Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 28

Makambo nini okokuta na site Internet na biso?

Makambo nini okokuta na site Internet na biso?

France

Pologne

Russie

Yesu Kristo ayebisaki bayekoli na ye ete: “Tiká pole na bino engɛnga liboso ya bato, mpo bámona misala na bino ya malamu mpe bápesa Tata na bino oyo azali na likoló nkembo.” (Matai 5:16) Yango wana, tozali kosalela malamu mayele ndenge na ndenge ya mikolo oyo, ezala mpe Internet. Site na biso, jw.org, ezali Site officiel ya Batatoli ya Yehova esika bayebisi makambo oyo bandimaka mpe misala na bango. Makambo nini okokuta na site yango?

Okokuta biyano ya Biblia na mituna oyo etunamaka mingi. Okoki kozwa biyano na mituna ya ntina mingi oyo bato batunaka. Na ndakisa trakte Bampasi ekosila mokolo mosusu? mpe trakte Bakufi bakozonga mpenza na bomoi? ebimisami na Internet na minɔkɔ koleka 600. Okomona mpe Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na minɔkɔ koleka 130, mpe mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia, ezala mpe buku Biblia eteyaka mpenza nini? mpe bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! oyo ebimi sika. Okoki kotánga mikanda yango mingi to koyoka yango na Internet, to okoki kozwa yango na Internet mpo na koyoka, na format oyo bato mingi basalelaka, na ndakisa MP3, PDF, to EPUB. Okoki kutu kobimisa na papye masolo mosusu mpo na kopesa moto na monɔkɔ oyo alobaka. Ezali mpe na mikanda mosusu oyo batye na video na minɔkɔ ya bababa ya mikili ndenge na ndenge. Okoki kozwa badrame ya botángi ya Biblia, badrame mosusu, mpe miziki ya kitoko oyo okoki koyoka na ntango olingi.

Okokuta mpe makambo mosusu oyo etali Batatoli ya Yehova. Okokuta mpe bansango ya sika mpe bavideo oyo etali mosala na biso na mokili mobimba, mpe makambo oyo ekómeli Batatoli ya Yehova, mpe lisungi oyo topesi bandeko oyo bakweli makama. Okoki mpe kozwa bansango oyo etali mayangani na biso oyo ezali koya mpe baadrɛsi ná banimero ya telefone ya babiro ya filiale.

Nyonso wana ezali kosalisa biso tóngɛngisa solo ya Biblia tii na nsuka ya mokili. Ezali kosalisa bato ya mikili nyonso, ezala mpe na mikili ya malili makasi lokola Antarctique. Tozali kobondela ete “liloba ya Yehova ekoba kotambola nokinoki” na mokili mobimba, mpo na nkembo ya Nzambe.​—2 Batesaloniki 3:1.

  • Ndenge nini site officiel na biso jw.org ezali kosalisa ebele ya bato báyekola solo ya Biblia?

  • Makambo nini okosepela koluka na site na biso ya Internet?