Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 27

Ndenge nini bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi ekoki kosalisa biso?

Ndenge nini bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi ekoki kosalisa biso?

Israël

République tchèque

Bénin

Îles Caïmans

Okosepela kosala bolukiluki mpo na kobakisa boyebi na yo ya Biblia? Ozali na mposa ya kokanga ntina ya vɛrsɛ moko ya Biblia to koyeba moto moko to esika moko oyo Biblia elobeli? To osilá komituna soki Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa yo na likambo moko oyo etungisaka yo? Soki bongo, okoki kosalela bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi.

Ezali na mikanda mpe biloko mosusu mpo na kosala bolukiluki. Na ntembe te, ozali na mikanda nyonso te ya Batatoli ya Yehova oyo elimbolaka Biblia oyo ebimá na monɔkɔ oyo olobaka. Nzokande, bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi ezali na mikanda mingi oyo eutaki kobima sika. Ekoki mpe kozala na mabongoli mosusu ya Biblia, diksionɛrɛ moko ya malamu mpe babuku mosusu mpo na kosala bolukiluki. Okoki kosalela biloko nyonso oyo ezali na bibliotɛkɛ, liboso mpe nsima ya makita. Soki ordinatɛrɛ ezali, ekoki kozala na Watchtower Library. Yango ezali programɛ ya ordinatɛrɛ oyo ezali na mikanda na biso ebele mpe ezali pɛtɛɛ kosala bolukiluki na likambo, liloba to vɛrsɛ moko boye.

Esalisaka bana-kelasi na likita Bomoi mpe mosala. Okoki kosalela mikanda ya bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi ntango ozali kobongisa masolo na yo. Mokɛngɛli ya likita Bomoi mpe mosala azali na mokumba ya kotalela bibliotɛkɛ yango. Azali mpe na mokumba ya kobakisa mokanda nyonso oyo euti kobima mpe kotya mikanda na molɔngɔ. Ye, to ndeko oyo ayekolaka na yo Biblia bakoki kolakisa yo ndenge oyo okoki komona likambo oyo ozali koluka. Kasi, moto moko te asengeli kozwa buku ya bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi mpe kobima na yango libándá. Mpe tosengeli mpenza kosalela mikanda yango na bokɛngi mpe kokoma na kati te.

Biblia elobi ete mpo na kozwa “boyebi ya Nzambe,” tosengeli koluka yango “lokola biloko ya motuya oyo ebombani.” (Masese 2:1-5) Bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi ekoki kosalisa yo mpo obanda koluka boyebi yango.

  • Bisaleli nini ya kosala bolukiluki ezali na Ndako ya Bokonzi?

  • Nani akoki kosalisa yo mpo oyeba kosalela bibliotɛkɛ malamu?