Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 19

Nani azali moombo ya sembo mpe ya mayele?

Nani azali moombo ya sembo mpe ya mayele?

Bilei ya elimo esalisaka biso nyonso

Mwa moke liboso Yesu akufa, asololaki na bayekoli na ye minei: Petro, Yakobo, Yoane ná Andre, na esika oyo bazalaki kaka bango moko. Wana Yesu azalaki koyebisa bango elembo ya kozala na ye na mikolo ya nsuka, atunaki motuna oyo ya ntina mingi: “Nani azali mpenza moombo ya sembo mpe ya mayele oyo nkolo na ye atye abatela basali ya ndako na ye, mpo na kopesa bango bilei na bango na ntango oyo ebongi?” (Matai 24:3, 45; Marko 13:3, 4) Yesu alingaki bayekoli na ye báyeba ete lokola azali “nkolo” na bango, akotya bato oyo bakokoba kopesa bango bilei ya elimo, elingi koloba boyebi ya Nzambe, na ntango ya nsuka. Esengelaki kozala banani?

Ezali mwa etuluku ya bayekoli ya Yesu oyo batyami mafuta na elimo. “Moombo” yango nde Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova. Moombo yango apesaka basambeli ya Yehova bilei ya elimo na ntango ebongi. Totyaka motema epai ya bandeko yango mpo na kozwa ‘bilei oyo tosengeli na yango na ntango oyo ebongi.’​—Luka 12:42.

Batambwisaka ndako ya Nzambe. (1 Timote 3:15) Yesu apesaki moombo yango mokumba monene ya kotambwisa mosala ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele, elingi koloba, kobatela biloko na yango nyonso, kotambwisa mosala ya kosakola mpe koteya biso na nzela ya masangá na biso. Na yango, mpo tózwa oyo tosengeli na yango na ntango oyo ebongi, “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kokabola bilei ya elimo na nzela ya mikanda oyo tosalelaka na mosala ya kosakola, mpe ya mateya oyo tozwaka na makita mpe na mayangani.

Moombo yango azali sembo na mateya ya solo ya Biblia mpe na mokumba bapesá ye ya kosakola nsango malamu; azali mpe na mayele na ndenge abatelaka na bwanya mpenza biloko ya Kristo awa na mabele. (Misala 10:42) Yehova azali kopambola mosala ya moombo yango mpo bato ebele bazali se kokóma Batatoli mpe azali kokoba kobimisa bilei ya elimo ebele.​—Yisaya 60:22; 65:13.

  • Yesu atyaki nani mpo apesaka bayekoli na ye bilei ya elimo?

  • Na ndenge nini moombo azali sembo mpe na mayele?