Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Okosala mokano ya Yehova?

Okosala mokano ya Yehova?

Totɔndi yo mingi na ndenge ozwi ntango ya kotalela mwa buku oyo mpo oyeba biso Batatoli ya Yehova malamu, oyeba makambo oyo tosalaka mpe ndenge oyo ebongiseli na biso etambolaka. Tozali kolikya ete mwa buku oyo esalisi yo omona ete tozali mpenza bato oyo bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo. Tolendisi yo okoba kozwa boyebi ya Nzambe, oyebisa bato ya libota na yo mpe baninga na yo makambo oyo ozali koyekola, mpe oyanganaka mbala na mbala na makita na biso.​—Baebre 10:23-25.

Wana ozali kokoba koyekola makambo etali Yehova, okomona ete alingi yo mingi. Yango ekotinda yo osala nyonso oyo okoki mpo omonisa mpe ete olingaka ye. (1 Yoane 4:8-10, 19) Kasi ndenge nini okoki komonisa na bomoi na yo ya mokolo na mokolo ete olingaka Nzambe? Mpo na nini kotosa mitinda na ye ezali mpo na bolamu na yo? Mpe nini ekosalisa yo osala mokano ya Nzambe elongo na biso? Moto oyo ayekolaka na yo Biblia akosepela kolakisa yo biyano na mituna yango mpo ete yo ná libota na yo “bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe, . . . mpo na bomoi ya seko.”​—Yuda 21.

Mpo okende liboso na nzela ya solo, tozali kolendisa yo oyekola mpe buku “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”.