Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 24

Mbongo mpo na mosala na biso na mokili mobimba eutaka wapi?

Mbongo mpo na mosala na biso na mokili mobimba eutaka wapi?

Népal

Togo

Grande-Bretagne

Mbula na mbula, ebongiseli na biso ebimisaka bamilio ya Babiblia ná mikanda mosusu mpe tokabolaka yango ofele. Totongaka Bandako ya Bokonzi ná babiro ya filiale mpe tobatelaka yango. Tosungaka bankóto ya bandeko ya libota ya Betele mpe bamisionɛrɛ, mpe tosalisaka bandeko na ntango ya likama. Na ntembe te, okoki komituna: ‘Mbongo nyonso wana eutaka wapi?’

Tosɛngaka dime te, tokɔngɔlaka mpe mabonza te. Atako mosala na biso ya kopalanganisa nsango malamu esɛngaka mbongo mingi, tosɛngaka bato mbongo te. Eleki sikoyo mbula koleka nkama moko, nimero ya mibale ya zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete tondimi ete Yehova moto azali kosunga biso mpo na kobimisa yango mpe “tokoki te kosɛnga to koluka mbongo epai ya bato,” mpe tosalá yango ata moke te!​—Matai 10:8.

Mosala na biso esimbami na makabo oyo bato bapesaka na bolingo na bango moko. Bato mingi basepelaka na mosala na biso ya koteya Biblia mpe bapesaka makabo mpo na yango. Batatoli bango moko mpe basepelaka kopesa na esengo ntango na bango, makasi na bango, mbongo na bango mpe biloko na bango mosusu mpo mokano ya Nzambe esalema na mabele mobimba. (1 Ntango 29:9) Na Ndako ya Bokonzi mpe na mayangani na biso, tozali na bakɛsi ya makabo esika baoyo balingi bakoki kotya makabo. Makabo ekoki mpe kopesama na nzela ya site Internet na biso, jw.org. Mbongo mingi eutaka na bato oyo bazali na bozwi mingi te, oyo bakokani na mwasi mobola oyo mobali akufá, oyo Yesu alobelaki, oyo atyaki mbongo ya bibende mibale na kɛsi ya makabo na tempelo. (Luka 21:1-4) Na yango, moto na moto akoki mbala na mbala ‘kobomba mwa eloko pembeni’ mpo na kopesa “ndenge akani na motema na ye.”​—1 Bakorinti 16:2; 2 Bakorinti 9:7.

Tondimi mpenza ete Yehova akokoba kosimba mitema ya baoyo balingi ‘kokumisa ye na biloko na bango ya motuya’ mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya Bokonzi, mpo mokano na ye ekokisama.​—Masese 3:9.

  • Nini ekesenisaka ebongiseli na biso na mangomba mosusu?

  • Ndenge nini mbongo ya makabo esalelamaka?