangá mokomoko bazali na boyokani malamu na Nzambe. Batalelaka elongo na bankulutu mpe basaleli na misala bokoli ya lisangá mpe bapesaka bango toli oyo ebongi mpo bákokisa mikumba na bango malamu. Basalisaka babongisi-nzela mpo bákokisa malamu mosala ya kosakola, mpe basepelaka koyebana na bato ya sika mpe koyoka ndenge kondima na bango ezali kokola. Mokɛngɛli mokomoko amipesaka mpenza mpo azali ‘moto oyo asalaka na biso mpo na matomba na biso.’ (2 Bakorinti 8:23) Tosengeli komekola kondima mpe molende na bango na mosala ya Nzambe.​—Baebre 13:7.

  • Mpo na nini bakɛngɛli ya zongazonga bakendeke kotala masangá?

  • Ndenge nini boyei na bango na lisangá ekoki kosalisa yo?