Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bampasi ekosila mokolo mosusu?

Bampasi ekosila mokolo mosusu?

Okanisaka ete . . .

  • ekosila?

  • ekosila te?

  • ntango mosusu ekosila?

BIBLIA ELOBI ETE

“Nzambe . . . akopangusa bango mai nyonso ya miso; liwa ekozala lisusu té, ata matanga, ézala mawa to pe pasi.”​—Emoniseli 21:3, 4, Bible na lingala ya lelo oyo.

BOLAMU NINI OKOZWA?

Okomona mpenza ete Nzambe te moto atindelaka biso bampasi.​—Yakobo 1:13.

Motema ekokita mpo okoyeba ete Nzambe amityaka na esika na biso ntango tozali komona mpasi.​—Zekaria 2:8.

Okoyeba ete bampasi nyonso ekosila.​—Nzembo 37:9-11.

EBONGI MPENZA TÓNDIMA MAKAMBO OYO BIBLIA ELOBI?

Ɛɛ; mpo na ntina mibale oyo:

  • Nzambe ayinaka bampasi mpe makambo ya mabe. Kanisá ndenge Yehova Nzambe ayokaki ntango basaleli na ye ya ntango ya kala bazalaki konyokwama. Biblia elobi ete ayokaki mawa makasi mpo “bazalaki kotindikatindika bango.”​—Basambisi 2:18, Libongoli ya Mokili ya Sika.

    Nzambe ayinaka bato oyo banyokolaka baninga. Na ndakisa, Biblia elobi ete ayiná “mabɔkɔ oyo [esopaka] makila ya moto oyo azali na likambo te.”​—Masese 6:16, 17.

  • Nzambe atyelaka mokomoko na biso likebi. Ya solo, moto na moto ayebi “bolɔzi na ye moko mpe mpasi na ye moko,” kasi Yehova mpe ayebi yango!​2 Ntango 6:29, 30.

    Etikali moke, Yehova, na nzela ya Bokonzi na ye, asilisa bampasi oyo mokomoko na biso azali komona. (Matai 6:9, 10) Kasi sikoyo, azali kobɔndisa baoyo nyonso bazali kotyela ye motema mobimba.​—Misala 17:27; 2 Bakorinti 1:3, 4.

KANISÁ NAINO

Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala?

Biblia epesi eyano na motuna yango na BAROMA 5:12 mpe na 2 PETRO 3:9.