Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 25

Mpo na nini totongaka Bandako ya Bokonzi mpe ndenge nini tosalaka yango?

Mpo na nini totongaka Bandako ya Bokonzi mpe ndenge nini tosalaka yango?

Bolivie

Nigeria, liboso mpe na nsima

Tahiti

Ndenge nkombo Ndako ya Bokonzi emonisi yango, mateya ya Biblia oyo eteyamaka kuna etali libosoliboso Bokonzi ya Nzambe, motó ya likambo oyo Yesu alobelaki mingi na mateya na ye.​—Luka 8:1.

Ezali bisika ya losambo ya solo na mboka to na kartye. Bandako ya Bokonzi ezali bisika oyo Batatoli ya Yehova babongisaka mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14) Bandako ya Bokonzi nyonso ezalaka ndenge moko te, kasi nyonso ezalaka ya mindɔndɔ te; mpe na bisika mingi Ndako ya Bokonzi moko esalelamaka na masangá ebele. Na bambula oyo euti koleka, totongi bankóto ya Bandako ya Bokonzi ya sika (elingi koloba mokolo na mokolo Ndako ya Bokonzi mitano etongamaki) mpo masangá ezali se kobakisama. Ndenge nini yango ezali kosalema?​—Matai 19:26.

Etongamaka na mbongo ya makabo oyo euti na mokili mobimba. Makabo yango etindamaka na biro ya filiale mpe masangá oyo esengeli kotonga to kobongisa Ndako ya Bokonzi ekoki kosalela mbongo yango.

Etongamaka na bandeko ndenge na ndenge oyo bafutamaka te. Na mikili mingi Baekipi ya kotonga Bandako ya Bokonzi ebongisami. Baekipi yango ya batongi mpe bandeko oyo bapesaka bango mabɔkɔ bakendeke kotonga Bandako ya Bokonzi na masangá na mboka mpe ata na bisika mosusu ya mosika; basungaka Batatoli ya bisika yango na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi. Na mikili mosusu, Batatoli oyo bayebi malamu mosala ya kotonga baponamaka mpo na kokamba mosala ya kotonga mpe kobongisa Bandako ya Bokonzi. Atako bandeko mingi oyo bayebi mosala bapesaka mabɔkɔ na esika nyonso oyo bazali kotonga, mosala makasi esalemaka nde na bandeko ya lisangá wana. Elimo ya Yehova mpe milende oyo bandeko basalaka na motema moko nde esalaka ete mosala yango esalema.​—Nzembo 127:1; Bakolose 3:23.

  • Mpo na nini bisika na biso ya losambo ebengamaka Ndako ya Bokonzi?

  • Nini esalaka ete Bandako ya Bokonzi etongama na mokili mobimba?