Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 20

Lisangani ya Mikóló-Bakambi esalaka ndenge nini lelo oyo?

Lisangani ya Mikóló-Bakambi esalaka ndenge nini lelo oyo?

Lisangani ya mikóló-bakambi na siɛklɛ ya liboso

Bazali kotánga mokanda ya lisangani ya mikóló-bakambi

Na siɛklɛ ya liboso, mwa etuluku ya “bantoma mpe bankulutu na Yerusaleme” bazalaki lisangani ya mikóló-bakambi oyo bazalaki kozwa bikateli ya ntina na nkombo ya bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo. (Misala 15:2) Mpo na kozwa ekateli oyo bango nyonso bakondima, bazalaki naino kotalela oyo Makomami elobi mpe kotika ete elimo ya Nzambe etambwisa bango. (Misala 15:25) Lelo oyo esalemaka mpe ndenge wana.

Nzambe azali kosalela yango mpo na kokokisa mokano na ye. Bandeko mibali oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, balingaka mpenza Liloba ya Nzambe mpe bamesaná kozwa bikateli na makambo etali losambo mpe mosala na biso. Basalaka likita pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kotalela mposa ya bandeko ya mokili mobimba. Kaka ndenge ezalaki na siɛklɛ ya liboso, masangá ezwaka malako oyo euti na Biblia na nzela ya mikanda, to bakɛngɛli-batamboli to bandeko mosusu. Yango esalaka ete libota ya Nzambe ezala na bomoko. (Misala 16:4, 5) Lisangani ya Mikóló-Bakambi etambwisaka mosala ya kobongisa bilei ya elimo, elendisaka biso nyonso tómipesa na mosala ya kosakola Bokonzi, mpe etalelaka makambo ya koponama ya bandeko mibali oyo bakoki kozwa mikumba na lisangá.

Elandaka litambwisi ya elimo ya Nzambe. Lisangani ya Mikóló-Bakambi elandaka litambwisi ya Yehova, Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba, mpe Yesu, Mokonzi ya lisangá. (1 Bakorinti 11:3; Baefese 5:23) Bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bamimonaka te ete bazali bakonzi ya basaleli ya Nzambe. Kasi, elongo na bakristo mosusu nyonso oyo batyami mafuta na elimo, bazali “kokoba kolanda Mwana-Mpate [Yesu] epai nyonso oyo azali kokende.” (Emoniseli 14:4) Bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi basepelaka ndenge tosambelaka mpo na bango.

  • Na siɛklɛ ya liboso, banani bazalaki na lisangani ya mikóló-bakambi?

  • Ndenge nini Lisangani ya Mikóló-Bakambi elukaka litambwisi ya Nzambe lelo oyo?