Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 26

Ndenge nini tokoki kopesa mabɔkɔ mpo na kobatela Ndako na biso ya Bokonzi?

Ndenge nini tokoki kopesa mabɔkɔ mpo na kobatela Ndako na biso ya Bokonzi?

Estonie

Zimbabwe

Mongolie

Porto Rico

Ndako ya Bokonzi nyonso ya Batatoli ya Yehova ezali na nkombo mosantu ya Nzambe. Yango wana tomonaka ete kopesa mabɔkɔ mpo na kobatela yango mpo ezala pɛto, kitoko mpe malamu ezali likambo ya lokumu mpe ya ntina mingi na losambo na biso. Biso nyonso tokoki kopesa mabɔkɔ.

Pesá mabɔkɔ mpo na kotya bopɛto nsima ya makita. Nsima ya makita nyonso, bandeko mibali mpe basi batyaka bopɛto na Ndako ya Bokonzi na esengo mpenza. Mbala moko na pɔsɔ, batyaka bopɛto mingi koleka. Nkulutu moko to mosaleli na misala moko atambwisaka mosala yango, mpe mbala mingi atalelaka liste ya makambo oyo esengeli kosalema. Soki esengeli, bandeko oyo bamipesi na bolingo na bango moko bakɔmbɔlaka yango, basukolaka yango na mai, bapangwisaka bamesa ná bakiti to bisika mosusu ya kofanda, babongisaka bakiti, basukolaka maninisa mpe batalatala, babwakaka bosɔtɔ na esika na yango mpe bapɛtolaka libándá mpe na kati ya lopango. Ata mbala moko na mbula, toponaka mokolo moko mpo na kopɛtola Ndako ya Bokonzi malamumalamu. Topesaka mpe bana na biso mikumba mosusu mpo na koteya bango bámemyaka esika na biso ya losambo.​—Mosakoli 5:1.

Pesá mabɔkɔ soki esɛngi kobongisa eloko moko oyo ebebi. Mbula na mbula, totalaka malamumalamu Ndako ya Bokonzi na biso, ezala na kati to na libándá. Yango esalisaka biso tóbongisaka yango mbala na mbala mpo ezala ntango nyonso malamu mpo tóbebisa mbongo mpambampamba te. (2 Ntango 24:13; 34:10) Ndako ya Bokonzi oyo ezali pɛto mpe oyo ebatelami malamu ezali esika oyo ebongi mpo na kosambela Nzambe na biso. Soki tozali kopesa mabɔkɔ na mosala yango, tokomonisa ete tolingaka mpenza Yehova mpe esika na biso ya losambo. (Nzembo 122:1) Yango ekosala mpe ete bato bákumisa losambo na biso.​—2 Bakorinti 6:3.

  • Mpo na nini tosengeli kozwa na lisɛki te likambo ya kotya bopɛto na esika na biso ya losambo?

  • Bibongiseli nini ezwamá mpo na kobatela Ndako ya Bokonzi na biso pɛto?